Check out the new design

Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. * - Ishakiro ry'ibisobanuro

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ibisobanuro by'amagambo Isura: Almulku   Umurongo:
وَأَسِرُّواْ قَوۡلَكُمۡ أَوِ ٱجۡهَرُواْ بِهِۦٓۖ إِنَّهُۥ عَلِيمُۢ بِذَاتِ ٱلصُّدُورِ
Soki ata bobombi maloba na bino to bobimisi yango polele, ya solo ye azali moyebi ya nyoso oyo ebombami o kati ya mitema (batolo)
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَلَا يَعۡلَمُ مَنۡ خَلَقَ وَهُوَ ٱللَّطِيفُ ٱلۡخَبِيرُ
Boye ayebi te baye akela mpe azali malamu atonda basango?
Ibisobanuro by'icyarabu:
هُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلۡأَرۡضَ ذَلُولٗا فَٱمۡشُواْ فِي مَنَاكِبِهَا وَكُلُواْ مِن رِّزۡقِهِۦۖ وَإِلَيۡهِ ٱلنُّشُورُ
Ye nde atiela bino mabele mpete botambola kati na yango lolenge bolingi, mpe bolia oyo apesi bino, mpe bozongi ekozala sé epai naye.
Ibisobanuro by'icyarabu:
ءَأَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يَخۡسِفَ بِكُمُ ٱلۡأَرۡضَ فَإِذَا هِيَ تَمُورُ
To boye bozali na ebateli libanda na oyo azali na likolo été akoki kokotisa bino na mabele kasi bokomona ete mabele ekoningana?
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَمۡ أَمِنتُم مَّن فِي ٱلسَّمَآءِ أَن يُرۡسِلَ عَلَيۡكُمۡ حَاصِبٗاۖ فَسَتَعۡلَمُونَ كَيۡفَ نَذِيرِ
To boye bobatelami liboso na oyo azali na likolo été atindela bino mopepe ya mabanga? Bokoyeba ndenge nini bokebisi na ngai ezali.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَلَقَدۡ كَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ
Mpe baye balekaki liboso na bango baboyaki, mpe etumbu na ngai ezalaki ndenge nini?
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَى ٱلطَّيۡرِ فَوۡقَهُمۡ صَٰٓفَّٰتٖ وَيَقۡبِضۡنَۚ مَا يُمۡسِكُهُنَّ إِلَّا ٱلرَّحۡمَٰنُۚ إِنَّهُۥ بِكُلِّ شَيۡءِۭ بَصِيرٌ
Boye bazali kornona te bandeke na likolo lolenge akangaka mpe afungolaka mapapu naye? Oyo asimbi bango ezali sé Ar-Rahmân[1]. Ya soló, ye amonaka biloko binso.
[1] Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي هُوَ جُندٞ لَّكُمۡ يَنصُرُكُم مِّن دُونِ ٱلرَّحۡمَٰنِۚ إِنِ ٱلۡكَٰفِرُونَ إِلَّا فِي غُرُورٍ
Nani akosalisa bino na mapinga ya kosunga bino liboso ya Ar-Rahmân? Ya soló, bapengwi bazali mpenza na libungi.
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَمَّنۡ هَٰذَا ٱلَّذِي يَرۡزُقُكُمۡ إِنۡ أَمۡسَكَ رِزۡقَهُۥۚ بَل لَّجُّواْ فِي عُتُوّٖ وَنُفُورٍ
Mpe nani mosusu akoki koleisa bino soki akangi bozui naye? Kasi bazali sé kosala miso makasi kati na mabe mpe koboya.
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَفَمَن يَمۡشِي مُكِبًّا عَلَىٰ وَجۡهِهِۦٓ أَهۡدَىٰٓ أَمَّن يَمۡشِي سَوِيًّا عَلَىٰ صِرَٰطٖ مُّسۡتَقِيمٖ
Boye oyo azali kotambola elongi na nsé akambami koleka oyo azali kotambola alima na nzela ya semba?
Ibisobanuro by'icyarabu:
قُلۡ هُوَ ٱلَّذِيٓ أَنشَأَكُمۡ وَجَعَلَ لَكُمُ ٱلسَّمۡعَ وَٱلۡأَبۡصَٰرَ وَٱلۡأَفۡـِٔدَةَۚ قَلِيلٗا مَّا تَشۡكُرُونَ
Loba: Ye nde akela bino mpe atiela bino bomoni na boyoki mpe mitema, baye bazali kotondo bazali moke.
Ibisobanuro by'icyarabu:
قُلۡ هُوَ ٱلَّذِي ذَرَأَكُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَإِلَيۡهِ تُحۡشَرُونَ
Loba: Ye nde atia bino okati ya mabele, mpe epai naye bokosanganaka.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Mpe bazali koloba: Elaka ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló?
Ibisobanuro by'icyarabu:
قُلۡ إِنَّمَا ٱلۡعِلۡمُ عِندَ ٱللَّهِ وَإِنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٞ
Loba: Boyebi bwa yango ezali nde epai ya Allah, ya soló nazali mokebisi ya polele.
Ibisobanuro by'icyarabu:
 
Ibisobanuro by'amagambo Isura: Almulku
Urutonde rw'amasura numero y'urupapuro
 
Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. - Ishakiro ry'ibisobanuro

Byasobanuwe na Zakariya Muhammad Balngugu.

Gufunga