Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: انعام   آیت:

Al-An’âm

ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَجَعَلَ ٱلظُّلُمَٰتِ وَٱلنُّورَۖ ثُمَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡ يَعۡدِلُونَ
Lokumu na Allah oyo akela likolo na mabele, mpe atie molili mpe bongengi. Sima, baye bapengwi na Nkolo wa bango bazali kokokisa ye na bikelamu.
عربي تفسیرونه:
هُوَ ٱلَّذِي خَلَقَكُم مِّن طِينٖ ثُمَّ قَضَىٰٓ أَجَلٗاۖ وَأَجَلٞ مُّسَمًّى عِندَهُۥۖ ثُمَّ أَنتُمۡ تَمۡتَرُونَ
Yende akela bino kowuta na mabele, sima ati elaka (mpona bino), mpe elaka etiyamaka sé epai naye. Sima, bozali kotia tembe.
عربي تفسیرونه:
وَهُوَ ٱللَّهُ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَفِي ٱلۡأَرۡضِ يَعۡلَمُ سِرَّكُمۡ وَجَهۡرَكُمۡ وَيَعۡلَمُ مَا تَكۡسِبُونَ
Mpe ye, azali Allah oyo azali o likolo mpe na nsé,[1] ayebaka mabombami ma bino na maye bomonisaka polele. Mpe ayebi maye bozali kosala.
[1] Oye nde Allah bazali kobondela na likolo mpe na nsé.
عربي تفسیرونه:
وَمَا تَأۡتِيهِم مِّنۡ ءَايَةٖ مِّنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِمۡ إِلَّا كَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ
Mpe elembo kati ya bilembo bia Nkolo wa bango ekomelaki bango te, sé baboya yango.
عربي تفسیرونه:
فَقَدۡ كَذَّبُواْ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ فَسَوۡفَ يَأۡتِيهِمۡ أَنۢبَٰٓؤُاْ مَا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Mpe basilaki koboya bosembo ntango eyelaki bango; mpe kala mingi te ekoyela bango bansango ya maye bazalaki kotiola.
عربي تفسیرونه:
أَلَمۡ يَرَوۡاْ كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّن قَرۡنٖ مَّكَّنَّٰهُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ مَا لَمۡ نُمَكِّن لَّكُمۡ وَأَرۡسَلۡنَا ٱلسَّمَآءَ عَلَيۡهِم مِّدۡرَارٗا وَجَعَلۡنَا ٱلۡأَنۡهَٰرَ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمۡ فَأَهۡلَكۡنَٰهُم بِذُنُوبِهِمۡ وَأَنشَأۡنَا مِنۢ بَعۡدِهِمۡ قَرۡنًا ءَاخَرِينَ
Boye, bazali kornona te bato boni tobomaki liboso na bango, tofandisaki bango kati na mokilina ndenge ya malamu ndenge tosalela naino bino te? Mpe tokitiselaki bango mbula ebele kowuta o likolo, mpe totiaki míngala mizalaki kotiola na nsé ya makolo ma bango, mpe tobomaki bango тропа masumu ma bango. Mpe sima na bango tokelaki lisanga mosusu ya bato ya sika.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡ نَزَّلۡنَا عَلَيۡكَ كِتَٰبٗا فِي قِرۡطَاسٖ فَلَمَسُوهُ بِأَيۡدِيهِمۡ لَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
Ata soki tokitiselaka yo buku ekomami na lokasa eye bakoki kosimba na maboko ma bango, mbele bapengwi balingaki koloba: Oyó ezali sé bondoki bwa polele.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ مَلَكٞۖ وَلَوۡ أَنزَلۡنَا مَلَكٗا لَّقُضِيَ ٱلۡأَمۡرُ ثُمَّ لَا يُنظَرُونَ
Mpe bazali koloba: Mpona nini bakitiselaki ye anzelu te? Kasi soki tokitisaka anzelu, makambo malingaki makokisama, mpe nde bazelisamaki te.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: انعام
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول