ශුද්ධවූ අල් කුර්ආන් අර්ථ කථනය - الترجمة اللينغالا * - පරිවර්තන පටුන

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

අර්ථ කථනය පරිච්ඡේදය: සූරා අල් අන්කබූත්   වාක්‍යය:

Al-Ankabût (LIMPULUTUTU)

الٓمٓ
1. Alif, lâm, mîm.(1)
1 Bótala па suratu Al-Baqarah токаро: 1.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَحَسِبَ ٱلنَّاسُ أَن يُتۡرَكُوٓاْ أَن يَقُولُوٓاْ ءَامَنَّا وَهُمۡ لَا يُفۡتَنُونَ
2. Bato bakanisi ete bakotika bango baloba ete tondimi, mpe bamekama te?
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَقَدۡ فَتَنَّا ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡۖ فَلَيَعۡلَمَنَّ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ صَدَقُواْ وَلَيَعۡلَمَنَّ ٱلۡكَٰذِبِينَ
3. Ya soló, tosilaki komeka baye baleka liboso na bango, ya sólo, Allah akoyebaka baye balobaka bosôló mpe baye bakosaka.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَمۡ حَسِبَ ٱلَّذِينَ يَعۡمَلُونَ ٱلسَّيِّـَٔاتِ أَن يَسۡبِقُونَاۚ سَآءَ مَا يَحۡكُمُونَ
4. To mpe baye bazali kosala mabe bazali kokanisa ete bakokima biso?, oyo lolenge mabe yakokata likambo!
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
مَن كَانَ يَرۡجُواْ لِقَآءَ ٱللَّهِ فَإِنَّ أَجَلَ ٱللَّهِ لَأٓتٖۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
5. Oyo azali kolikia kokutana na Allah, ya solo elaka ya Allah ekoyaka. Mpe azali moyoki atonda boyebi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَن جَٰهَدَ فَإِنَّمَا يُجَٰهِدُ لِنَفۡسِهِۦٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ لَغَنِيٌّ عَنِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
6. Mpe oyo akobunda, ya solo azali kobunda тропа ye moko. Ya solo molongo mobimba ezali тропа Allah.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَنُكَفِّرَنَّ عَنۡهُمۡ سَيِّـَٔاتِهِمۡ وَلَنَجۡزِيَنَّهُمۡ أَحۡسَنَ ٱلَّذِي كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
7. Mpe baye bandimi mpe bazali kosala misala ya malamu, tokolongola masumu na bango, mpe tokofuta bango malamu тропа maye basalaki.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَوَصَّيۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ بِوَٰلِدَيۡهِ حُسۡنٗاۖ وَإِن جَٰهَدَاكَ لِتُشۡرِكَ بِي مَا لَيۡسَ لَكَ بِهِۦ عِلۡمٞ فَلَا تُطِعۡهُمَآۚ إِلَيَّ مَرۡجِعُكُمۡ فَأُنَبِّئُكُم بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
8. Мре toyebisaki na moto ete: S alela tata na mama nayo bolamu, mpe soki batindi yo na makasi mpo osangisa ngai na maye oyebi te, kotosa bango te. Epai na ngai nde bokozongaka, mpe nakoyebisaka bino maye bozalaki kosala.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَنُدۡخِلَنَّهُمۡ فِي ٱلصَّٰلِحِينَ
9. Mpe baye bandima mpe bazali kosala misala milamu, tokokotisa bango ya soló elongo ya basali bolamu.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَقُولُ ءَامَنَّا بِٱللَّهِ فَإِذَآ أُوذِيَ فِي ٱللَّهِ جَعَلَ فِتۡنَةَ ٱلنَّاسِ كَعَذَابِ ٱللَّهِۖ وَلَئِن جَآءَ نَصۡرٞ مِّن رَّبِّكَ لَيَقُولُنَّ إِنَّا كُنَّا مَعَكُمۡۚ أَوَلَيۡسَ ٱللَّهُ بِأَعۡلَمَ بِمَا فِي صُدُورِ ٱلۡعَٰلَمِينَ
10. Mpe bato mosusu bazali koloba ete; tondimi na Allah, mpe tango bakozua pasi тропа Allah, batia momekana ya bato lokola etumbu ya Allah. Mpe soki lisungi lia Nkolo wayo liyei, balobi: Tozalaki elongo na bino, boye ezali te Allah nde moyebi ya maye mabombami kati ya bantolo ya moto nyoso?
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَيَعۡلَمَنَّ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَلَيَعۡلَمَنَّ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ
11. Allah ayebi mpenza na bosóló bandimi mpe bato ya bilongi mibale.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلَّذِينَ ءَامَنُواْ ٱتَّبِعُواْ سَبِيلَنَا وَلۡنَحۡمِلۡ خَطَٰيَٰكُمۡ وَمَا هُم بِحَٰمِلِينَ مِنۡ خَطَٰيَٰهُم مِّن شَيۡءٍۖ إِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
12. Bapengwi bazali koloba na bandimi ete: Bolanda nzela na biso, tondimi kozua mokumba ya masumu na bino kasi bakomema yango te. Ya sólo bazali bato ya lokuta.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَيَحۡمِلُنَّ أَثۡقَالَهُمۡ وَأَثۡقَالٗا مَّعَ أَثۡقَالِهِمۡۖ وَلَيُسۡـَٔلُنَّ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ عَمَّا كَانُواْ يَفۡتَرُونَ
13.Ya sôló penza, bakomema mikumba mia bango, mpe mikumba misusu. Mpe bakotunama na mokolo ya suka тропа maye bazalaki kosala. (тропа mabe na bango na kobuka lokuta).
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا نُوحًا إِلَىٰ قَوۡمِهِۦ فَلَبِثَ فِيهِمۡ أَلۡفَ سَنَةٍ إِلَّا خَمۡسِينَ عَامٗا فَأَخَذَهُمُ ٱلطُّوفَانُ وَهُمۡ ظَٰلِمُونَ
14.Mpe ya soló, totindaki Núh epai na bato naye, mpe avandaki okati na bango mbula nkoto moko, longola mibu ntuku mitano. Mpe mpela ya makasi ebomaki bango mpo ete bazalaki babubi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
فَأَنجَيۡنَٰهُ وَأَصۡحَٰبَ ٱلسَّفِينَةِ وَجَعَلۡنَٰهَآ ءَايَةٗ لِّلۡعَٰلَمِينَ
15.Mpe tobikisaki ye na baye bazalaki elongo naye na masuwa, mpe totiyaki yango ezala elembo тропа molongo mobimba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَإِبۡرَٰهِيمَ إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ وَٱتَّقُوهُۖ ذَٰلِكُمۡ خَيۡرٞ لَّكُمۡ إِن كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
16.Mpe tango Ibrâhîm alobaki na bato naye: Bobondela Allah mpe bobanga ye. Wana ezali malamu тропа bino, soki sólo bozali koyeba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
إِنَّمَا تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡثَٰنٗا وَتَخۡلُقُونَ إِفۡكًاۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ تَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَمۡلِكُونَ لَكُمۡ رِزۡقٗا فَٱبۡتَغُواْ عِندَ ٱللَّهِ ٱلرِّزۡقَ وَٱعۡبُدُوهُ وَٱشۡكُرُواْ لَهُۥٓۖ إِلَيۡهِ تُرۡجَعُونَ
17.Bozali kobondela nde bikeko na botiki Allah mpe bozali kobuka lokuta, ya sólo baye bozali kobondela na botiki Allah bazali na bozui te ya kopesa bino, boluka nde bozui epai ya Allah mpe bobondela ye mpe botondo ye, epai naye nde bokozongisama.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَإِن تُكَذِّبُواْ فَقَدۡ كَذَّبَ أُمَمٞ مِّن قَبۡلِكُمۡۖ وَمَا عَلَى ٱلرَّسُولِ إِلَّا ٱلۡبَلَٰغُ ٱلۡمُبِينُ
18. Мре soki boboyi, kaši mabota maye maleka liboso na bino basilaki mpe koboya. Na yango, motindami azali na eloko ya kosala te sé akomisa sango ya polele.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ كَيۡفَ يُبۡدِئُ ٱللَّهُ ٱلۡخَلۡقَ ثُمَّ يُعِيدُهُۥٓۚ إِنَّ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٞ
19. Boye ozali kornona te lolenge Allah azali kobanda bokeli, sima azongisi yango? Ya soló, wana ezali pete тропа Allah.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
قُلۡ سِيرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱنظُرُواْ كَيۡفَ بَدَأَ ٱلۡخَلۡقَۚ ثُمَّ ٱللَّهُ يُنشِئُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأٓخِرَةَۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
20. Loba: Botambola na mokili mpe bótala ndenge nini abandaki kokela, na sima Allah nde akozongisa bikelamu na mokolo ya suka. Ya solo, Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
يُعَذِّبُ مَن يَشَآءُ وَيَرۡحَمُ مَن يَشَآءُۖ وَإِلَيۡهِ تُقۡلَبُونَ
21. Apesaka etumbu na oyo alingi, mpe ayokelaka mawa na oyo alingi. Mpe epai naye nde bokozongisama.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَآ أَنتُم بِمُعۡجِزِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَا فِي ٱلسَّمَآءِۖ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٖ
22. Mpe bozali na makoki ya kotelemela ye te, ezala na mabele to na likolo. Mpe bozali na mokonzi mosusu te, mpe mosungi te bobele Allah.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِـَٔايَٰتِ ٱللَّهِ وَلِقَآئِهِۦٓ أُوْلَٰٓئِكَ يَئِسُواْ مِن رَّحۡمَتِي وَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٌ أَلِيمٞ
23. Mpe baye baboyi kondima na mikapo mia Allah mpe bazangi kolikia kokutana naye, bango wana bazangi ngolu na ngai, mpe bakozala na etumbu ya makasi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
فَمَا كَانَ جَوَابَ قَوۡمِهِۦٓ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱقۡتُلُوهُ أَوۡ حَرِّقُوهُ فَأَنجَىٰهُ ٱللَّهُ مِنَ ٱلنَّارِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
24. Bato naye bayanolaki ete: Boboma ye, to botumba ye mpe Allah abikisaki ye na moto, ya soló, wana ezali elembo тропа bandimi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَقَالَ إِنَّمَا ٱتَّخَذۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡثَٰنٗا مَّوَدَّةَ بَيۡنِكُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ ثُمَّ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَكۡفُرُ بَعۡضُكُم بِبَعۡضٖ وَيَلۡعَنُ بَعۡضُكُم بَعۡضٗا وَمَأۡوَىٰكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن نَّٰصِرِينَ
25. Mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya solo, bozui na esika Allah bikeko, mpe bolingi bango, na bolingo na bomoyi ya nsé, sima na mokolo ya suka, bokoboyana bino na bino, mpe basusu bakopesaka botutu na basusu, mpe esika na bino ekozalaka nde moto, mpe bokozuaka mosalisi te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
۞ فَـَٔامَنَ لَهُۥ لُوطٞۘ وَقَالَ إِنِّي مُهَاجِرٌ إِلَىٰ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
26. Mpe Loth andimelaki ye, mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya sólo, nakei epai ya Nkolo na ngai. Ya soló ye azali na bokasi atonda bwanya.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَجَعَلۡنَا فِي ذُرِّيَّتِهِ ٱلنُّبُوَّةَ وَٱلۡكِتَٰبَ وَءَاتَيۡنَٰهُ أَجۡرَهُۥ فِي ٱلدُّنۡيَاۖ وَإِنَّهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
27. Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki na libota naye bokitani ya bantoma mpe likabo ya kozua buku, mpe topesaki ye lifuta ya nsé. Mpe mokolo ya suka akozala na molongo ya bato malamu.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلُوطًا إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ إِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلۡفَٰحِشَةَ مَا سَبَقَكُم بِهَا مِنۡ أَحَدٖ مِّنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ
28. Mpe tango Loth alobaki na bato naye: Ya sólo, bino bozali koya na mabe oyo ata moto moko te asalaki yango liboso na mokili.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَئِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلرِّجَالَ وَتَقۡطَعُونَ ٱلسَّبِيلَ وَتَأۡتُونَ فِي نَادِيكُمُ ٱلۡمُنكَرَۖ فَمَا كَانَ جَوَابَ قَوۡمِهِۦٓ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱئۡتِنَا بِعَذَابِ ٱللَّهِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
29. Ya soló penza, bozali kokutana mibali na mibali тропа kosilisa ba mposa na bino ya nzoto mpe bozali kokanga nzela (ya mabota)? Mpe bozali koya na mabe na esika bovandaka? Kasi eyano ya bato naye ezalaki ete; yela biso etumbu soki ozali moto ya bosembo.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
قَالَ رَبِّ ٱنصُرۡنِي عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
30. Alobaki ete: Nkolo, longisa ngai likolo ya bato ya mabe.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَمَّا جَآءَتۡ رُسُلُنَآ إِبۡرَٰهِيمَ بِٱلۡبُشۡرَىٰ قَالُوٓاْ إِنَّا مُهۡلِكُوٓاْ أَهۡلِ هَٰذِهِ ٱلۡقَرۡيَةِۖ إِنَّ أَهۡلَهَا كَانُواْ ظَٰلِمِينَ
31. Mpe tango batindami na biso bayelaki Ibrâhîm sango elamu (sango ya kobotama ya Is’hâq na mwana naye Ya’qüb), balobi: Ya soló, toyei mpo toboma bato ya mboka oyo. Ya soló, bato na yango bazali babubi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
قَالَ إِنَّ فِيهَا لُوطٗاۚ قَالُواْ نَحۡنُ أَعۡلَمُ بِمَن فِيهَاۖ لَنُنَجِّيَنَّهُۥ وَأَهۡلَهُۥٓ إِلَّا ٱمۡرَأَتَهُۥ كَانَتۡ مِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
32. Alobi: Ya sólo Loth azali wana, balobi: Biso toyebi malamu baye bavandi wana, tokobikisa ye na libota naye, longola sé mwasi waye, akozala o kati ya batikali тропа kozua etumbu.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَمَّآ أَن جَآءَتۡ رُسُلُنَا لُوطٗا سِيٓءَ بِهِمۡ وَضَاقَ بِهِمۡ ذَرۡعٗاۖ وَقَالُواْ لَا تَخَفۡ وَلَا تَحۡزَنۡ إِنَّا مُنَجُّوكَ وَأَهۡلَكَ إِلَّا ٱمۡرَأَتَكَ كَانَتۡ مِنَ ٱلۡغَٰبِرِينَ
33. Mpe tango batindami ba biso bakomaki epai na Loth, abangaki mpe ayokaki mpasi na motema тропа bango ete bakotungisama na bato ya mboka, kasi balobaki naye ete; kobanga te, mpe koyoka mpasi te, tokobikisa yo mpe libota nayo. Longola sé mwasi wayo, akozala o kati ya babebisami.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
إِنَّا مُنزِلُونَ عَلَىٰٓ أَهۡلِ هَٰذِهِ ٱلۡقَرۡيَةِ رِجۡزٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ بِمَا كَانُواْ يَفۡسُقُونَ
34. Ya sólo, tozali kokitisela bato ya mboka oyo etumbu kowuta o likolo kolandana masumu na bango.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَقَد تَّرَكۡنَا مِنۡهَآ ءَايَةَۢ بَيِّنَةٗ لِّقَوۡمٖ يَعۡقِلُونَ
35. Mpe totikaki elembo ya polele (ya bokebisi) kati na yango mpo bato bakoka koyeba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَإِلَىٰ مَدۡيَنَ أَخَاهُمۡ شُعَيۡبٗا فَقَالَ يَٰقَوۡمِ ٱعۡبُدُواْ ٱللَّهَ وَٱرۡجُواْ ٱلۡيَوۡمَ ٱلۡأٓخِرَ وَلَا تَعۡثَوۡاْ فِي ٱلۡأَرۡضِ مُفۡسِدِينَ
36. Lolenge moko na mad’yan, ndeko wa bango Shuaîb alobaki: Oh bato ba ngai! Bobondela Allah mpe bolikia na mokolo ya suka, kasi botia mobulu na mokili te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
فَكَذَّبُوهُ فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلرَّجۡفَةُ فَأَصۡبَحُواْ فِي دَارِهِمۡ جَٰثِمِينَ
37. Bazuaki ye moto ya lokuta, mpe etumbu ya boningani ya mabele ezuaki bango mpe tongo etanelaki bango basili kokufa na bandako na bango.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَعَادٗا وَثَمُودَاْ وَقَد تَّبَيَّنَ لَكُم مِّن مَّسَٰكِنِهِمۡۖ وَزَيَّنَ لَهُمُ ٱلشَّيۡطَٰنُ أَعۡمَٰلَهُمۡ فَصَدَّهُمۡ عَنِ ٱلسَّبِيلِ وَكَانُواْ مُسۡتَبۡصِرِينَ
38. Mpe lolenge moko tobebisaki bato ya mboka aad mpe thamûd, bozali kornona bango polele na bisika na bango. Mpe satana abongiselaki bango misala mia bango, mpe apekisaki bango nzela ya semba na bango bazalaki kati na koyeba te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَقَٰرُونَ وَفِرۡعَوۡنَ وَهَٰمَٰنَۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مُّوسَىٰ بِٱلۡبَيِّنَٰتِ فَٱسۡتَكۡبَرُواْ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا كَانُواْ سَٰبِقِينَ
39. Mpe (lolenge moko) na Qârûn, falo, na Hâmân. Mûssa asilaki koyela bango bilembo, basalaki lolendo na mokili, kasi bakokaki kokima (biso) te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
فَكُلًّا أَخَذۡنَا بِذَنۢبِهِۦۖ فَمِنۡهُم مَّنۡ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِ حَاصِبٗا وَمِنۡهُم مَّنۡ أَخَذَتۡهُ ٱلصَّيۡحَةُ وَمِنۡهُم مَّنۡ خَسَفۡنَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ وَمِنۡهُم مَّنۡ أَغۡرَقۡنَاۚ وَمَا كَانَ ٱللَّهُ لِيَظۡلِمَهُمۡ وَلَٰكِن كَانُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ يَظۡلِمُونَ
40. Mpe topesaki bato na bato etumbu тропа lisumu na bango, basusu totindelaki bango mopepe ya makasi, mpe basusu kati na bango bazuaki bogangi ya makasi (tángbá) lokola nkake ezuaki bango, mpe basusu kati na bango tozindisaki na mabele mpe basusu tozindisaki bango na mayi. Мре Allah asalaki bango mabe te, kasi bango moko nde bamisalaki mabe.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
مَثَلُ ٱلَّذِينَ ٱتَّخَذُواْ مِن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡلِيَآءَ كَمَثَلِ ٱلۡعَنكَبُوتِ ٱتَّخَذَتۡ بَيۡتٗاۖ وَإِنَّ أَوۡهَنَ ٱلۡبُيُوتِ لَبَيۡتُ ٱلۡعَنكَبُوتِۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
41. Ndakisa ya baye bazui babateli na botiki Allah, ezali lokola limpulututu oyo atongi ndako ya motawu, nzoka nde ndako oyo ezali motawu koleka, ezali ndako ya limpulututu. Soki solo bazali koyeba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
إِنَّ ٱللَّهَ يَعۡلَمُ مَا يَدۡعُونَ مِن دُونِهِۦ مِن شَيۡءٖۚ وَهُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
42. Ya soló, Allah ayebi manso babondelaka na botiki ye mpe azali wa nguya atonda bwányá.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَتِلۡكَ ٱلۡأَمۡثَٰلُ نَضۡرِبُهَا لِلنَّاسِۖ وَمَا يَعۡقِلُهَآ إِلَّا ٱلۡعَٰلِمُونَ
