Check out the new design

Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. * - Ishakiro ry'ibisobanuro

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Ankabut   Umurongo:
وَيَسۡتَعۡجِلُونَكَ بِٱلۡعَذَابِ وَلَوۡلَآ أَجَلٞ مُّسَمّٗى لَّجَآءَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ وَلَيَأۡتِيَنَّهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
Mpe bazali kotuna yo (óyela) bango etumbu na lombango, soki ezalaki na elaka na yango te oyo esila kotiama, elingaki ekomela bango mbalakaka, mpe bango bakoyebaka te.
Ibisobanuro by'icyarabu:
يَسۡتَعۡجِلُونَكَ بِٱلۡعَذَابِ وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمُحِيطَةُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
Bazali koyebisa yo (óyela) bango etumbu na lombango, kasi ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapengwi.
Ibisobanuro by'icyarabu:
يَوۡمَ يَغۡشَىٰهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِن فَوۡقِهِمۡ وَمِن تَحۡتِ أَرۡجُلِهِمۡ وَيَقُولُ ذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mokolo oyo etumbu ekozingaka bango o likolo na nsé ya makolo na bango mpe akolobaka na bango: Bomeka oyo bosalaki.
Ibisobanuro by'icyarabu:
يَٰعِبَادِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ أَرۡضِي وَٰسِعَةٞ فَإِيَّٰيَ فَٱعۡبُدُونِ
Eh bawumbu na ngai! Baye bandimelaki ngai! Ya sólo mabele na ngai mazali monene, bobondela ngai.
Ibisobanuro by'icyarabu:
كُلُّ نَفۡسٖ ذَآئِقَةُ ٱلۡمَوۡتِۖ ثُمَّ إِلَيۡنَا تُرۡجَعُونَ
Molimo nyoso mokomekaka liwa, sima bokozongisama epai na biso.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَنُبَوِّئَنَّهُم مِّنَ ٱلۡجَنَّةِ غُرَفٗا تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ نِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ
Mpe baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, tokovandisa bango okati ya Iola ya likolo koleka, oyo ezali kolekisa mingala na nsé na yango, bakozalaka seko kati na yango. Oyo nde litomba ya malamu тропа basali.
Ibisobanuro by'icyarabu:
ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
Baye bakangaki mitema mpe bamipesaki epai ya Nkolo wa bango.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَكَأَيِّن مِّن دَآبَّةٖ لَّا تَحۡمِلُ رِزۡقَهَا ٱللَّهُ يَرۡزُقُهَا وَإِيَّاكُمۡۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۖ فَأَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
Мре soki otuni bango: Nani akela likolo na mabele, mpe ati moyi na sanza, bakolobaka: Allah. Boye boni lisusu (sima) bazali koboya (kolanda nzela ya semba)?
Ibisobanuro by'icyarabu:
ٱللَّهُ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ وَيَقۡدِرُ لَهُۥٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko yango na oyo alingi kati ya bawumbu naye. Ya soló, Allah azali na boyebi ya biloko binso.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّن نَّزَّلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَحۡيَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ مِنۢ بَعۡدِ مَوۡتِهَا لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۚ قُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡقِلُونَ
Mpe soki otuni bango: Nani akitisaka mayi kowuta na likolo mpo epesa bomoyi na mabele osima ya kokauka na yango? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
Ibisobanuro by'icyarabu:
 
Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Ankabut
Urutonde rw'amasura numero y'urupapuro
 
Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. - Ishakiro ry'ibisobanuro

Byasobanuwe na Zakariya Muhammad Balngugu.

Gufunga