د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه * - د ژباړو فهرست (لړلیک)

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

د معناګانو ژباړه سورت: المدثر   آیت:

Al-Muddathir (MOZIPANI NA BULANGITI)

يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡمُدَّثِّرُ
1. Eh yo (Muhammad) mozipani na bulangiti!
عربي تفسیرونه:
قُمۡ فَأَنذِرۡ
2. Telema mpe kebisa!
عربي تفسیرونه:
وَرَبَّكَ فَكَبِّرۡ
3. Mpe kumisa Nkolo nayo ya monene!
عربي تفسیرونه:
وَثِيَابَكَ فَطَهِّرۡ
4. Mpe petóla bilamba nayo,
عربي تفسیرونه:
وَٱلرُّجۡزَ فَٱهۡجُرۡ
5. Mpe mitiya mosika na masumu nyoso. (mpe tika yango)!
عربي تفسیرونه:
وَلَا تَمۡنُن تَسۡتَكۡثِرُ
6. Mpe kopesa te mpo bafuta yo!
عربي تفسیرونه:
وَلِرَبِّكَ فَٱصۡبِرۡ
7. Mpe zala na bozeli тропа Nkolo nayo!
عربي تفسیرونه:
فَإِذَا نُقِرَ فِي ٱلنَّاقُورِ
8. Mpe tango bakofula kelelo,
عربي تفسیرونه:
فَذَٰلِكَ يَوۡمَئِذٖ يَوۡمٌ عَسِيرٌ
9. Wana ekozala mokolo ya mpasi,
عربي تفسیرونه:
عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ غَيۡرُ يَسِيرٖ
10. Mpona bapengwi ekozala mpete te.
عربي تفسیرونه:
ذَرۡنِي وَمَنۡ خَلَقۡتُ وَحِيدٗا
11. Tika ngai na oyo nakeli ye moko,
عربي تفسیرونه:
وَجَعَلۡتُ لَهُۥ مَالٗا مَّمۡدُودٗا
12. Mpe oyo napesaki misolo ebele,
عربي تفسیرونه:
وَبَنِينَ شُهُودٗا
13. Mpe (napesi ye) bana oyo bazali naye tango nyoso;
عربي تفسیرونه:
وَمَهَّدتُّ لَهُۥ تَمۡهِيدٗا
14. Mpe oyo nalongolelaki mindondo nyoso.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ يَطۡمَعُ أَنۡ أَزِيدَ
15. Sima, apengwi na bolamu (na ngai),
عربي تفسیرونه:
كَلَّآۖ إِنَّهُۥ كَانَ لِأٓيَٰتِنَا عَنِيدٗا
16. Te; ya soló, azalaki kowangana mikapo mia biso na mutu makasi.
عربي تفسیرونه:
سَأُرۡهِقُهُۥ صَعُودًا
17. Nakopesa ye pasi ya koleka.
عربي تفسیرونه:
إِنَّهُۥ فَكَّرَ وَقَدَّرَ
18. Ya sólo, akanisaki mpe azuaki mokano,
عربي تفسیرونه:
فَقُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
19. Akufa na ndenge akanaki.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ قُتِلَ كَيۡفَ قَدَّرَ
20. Sima akufa na ndenge akanaki.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ نَظَرَ
21. Sima atalaki.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ عَبَسَ وَبَسَرَ
22. Sima abebisi elongi mpe akangi.
عربي تفسیرونه:
ثُمَّ أَدۡبَرَ وَٱسۡتَكۡبَرَ
23. Sima abongoli mokongo mpe asali lolendo.
عربي تفسیرونه:
فَقَالَ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ يُؤۡثَرُ
24. Mpe alobi: (Kurani) oyo ezali bonganga oyo etangisami,
عربي تفسیرونه:
إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا قَوۡلُ ٱلۡبَشَرِ
25. Wana ezali sé liloba lia moto.
عربي تفسیرونه:
سَأُصۡلِيهِ سَقَرَ
26. Nakozikisa ye na moto ya saqar.
عربي تفسیرونه:
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا سَقَرُ
27. Nani akoyebisa yo nini saqar?
عربي تفسیرونه:
لَا تُبۡقِي وَلَا تَذَرُ
28. Etiki eloko te mpe ebateli te.
عربي تفسیرونه:
لَوَّاحَةٞ لِّلۡبَشَرِ
29. Ezali kozikisa mposo ekomi moyindo.
عربي تفسیرونه:
عَلَيۡهَا تِسۡعَةَ عَشَرَ
30. O kati na yango ezali na (ba anzelu) zomi na libua.
عربي تفسیرونه:
وَمَا جَعَلۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلنَّارِ إِلَّا مَلَٰٓئِكَةٗۖ وَمَا جَعَلۡنَا عِدَّتَهُمۡ إِلَّا فِتۡنَةٗ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ لِيَسۡتَيۡقِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَيَزۡدَادَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِيمَٰنٗا وَلَا يَرۡتَابَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ وَٱلۡمُؤۡمِنُونَ وَلِيَقُولَ ٱلَّذِينَ فِي قُلُوبِهِم مَّرَضٞ وَٱلۡكَٰفِرُونَ مَاذَآ أَرَادَ ٱللَّهُ بِهَٰذَا مَثَلٗاۚ كَذَٰلِكَ يُضِلُّ ٱللَّهُ مَن يَشَآءُ وَيَهۡدِي مَن يَشَآءُۚ وَمَا يَعۡلَمُ جُنُودَ رَبِّكَ إِلَّا هُوَۚ وَمَا هِيَ إِلَّا ذِكۡرَىٰ لِلۡبَشَرِ
31. Mpe totiaki bakengeli ya moto sé ba anzelu, mpe totiaki motango na bango sé ezala komekama epai ya bapengwi, mpo ete baye bazua buku liboso bayeba yango mpe ebakisa bondimi epai na bandimi, mpo ete baye bazua buku liboso na bandimi bazala na ntembe te, mpe mpo ete bapagano na baye bazali na bokono o mitema baloba ete: Allah alingi nini na ndakisa oyo? Lolenge wana nde Allah azali kokamba nani alingi mpe kobungisa nani alingi. Mpe moko te ayebi mapinga ya Nkolo nayo sé ye mei. Mpe wana ezali sé bokundoli тропа bato.
عربي تفسیرونه:
كَلَّا وَٱلۡقَمَرِ
32. Te; (nalapi) na sanza.
عربي تفسیرونه:
وَٱلَّيۡلِ إِذۡ أَدۡبَرَ
33. Mpe butu tango elalaka.
عربي تفسیرونه:
وَٱلصُّبۡحِ إِذَآ أَسۡفَرَ
34. Mpe tongo tango etanaka.
عربي تفسیرونه:
إِنَّهَا لَإِحۡدَى ٱلۡكُبَرِ
35. (Saqar) ezali moko ya (etumbu) ya monene.
عربي تفسیرونه:
نَذِيرٗا لِّلۡبَشَرِ
36. Ezali bokundoli тропа bato,
عربي تفسیرونه:
لِمَن شَآءَ مِنكُمۡ أَن يَتَقَدَّمَ أَوۡ يَتَأَخَّرَ
37. Oyo akolinga okati na bino, alanda yango to azonga sima.
عربي تفسیرونه:
كُلُّ نَفۡسِۭ بِمَا كَسَبَتۡ رَهِينَةٌ
38. Molimo nyoso akozua oyo asalaki,
عربي تفسیرونه:
إِلَّآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡيَمِينِ
39. Longola sé bato ya ngambu ya loboko ya mobali. (balongi),
عربي تفسیرونه:
فِي جَنَّٰتٖ يَتَسَآءَلُونَ
40. (Bakozalaka) na lola bakomitunama,
عربي تفسیرونه:
عَنِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
41. (Mpona) batomboki.
عربي تفسیرونه:
مَا سَلَكَكُمۡ فِي سَقَرَ
42. Eloko nini ekotisi bino na saqar?
عربي تفسیرونه:
قَالُواْ لَمۡ نَكُ مِنَ ٱلۡمُصَلِّينَ
43. Bakolobaka: Tozalaki kosambela te.
عربي تفسیرونه:
وَلَمۡ نَكُ نُطۡعِمُ ٱلۡمِسۡكِينَ
44. Mpe tozalaki koleisa babola te.
عربي تفسیرونه:
وَكُنَّا نَخُوضُ مَعَ ٱلۡخَآئِضِينَ
45. Mpe tomitiyaki ngambu ya baye balingaki sé koloba mabe.
عربي تفسیرونه:
وَكُنَّا نُكَذِّبُ بِيَوۡمِ ٱلدِّينِ
46. Mpe tozalaki kondima тропа mokolo ya suka te,
عربي تفسیرونه:
حَتَّىٰٓ أَتَىٰنَا ٱلۡيَقِينُ
47. Kino liwa liyelaki biso.
عربي تفسیرونه:
فَمَا تَنفَعُهُمۡ شَفَٰعَةُ ٱلشَّٰفِعِينَ
48. Bolobeli ya balobeli ekosalisaka bango te.
عربي تفسیرونه:
فَمَا لَهُمۡ عَنِ ٱلتَّذۡكِرَةِ مُعۡرِضِينَ
49. Mpona nini bapesaki bokundoli mokongo?
عربي تفسیرونه:
كَأَنَّهُمۡ حُمُرٞ مُّسۡتَنفِرَةٞ
50. Bakomi lokola humuru(1) ya kopanzana,
1 Humuru: Ezali oboyiké ya nkombo himâr: Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 259.
عربي تفسیرونه:
فَرَّتۡ مِن قَسۡوَرَةِۭ
51. Tango bazali kokima nkosi.
عربي تفسیرونه:
بَلۡ يُرِيدُ كُلُّ ٱمۡرِيٕٖ مِّنۡهُمۡ أَن يُؤۡتَىٰ صُحُفٗا مُّنَشَّرَةٗ
52. Nyoso kati na bango azali koluka azua mokanda mpo ayeba.
عربي تفسیرونه:
كَلَّاۖ بَل لَّا يَخَافُونَ ٱلۡأٓخِرَةَ
53. Ah kasi te! Bazalaki kobanga mokolo ya suka te.
عربي تفسیرونه:
كَلَّآ إِنَّهُۥ تَذۡكِرَةٞ
54. Ah te! Oyo ezali ya soló bokundoli,
عربي تفسیرونه:
فَمَن شَآءَ ذَكَرَهُۥ
55. Oyo alingi akanisa.
عربي تفسیرونه:
وَمَا يَذۡكُرُونَ إِلَّآ أَن يَشَآءَ ٱللَّهُۚ هُوَ أَهۡلُ ٱلتَّقۡوَىٰ وَأَهۡلُ ٱلۡمَغۡفِرَةِ
56. Mpe bakokanisaka te sé Allah alinga. Ye nde esengeli babanga mpe ye nde Nkolo bolimbisi. atonda ngolu
عربي تفسیرونه:
 
د معناګانو ژباړه سورت: المدثر
د سورتونو فهرست (لړلیک) د مخ نمبر
 
د قرآن کریم د معناګانو ژباړه - لینګالا ژباړه - د ژباړو فهرست (لړلیک)

لینګالا ژبې ته د قرآن کریم د معناګانو ژباړه ، محمد بالنګوګو ژباړلې ده

بندول