د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: القيامة   آیت:

Al-Qiyâmah (LISEKWA)

لَآ أُقۡسِمُ بِيَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ
1. Nalapi na mokolo ya lisekwa,
عربي تفسیرونه:
وَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلنَّفۡسِ ٱللَّوَّامَةِ
2. Mpe nalapi na molimo oyo elingi kotika mabe te!
عربي تفسیرونه:
أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَلَّن نَّجۡمَعَ عِظَامَهُۥ
3. Moto akanisi été tokosangisa mikuwa mia ye te?
عربي تفسیرونه:
بَلَىٰ قَٰدِرِينَ عَلَىٰٓ أَن نُّسَوِّيَ بَنَانَهُۥ
4. Kasi tozali na bokoki ya kobongisa ye. (mpe kozongisa ye lolenge azalaki)
عربي تفسیرونه:
بَلۡ يُرِيدُ ٱلۡإِنسَٰنُ لِيَفۡجُرَ أَمَامَهُۥ
5. Moto alingi sé atikala na mabe.
عربي تفسیرونه:
يَسۡـَٔلُ أَيَّانَ يَوۡمُ ٱلۡقِيَٰمَةِ
6. Azali kotuna: Lisekwa ekozalaka mokolo nini?
عربي تفسیرونه:
فَإِذَا بَرِقَ ٱلۡبَصَرُ
7. Tango miso ekobulungana (ezangi kornona).
عربي تفسیرونه:
وَخَسَفَ ٱلۡقَمَرُ
8. Mpe sanza ekozanga bongengi na yango.
عربي تفسیرونه:
وَجُمِعَ ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ
9. Mpe moyi na sanza ekosanganaka.
عربي تفسیرونه:
يَقُولُ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذٍ أَيۡنَ ٱلۡمَفَرُّ
10. Mokolo wana moto akolobaka: Wapi nzela ya kokima?
عربي تفسیرونه:
كَلَّا لَا وَزَرَ
11. Esika ya kokima ezali te.
عربي تفسیرونه:
إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمُسۡتَقَرُّ
12. Bozongi ekozalaka mokolo wana epai ya Nkolo nayo.
عربي تفسیرونه:
يُنَبَّؤُاْ ٱلۡإِنسَٰنُ يَوۡمَئِذِۭ بِمَا قَدَّمَ وَأَخَّرَ
13. Bakoyebisa moto mokolo wana maye asalaki na maye atikaki тропа kosala sima.
عربي تفسیرونه:
بَلِ ٱلۡإِنسَٰنُ عَلَىٰ نَفۡسِهِۦ بَصِيرَةٞ
14. Kasi moto ye moko akoyebaka (makambo naye)
عربي تفسیرونه:
وَلَوۡ أَلۡقَىٰ مَعَاذِيرَهُۥ
15. Mpe ata asengi bolimbisi.
عربي تفسیرونه:
لَا تُحَرِّكۡ بِهِۦ لِسَانَكَ لِتَعۡجَلَ بِهِۦٓ
16. Kowelisa lolemu nayo te тропа kotanga na yango (kurani).
عربي تفسیرونه:
إِنَّ عَلَيۡنَا جَمۡعَهُۥ وَقُرۡءَانَهُۥ
17. Ya soló, biso nde tokosangisa yango na motema nayo mpe kotanga yango.
عربي تفسیرونه:
فَإِذَا قَرَأۡنَٰهُ فَٱتَّبِعۡ قُرۡءَانَهُۥ
18. Tango tozali kotangisa yo yango, landa yango malamu.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ إِنَّ عَلَيۡنَا بَيَانَهُۥ
19. Sima ya sólo, tokolimbolela yo yango.
عربي تفسیرونه:
كَلَّا بَلۡ تُحِبُّونَ ٱلۡعَاجِلَةَ
20. Kasi bolingi sé (bomoyi) ya nsé,
عربي تفسیرونه:
وَتَذَرُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
21. Mpe botiki oyo ya mokolo ya suka,
عربي تفسیرونه:
وُجُوهٞ يَوۡمَئِذٖ نَّاضِرَةٌ
22. Mokolo wana okomona bilongi bikongenga,
عربي تفسیرونه:
إِلَىٰ رَبِّهَا نَاظِرَةٞ
23. Bizali kotala Nkolo na yango,
عربي تفسیرونه:
وَوُجُوهٞ يَوۡمَئِذِۭ بَاسِرَةٞ
24. Mpe mokolo wana bilongi bikoyinda,
عربي تفسیرونه:
تَظُنُّ أَن يُفۡعَلَ بِهَا فَاقِرَةٞ
25. Bizali kozela etumbu.
عربي تفسیرونه:
كَلَّآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلتَّرَاقِيَ
26. Kasi te! Tango (molimo) тококота na mongongo,
عربي تفسیرونه:
وَقِيلَ مَنۡۜ رَاقٖ
27. Мре ekolobama: Nani sika oyo mobikisi?
عربي تفسیرونه:
وَظَنَّ أَنَّهُ ٱلۡفِرَاقُ
28. Akanisi été alingi akufa. (azali kobunda na liwa),
عربي تفسیرونه:
وَٱلۡتَفَّتِ ٱلسَّاقُ بِٱلسَّاقِ
29. Mpe lokolo elali likolo ya moninga,
عربي تفسیرونه:
إِلَىٰ رَبِّكَ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡمَسَاقُ
30. Bakomema yo epai ya Nkolo nayo mokolo wana.
عربي تفسیرونه:
فَلَا صَدَّقَ وَلَا صَلَّىٰ
31. Mpo andimaki te mpe atelemisaki losambo te,
عربي تفسیرونه:
وَلَٰكِن كَذَّبَ وَتَوَلَّىٰ
32. Kasi aboyaki mpe apesaki mokongo,
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ ذَهَبَ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ يَتَمَطَّىٰٓ
33. Sima akendaki epai ya bato naye azali kosala lolendo,
عربي تفسیرونه:
أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰ
34. Mpasi nayo mpasi.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ أَوۡلَىٰ لَكَ فَأَوۡلَىٰٓ
35. Sima mpasi nayo mpasi.
عربي تفسیرونه:
أَيَحۡسَبُ ٱلۡإِنسَٰنُ أَن يُتۡرَكَ سُدًى
36. Moto azalaki kokanisa ete bakotika ye sé pamba bongo (sima ya kokela ye)?
عربي تفسیرونه:
أَلَمۡ يَكُ نُطۡفَةٗ مِّن مَّنِيّٖ يُمۡنَىٰ
37. Boye abima kowuta na mayi ya mokongo te oyo elonama?
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ كَانَ عَلَقَةٗ فَخَلَقَ فَسَوَّىٰ
38. Sima na yango akomaki liboke ya makila mpe apesaki ye lolenge ya kitoko te?
عربي تفسیرونه:
فَجَعَلَ مِنۡهُ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰٓ
39. Sima akelaki lolenge ya bato mibale te? Mwasi na mobali?
عربي تفسیرونه:
أَلَيۡسَ ذَٰلِكَ بِقَٰدِرٍ عَلَىٰٓ أَن يُحۡـِۧيَ ٱلۡمَوۡتَىٰ
40. Ezali (Allah) te nde azali na bokoki ya kosekwisa bawei?
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: القيامة
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - د ژباړو فهرست (لړلیک)

لینګالا ژبې ته د قرآن کریم د معناګانو ژباړه ، محمد بالنګوګو ژباړلې ده

بندول