43. Wana ezali bandakisa tozali kopesa yango тропа bato, тре baye bakoki koyeba yango sé baye bazali na boyebi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
خَلَقَ ٱللَّهُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ بِٱلۡحَقِّۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
44. Allah akela likolo na mabele na bosôló bonso. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
ٱتۡلُ مَآ أُوحِيَ إِلَيۡكَ مِنَ ٱلۡكِتَٰبِ وَأَقِمِ ٱلصَّلَوٰةَۖ إِنَّ ٱلصَّلَوٰةَ تَنۡهَىٰ عَنِ ٱلۡفَحۡشَآءِ وَٱلۡمُنكَرِۗ وَلَذِكۡرُ ٱللَّهِ أَكۡبَرُۗ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ مَا تَصۡنَعُونَ
45. Tanga oyo ekitelaki yo kati na buku, mpe telemisa losambo. Ya sólo, losambo epekisaka (moto) kosala mabe, kasi bokundoli bwa Allah nde ezali monene koleka. Mpe Allah ayebi maye bozali kosala.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
۞ وَلَا تُجَٰدِلُوٓاْ أَهۡلَ ٱلۡكِتَٰبِ إِلَّا بِٱلَّتِي هِيَ أَحۡسَنُ إِلَّا ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ مِنۡهُمۡۖ وَقُولُوٓاْ ءَامَنَّا بِٱلَّذِيٓ أُنزِلَ إِلَيۡنَا وَأُنزِلَ إِلَيۡكُمۡ وَإِلَٰهُنَا وَإِلَٰهُكُمۡ وَٰحِدٞ وَنَحۡنُ لَهُۥ مُسۡلِمُونَ
46. Mpe bosuanisa te baye bazuaki buku liboso, sé na lolenge ya malamu, longola sé baye kati na bango basali mabe, mpe boloba na bango ete; tondimi na maye ekiteli biso, mpe maye ekitaki epai na bino, тре nzambe na biso na bino azali sé moko oyo biso tomisokie epai naye. (Allah)
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَكَذَٰلِكَ أَنزَلۡنَآ إِلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَۚ فَٱلَّذِينَ ءَاتَيۡنَٰهُمُ ٱلۡكِتَٰبَ يُؤۡمِنُونَ بِهِۦۖ وَمِنۡ هَٰٓؤُلَآءِ مَن يُؤۡمِنُ بِهِۦۚ وَمَا يَجۡحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا ٱلۡكَٰفِرُونَ
47. Ndenge wana nde tokitiselaki yo buku. Мре baye topesaki bango buku bazali kondimela yango, mpe kati na yango basusu bazali kondima na yango. Mpe bazali koboya kondimela mikapo mia biso sé bapengwi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَا كُنتَ تَتۡلُواْ مِن قَبۡلِهِۦ مِن كِتَٰبٖ وَلَا تَخُطُّهُۥ بِيَمِينِكَۖ إِذٗا لَّٱرۡتَابَ ٱلۡمُبۡطِلُونَ
48. Mpe yambo na yango (kurani), otangaki ata buku moko te, mpe okomaki na loboko nayo ya mobali te, soki te, baye bazali kotia tembe na bosóló, balingaki kotia ntembe.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
بَلۡ هُوَ ءَايَٰتُۢ بَيِّنَٰتٞ فِي صُدُورِ ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَۚ وَمَا يَجۡحَدُ بِـَٔايَٰتِنَآ إِلَّا ٱلظَّٰلِمُونَ
49. Kasi ezali na bilembo bia polele bizali okati ya mitema mia baye bapesami boyebi. Mpe baboyaka mikapo mia biso sé babubi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَقَالُواْ لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡهِ ءَايَٰتٞ مِّن رَّبِّهِۦۚ قُلۡ إِنَّمَا ٱلۡأٓيَٰتُ عِندَ ٱللَّهِ وَإِنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
50. Mpe balobi: Soki ata bilembo ekitelaka ye kowuta epai ya Nkolo waye, loba: Ya soló bilembo ewutaka epai ya Allah. Мре ya sólo, ngai nazali mokebisi ya polele.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَوَلَمۡ يَكۡفِهِمۡ أَنَّآ أَنزَلۡنَا عَلَيۡكَ ٱلۡكِتَٰبَ يُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَرَحۡمَةٗ وَذِكۡرَىٰ لِقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
