Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: شعراء   آیت:
قَالَ فَعَلۡتُهَآ إِذٗا وَأَنَا۠ مِنَ ٱلضَّآلِّينَ
20. Mûssa alobi: Nasalaki yango mpo été nazangaki koyeba.
عربي تفسیرونه:
فَفَرَرۡتُ مِنكُمۡ لَمَّا خِفۡتُكُمۡ فَوَهَبَ لِي رَبِّي حُكۡمٗا وَجَعَلَنِي مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
21. Yango nakimaki bino тропа bobangi. Sima Nkolo wa ngai apesi ngai bwanya, mpe aponi ngai okati ya batindami.
عربي تفسیرونه:
وَتِلۡكَ نِعۡمَةٞ تَمُنُّهَا عَلَيَّ أَنۡ عَبَّدتَّ بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ
22. Wana nde bolamu nayo ozali kokundolela ngai yango, mpe yo osili kozua bana ya isalayele bawumbu nayo?
عربي تفسیرونه:
قَالَ فِرۡعَوۡنُ وَمَا رَبُّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
23. (Falo ) alobi; nani Nkolo wa molongo?
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ
24. (Mûssa) alobi: Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango mibale, soki bozali na ntembe te.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لِمَنۡ حَوۡلَهُۥٓ أَلَا تَسۡتَمِعُونَ
25. Falo alobi na baye bazali pembeni naye ete: Boye bozali koyoka te?
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
26. (Mûssa) alobi; Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bato ya kala.
عربي تفسیرونه:
قَالَ إِنَّ رَسُولَكُمُ ٱلَّذِيٓ أُرۡسِلَ إِلَيۡكُمۡ لَمَجۡنُونٞ
27. (Falo) alobi: Ya soló motindami oyo batindi ye epai na bino azali ligboma.
عربي تفسیرونه:
قَالَ رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقِ وَٱلۡمَغۡرِبِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُمۡ تَعۡقِلُونَ
28. (Mûssa) alobi: Nkolo wa moniele na eloli, na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki bozali koyeba.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لَئِنِ ٱتَّخَذۡتَ إِلَٰهًا غَيۡرِي لَأَجۡعَلَنَّكَ مِنَ ٱلۡمَسۡجُونِينَ
29. (Falo) alobi: Soki olandi nzambe mosusu otiki ngai, nakokotisa yo na boloko.
عربي تفسیرونه:
قَالَ أَوَلَوۡ جِئۡتُكَ بِشَيۡءٖ مُّبِينٖ
30. (Mûssa) alobi: Ata soki nayeli yo bikamwa ya polele?
عربي تفسیرونه:
قَالَ فَأۡتِ بِهِۦٓ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
31. (Falo) alobi: Yaka na yango soki ozali o kati ya balobi bosôló.
عربي تفسیرونه:
فَأَلۡقَىٰ عَصَاهُ فَإِذَا هِيَ ثُعۡبَانٞ مُّبِينٞ
32. (Mûssa) abwaki lingenda lia ye, mpe tala ebongwani nyoka ya polele ebandi kotambola.
عربي تفسیرونه:
وَنَزَعَ يَدَهُۥ فَإِذَا هِيَ بَيۡضَآءُ لِلنَّٰظِرِينَ
33. Mpe abimisi loboko naye na libenga, mpe tala ekomi pembe makasi pona baye bazali kotala.
عربي تفسیرونه:
قَالَ لِلۡمَلَإِ حَوۡلَهُۥٓ إِنَّ هَٰذَا لَسَٰحِرٌ عَلِيمٞ
34. (Falo) alobi na bankumu naye bazalaki pembeni naye: Ya soló, oyo nde nganga monene ya boyebi.
عربي تفسیرونه:
يُرِيدُ أَن يُخۡرِجَكُم مِّنۡ أَرۡضِكُم بِسِحۡرِهِۦ فَمَاذَا تَأۡمُرُونَ
35. Alingi kobimisa bino o mabele na bino na bonganga naye, boye bokosala nini?
عربي تفسیرونه:
قَالُوٓاْ أَرۡجِهۡ وَأَخَاهُ وَٱبۡعَثۡ فِي ٱلۡمَدَآئِنِ حَٰشِرِينَ
36. Balobi: Zelisa ye na ndeko wa ye, mpe tinda bato na mboka mpo basangisa (bakende kosangisa banganga, sima baya komekana),
عربي تفسیرونه:
يَأۡتُوكَ بِكُلِّ سَحَّارٍ عَلِيمٖ
37. Mpe bamemela yo banganga ya minene oyo bayebi.
عربي تفسیرونه:
فَجُمِعَ ٱلسَّحَرَةُ لِمِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
38. Banganga basangani o mokolo mwa elaka.
عربي تفسیرونه:
وَقِيلَ لِلنَّاسِ هَلۡ أَنتُم مُّجۡتَمِعُونَ
39. Mpe bayebisi na bato ete: Boye bokosangana te?
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: شعراء
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول