Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: شوری   آیت:
ذَٰلِكَ ٱلَّذِي يُبَشِّرُ ٱللَّهُ عِبَادَهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِۗ قُل لَّآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ أَجۡرًا إِلَّا ٱلۡمَوَدَّةَ فِي ٱلۡقُرۡبَىٰۗ وَمَن يَقۡتَرِفۡ حَسَنَةٗ نَّزِدۡ لَهُۥ فِيهَا حُسۡنًاۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ شَكُورٌ
23. Wana nde sango elamu eye Allah azali kopesa epai ya bawumbu naye baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, loba: Nakosenga bino yango lifuta te, ezali sé bolingo bwa bondeko, mpe oyo akosala bolamu, tokobakisela ye ya kitoko koleka. Ya soló, Allah azali molimbisi atonda melesi,
عربي تفسیرونه:
أَمۡ يَقُولُونَ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبٗاۖ فَإِن يَشَإِ ٱللَّهُ يَخۡتِمۡ عَلَىٰ قَلۡبِكَۗ وَيَمۡحُ ٱللَّهُ ٱلۡبَٰطِلَ وَيُحِقُّ ٱلۡحَقَّ بِكَلِمَٰتِهِۦٓۚ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
24. To bazali koloba ete: Babukeli Allah lokuta, mpe soki Allah alingi akokanga motema nayo, mpe Allah azali kolimwisa lokuta na liloba mpe azali kondimisa bosembo. Ya soló, ayebi mabombami ya mitema.
عربي تفسیرونه:
وَهُوَ ٱلَّذِي يَقۡبَلُ ٱلتَّوۡبَةَ عَنۡ عِبَادِهِۦ وَيَعۡفُواْ عَنِ ٱلسَّيِّـَٔاتِ وَيَعۡلَمُ مَا تَفۡعَلُونَ
25. Ye nde andimelaka bawumbu naye baye bazali kosenga tubela, mpe azali molimbisi ya masumu, mpe ayebaka maye bosalaka.
عربي تفسیرونه:
وَيَسۡتَجِيبُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَيَزِيدُهُم مِّن فَضۡلِهِۦۚ وَٱلۡكَٰفِرُونَ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدٞ
26. Mpe azali kondimela bandimi baye bazali kosala misala milamu, mpe abakiselaka bango bolamu bwaye. Kasi bapengwi bakozuaka etumbu ya makasi.
عربي تفسیرونه:
۞ وَلَوۡ بَسَطَ ٱللَّهُ ٱلرِّزۡقَ لِعِبَادِهِۦ لَبَغَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَٰكِن يُنَزِّلُ بِقَدَرٖ مَّا يَشَآءُۚ إِنَّهُۥ بِعِبَادِهِۦ خَبِيرُۢ بَصِيرٞ
27. Soki Allah apesaka bozui na bawumbu baye banso, balingaki kosala na yango mabe kati na mokili, kasi akitisaka yango ndenge alingi (mokémoké), ayebi ya solo, bawumbu baye mpe amonaka.
عربي تفسیرونه:
وَهُوَ ٱلَّذِي يُنَزِّلُ ٱلۡغَيۡثَ مِنۢ بَعۡدِ مَا قَنَطُواْ وَيَنشُرُ رَحۡمَتَهُۥۚ وَهُوَ ٱلۡوَلِيُّ ٱلۡحَمِيدُ
28. Ye nde akitisaka mbula sima ya bango kozanga elikia mpe apanzaka ngolu naye. Ye nde azali mokonzi atonda lokumu.
عربي تفسیرونه:
وَمِنۡ ءَايَٰتِهِۦ خَلۡقُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَثَّ فِيهِمَا مِن دَآبَّةٖۚ وَهُوَ عَلَىٰ جَمۡعِهِمۡ إِذَا يَشَآءُ قَدِيرٞ
29. Mpe o kati ya bilembo bia ye, bokelami ya likolo na mabele, na maye manso mazali na bomoyi kati na yango. Mpe azali na bokoki ya kosangisa miango soki alingi.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَصَٰبَكُم مِّن مُّصِيبَةٖ فَبِمَا كَسَبَتۡ أَيۡدِيكُمۡ وَيَعۡفُواْ عَن كَثِيرٖ
30. Nyoso ya mabe oyo ezali kozua bino, ewutaka sé na maye maboko na bino esali. Kasi azali kolimbisa ebele.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِۖ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ
31. Мре bokokoka kokima nguya ya Allah awa na mabele te, тре boko žala na mosungi te тре mobateli te na kotika Allah.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: شوری
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول