Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: انعام   آیت:
بَلۡ بَدَا لَهُم مَّا كَانُواْ يُخۡفُونَ مِن قَبۡلُۖ وَلَوۡ رُدُّواْ لَعَادُواْ لِمَا نُهُواْ عَنۡهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
Te! Kasi maye bazalaki kosala mabimi polele, soki bazongisi bango na mokili, bakozongela sé maye bapekisaki bango. Ya soló, bazali nde bato ya lokuta.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُوٓاْ إِنۡ هِيَ إِلَّا حَيَاتُنَا ٱلدُّنۡيَا وَمَا نَحۡنُ بِمَبۡعُوثِينَ
Mpe bazali koloba: Ezali sé bomoyi na biso ya nsé, mpe tokosekwa te.
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ وُقِفُواْ عَلَىٰ رَبِّهِمۡۚ قَالَ أَلَيۡسَ هَٰذَا بِٱلۡحَقِّۚ قَالُواْ بَلَىٰ وَرَبِّنَاۚ قَالَ فَذُوقُواْ ٱلۡعَذَابَ بِمَا كُنتُمۡ تَكۡفُرُونَ
Mpe soki omonaka ntango bakotelemisama liboso ya Nkolo na bango, akoloba: Boye oyo ezali solo te? В akoloba: Iyo na Nkolo na biso! Akoloba: Bomeka etumbu ya maye bozalaki ко mpengwa na yango.
عربي تفسیرونه:
قَدۡ خَسِرَ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِلِقَآءِ ٱللَّهِۖ حَتَّىٰٓ إِذَا جَآءَتۡهُمُ ٱلسَّاعَةُ بَغۡتَةٗ قَالُواْ يَٰحَسۡرَتَنَا عَلَىٰ مَا فَرَّطۡنَا فِيهَا وَهُمۡ يَحۡمِلُونَ أَوۡزَارَهُمۡ عَلَىٰ ظُهُورِهِمۡۚ أَلَا سَآءَ مَا يَزِرُونَ
Basili kozanga baye baboyi kondima na bokutani na Allah, kino ntango ekoyela bango mbalakaka. Bakoloba: Eh! Mawa na biso na maye oyo tomonaki mpamba na kati na yango! Mpe bako mema mikumba na bango na mikongo na bango, mpe oyo nde mikumba ya mabe!
عربي تفسیرونه:
وَمَا ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَآ إِلَّا لَعِبٞ وَلَهۡوٞۖ وَلَلدَّارُ ٱلۡأٓخِرَةُ خَيۡرٞ لِّلَّذِينَ يَتَّقُونَۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Mpe bomoyi ya nsé ezali sé liseki mpe lisano, kasi ndako ya lobi nde ezali malamu тропа babangi. Boye bokososola te?
عربي تفسیرونه:
قَدۡ نَعۡلَمُ إِنَّهُۥ لَيَحۡزُنُكَ ٱلَّذِي يَقُولُونَۖ فَإِنَّهُمۡ لَا يُكَذِّبُونَكَ وَلَٰكِنَّ ٱلظَّٰلِمِينَ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ يَجۡحَدُونَ
Tosili koyeba ya soló ete, ezali kosala yo mpasi maye bazali koloba. Bazali koboya yo te, kasi babubi bazali nde koboya mikapo mia Allah.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ كُذِّبَتۡ رُسُلٞ مِّن قَبۡلِكَ فَصَبَرُواْ عَلَىٰ مَا كُذِّبُواْ وَأُوذُواْ حَتَّىٰٓ أَتَىٰهُمۡ نَصۡرُنَاۚ وَلَا مُبَدِّلَ لِكَلِمَٰتِ ٱللَّهِۚ وَلَقَدۡ جَآءَكَ مِن نَّبَإِيْ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Mpe basilaki koboya batindami liboso nayo, mpe bakangaki mitema na maye bazuaki bango na lokuta, mpe banyokuamaki, kino lisungi na biso eyaki. Kasi,mbongwana ezali te na maloba ya Allah. Мре ya soló nsango ya batindami esili kokomela yo.
عربي تفسیرونه:
وَإِن كَانَ كَبُرَ عَلَيۡكَ إِعۡرَاضُهُمۡ فَإِنِ ٱسۡتَطَعۡتَ أَن تَبۡتَغِيَ نَفَقٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ أَوۡ سُلَّمٗا فِي ٱلسَّمَآءِ فَتَأۡتِيَهُم بِـَٔايَةٖۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَجَمَعَهُمۡ عَلَى ٱلۡهُدَىٰۚ فَلَا تَكُونَنَّ مِنَ ٱلۡجَٰهِلِينَ
Mpe soki koboya na bango ezali kosala yo mpasi, mpe soki ozalaki na makoki, ya koluka nzela na mabele to mpe ozua emateli тропа kobuta na mapata тропа komemela bango bikamwiseli; mpe soki Allah alingaki nde atiaki bango banso na nzela ya semba, kasi kozala te o kati na baye bazanga mayele.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: انعام
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول