Check out the new design

Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. * - Ishakiro ry'ibisobanuro

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ibisobanuro by'amagambo Isura: At Tawubat   Umurongo:
ثُمَّ يَتُوبُ ٱللَّهُ مِنۢ بَعۡدِ ذَٰلِكَ عَلَىٰ مَن يَشَآءُۗ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
27. Sima, Allah andimaka tubela ya oyo alingi. Mpe Allah azali molimbisi atonda ngolu.
Ibisobanuro by'icyarabu:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّمَا ٱلۡمُشۡرِكُونَ نَجَسٞ فَلَا يَقۡرَبُواْ ٱلۡمَسۡجِدَ ٱلۡحَرَامَ بَعۡدَ عَامِهِمۡ هَٰذَاۚ وَإِنۡ خِفۡتُمۡ عَيۡلَةٗ فَسَوۡفَ يُغۡنِيكُمُ ٱللَّهُ مِن فَضۡلِهِۦٓ إِن شَآءَۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلِيمٌ حَكِيمٞ
28. Eh bino bandimi! Ya sólo, bapagano bazali mbindo, (basambeli bikeko) bapusana pena na ndako esantu te o sima ya mobu mwa bango moye. Kasi soki bozali kobanga kimobola, Allah akopesaka bino bomengo na bolamu bwaye soki alingi, ya sólo, Allah azali moyebi atonda bwanya.
Ibisobanuro by'icyarabu:
قَٰتِلُواْ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱللَّهِ وَلَا بِٱلۡيَوۡمِ ٱلۡأٓخِرِ وَلَا يُحَرِّمُونَ مَا حَرَّمَ ٱللَّهُ وَرَسُولُهُۥ وَلَا يَدِينُونَ دِينَ ٱلۡحَقِّ مِنَ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡكِتَٰبَ حَتَّىٰ يُعۡطُواْ ٱلۡجِزۡيَةَ عَن يَدٖ وَهُمۡ صَٰغِرُونَ
29. Bobundisa baye bazali kondima na Allah te, na mokolo ya suka te, mpe bazali kopekisa te maye Allah na motindami waye bapekisa, mpe bazali коропа lingomba lia lokuta. Batiki oyo ya bosôló, o kati ya baye bapesama buku (bayuda na baklišto), kino bakofuta lomande na maboko na bango na sima ya koyoka soni.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَقَالَتِ ٱلۡيَهُودُ عُزَيۡرٌ ٱبۡنُ ٱللَّهِ وَقَالَتِ ٱلنَّصَٰرَى ٱلۡمَسِيحُ ٱبۡنُ ٱللَّهِۖ ذَٰلِكَ قَوۡلُهُم بِأَفۡوَٰهِهِمۡۖ يُضَٰهِـُٔونَ قَوۡلَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ مِن قَبۡلُۚ قَٰتَلَهُمُ ٱللَّهُۖ أَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
30. Mpe bayuda balobi: Uzairi azali mwana ya Allah. Mpe baklišto balobi: Masiya azali mwana ya Allah. Wana ezali liloba oyo ebimaka na minoko mia bango. Bazali komekola liloba lia bapengwi baye bapengwa liboso. Allah aboma bango na maye bazalaki kosala. Ndenge bamitiye mosika na bosôló!
Ibisobanuro by'icyarabu:
ٱتَّخَذُوٓاْ أَحۡبَارَهُمۡ وَرُهۡبَٰنَهُمۡ أَرۡبَابٗا مِّن دُونِ ٱللَّهِ وَٱلۡمَسِيحَ ٱبۡنَ مَرۡيَمَ وَمَآ أُمِرُوٓاْ إِلَّا لِيَعۡبُدُوٓاْ إِلَٰهٗا وَٰحِدٗاۖ لَّآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَۚ سُبۡحَٰنَهُۥ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
31. Bazui bakonzi ya mangomba na bango na masiya mwana ya Maryam lokola banzambe na botiki Allah. Kasi batindamaki te sé babondela nzambe moko oyo azali na mosangani te sé ye mei (Allah), nkembo naye oyo azali likolo ya maye bazali kosangisa ye na yango.
Ibisobanuro by'icyarabu:
 
Ibisobanuro by'amagambo Isura: At Tawubat
Urutonde rw'amasura numero y'urupapuro
 
Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. - Ishakiro ry'ibisobanuro

Byasobanuwe na Zakariya Muhammad Balngugu.

Gufunga