Check out the new design

د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: ملک   آیت:

Al-Mulk

تَبَٰرَكَ ٱلَّذِي بِيَدِهِ ٱلۡمُلۡكُ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
1. Apambolama ye oyo azali na bokonzi na maboko naye, mpe azali na makoki likolo ya biloko binso.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلۡمَوۡتَ وَٱلۡحَيَوٰةَ لِيَبۡلُوَكُمۡ أَيُّكُمۡ أَحۡسَنُ عَمَلٗاۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡغَفُورُ
2. Ye nde akela liwa mpe bomoyi mpo ameka bino mpe atala nani kati na bino akosala malamu koleka. Mpe azali wa bokasi atonda bolimbisi.
عربي تفسیرونه:
ٱلَّذِي خَلَقَ سَبۡعَ سَمَٰوَٰتٖ طِبَاقٗاۖ مَّا تَرَىٰ فِي خَلۡقِ ٱلرَّحۡمَٰنِ مِن تَفَٰوُتٖۖ فَٱرۡجِعِ ٱلۡبَصَرَ هَلۡ تَرَىٰ مِن فُطُورٖ
3. Ye nde akeli mapata sambo ya komatelama, boye okomona eloko ya mabe na kati ya bokeli ya Ar-Rahmân[1] te. Zongisa miso тропа kotala lisusu, okomona sé kitoko.
[1] Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ ٱرۡجِعِ ٱلۡبَصَرَ كَرَّتَيۡنِ يَنقَلِبۡ إِلَيۡكَ ٱلۡبَصَرُ خَاسِئٗا وَهُوَ حَسِيرٞ
4. Sima tala lisusu mbala mibale, kotala nayo ekozongela yo na nsoni mpe ezangi bokasi.
عربي تفسیرونه:
وَلَقَدۡ زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِمَصَٰبِيحَ وَجَعَلۡنَٰهَا رُجُومٗا لِّلشَّيَٰطِينِۖ وَأَعۡتَدۡنَا لَهُمۡ عَذَابَ ٱلسَّعِيرِ
5. Mpe ya soló, tosilaki kobongisa mapata ya pene na nsé na bonzenga ya bongengi ya minzoto, mpe totiaki yango (minzoto) тропа kobengana basatana, mpe tobombeli bango etumbu ya lifelo.
عربي تفسیرونه:
وَلِلَّذِينَ كَفَرُواْ بِرَبِّهِمۡ عَذَابُ جَهَنَّمَۖ وَبِئۡسَ ٱلۡمَصِيرُ
6. Mpe тропа baye bapengwa na Nkolo wa bango. Bakozuaka etumbu ya lifelo, mpe bozongi nini ya mabe wana!
عربي تفسیرونه:
إِذَآ أُلۡقُواْ فِيهَا سَمِعُواْ لَهَا شَهِيقٗا وَهِيَ تَفُورُ
7. Tango bakobwakama na kati, bakoyoka yango ezali kotoka, mpe bazali koganga.
عربي تفسیرونه:
تَكَادُ تَمَيَّزُ مِنَ ٱلۡغَيۡظِۖ كُلَّمَآ أُلۡقِيَ فِيهَا فَوۡجٞ سَأَلَهُمۡ خَزَنَتُهَآ أَلَمۡ يَأۡتِكُمۡ نَذِيرٞ
8. Moto wana ezali kokabola bango, tango nyoso soki bakobwaka bamosusu, bakengeli (ya lifelo) bazali kotuna bango: Boye mokebisi ayelaki bino te?
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ بَلَىٰ قَدۡ جَآءَنَا نَذِيرٞ فَكَذَّبۡنَا وَقُلۡنَا مَا نَزَّلَ ٱللَّهُ مِن شَيۡءٍ إِنۡ أَنتُمۡ إِلَّا فِي ضَلَٰلٖ كَبِيرٖ
9. Bakolobaka: Iyo. Mokebisi ayelaki biso kasi toboyaki kondimela ye mpe tolobaki: Allah akitisa eloko te, bozali sé na libungi linene.
عربي تفسیرونه:
وَقَالُواْ لَوۡ كُنَّا نَسۡمَعُ أَوۡ نَعۡقِلُ مَا كُنَّا فِيٓ أَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
10. Mpe bakolobaka: Soki toyokaka mpe tokanisaka (malamu) tolingaki kozala okati ya bato ya lifelo ya saira te.
عربي تفسیرونه:
فَٱعۡتَرَفُواْ بِذَنۢبِهِمۡ فَسُحۡقٗا لِّأَصۡحَٰبِ ٱلسَّعِيرِ
11. Mpe bayebaki mabe na bango, mpe tika ete bato ya lifelo babebisama.
عربي تفسیرونه:
إِنَّ ٱلَّذِينَ يَخۡشَوۡنَ رَبَّهُم بِٱلۡغَيۡبِ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَأَجۡرٞ كَبِيرٞ
12. Ya soló, baye bazali kobanga Nkolo na bango nakobombama bakozuaka lifuta linene.
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: ملک
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - محمد بالنګوګو - د ژباړو فهرست (لړلیک)

د زکریا محمد بلینګوګو لخوا ژباړل شوی دی.

بندول