51. Boye ekoki тропа bango te buku oyo tokitiselaki yo mpo etangamela bango? Ya sólo, wana ezali nde ngolu mpe bokundoli тропа bandimi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
قُلۡ كَفَىٰ بِٱللَّهِ بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡ شَهِيدٗاۖ يَعۡلَمُ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ بِٱلۡبَٰطِلِ وَكَفَرُواْ بِٱللَّهِ أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡخَٰسِرُونَ
52. Loba: Allah akoki na bonzeneneke kati kati na ngai na bino, azali moyebi ya manso maye mazali o likolo na mabele, mpe baye bazali kondima na makambo ya mpamba, mpe bazali kopengwa na Allah, bango nde bazangi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَيَسۡتَعۡجِلُونَكَ بِٱلۡعَذَابِ وَلَوۡلَآ أَجَلٞ مُّسَمّٗى لَّجَآءَهُمُ ٱلۡعَذَابُۚ وَلَيَأۡتِيَنَّهُم بَغۡتَةٗ وَهُمۡ لَا يَشۡعُرُونَ
53. Mpe bazali kotuna yo (óyela) bango etumbu na lombango, soki ezalaki na elaka na yango te oyo esila kotiama, elingaki ekomela bango mbalakaka, mpe bango bakoyebaka te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
يَسۡتَعۡجِلُونَكَ بِٱلۡعَذَابِ وَإِنَّ جَهَنَّمَ لَمُحِيطَةُۢ بِٱلۡكَٰفِرِينَ
54. Bazali koyebisa yo (óyela) bango etumbu na lombango, kasi ya soló moto mwa lifelo mokozinga bapengwi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
يَوۡمَ يَغۡشَىٰهُمُ ٱلۡعَذَابُ مِن فَوۡقِهِمۡ وَمِن تَحۡتِ أَرۡجُلِهِمۡ وَيَقُولُ ذُوقُواْ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
55. Mokolo oyo etumbu ekozingaka bango o likolo na nsé ya makolo na bango mpe akolobaka na bango: Bomeka oyo bosalaki.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
يَٰعِبَادِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُوٓاْ إِنَّ أَرۡضِي وَٰسِعَةٞ فَإِيَّٰيَ فَٱعۡبُدُونِ
56. Eh bawumbu na ngai! Baye bandimelaki ngai! Ya sólo mabele na ngai mazali monene, bobondela ngai.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
كُلُّ نَفۡسٖ ذَآئِقَةُ ٱلۡمَوۡتِۖ ثُمَّ إِلَيۡنَا تُرۡجَعُونَ
57. Molimo nyoso mokomekaka liwa, sima bokozongisama epai na biso.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ لَنُبَوِّئَنَّهُم مِّنَ ٱلۡجَنَّةِ غُرَفٗا تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ نِعۡمَ أَجۡرُ ٱلۡعَٰمِلِينَ
58. Mpe baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, tokovandisa bango okati ya Iola ya likolo koleka, oyo ezali kolekisa mingala na nsé na yango, bakozalaka seko kati na yango. Oyo nde litomba ya malamu тропа basali.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
ٱلَّذِينَ صَبَرُواْ وَعَلَىٰ رَبِّهِمۡ يَتَوَكَّلُونَ
59. Baye bakangaki mitema mpe bamipesaki epai ya Nkolo wa bango.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَكَأَيِّن مِّن دَآبَّةٖ لَّا تَحۡمِلُ رِزۡقَهَا ٱللَّهُ يَرۡزُقُهَا وَإِيَّاكُمۡۚ وَهُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
60. Ata nyama moko te ekoki komileisa yango moko, kino Allah akopesa ye bilei naye na bino (bato) тре lokola. Мре azali moyoki atonda boyebi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّنۡ خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَسَخَّرَ ٱلشَّمۡسَ وَٱلۡقَمَرَ لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۖ فَأَنَّىٰ يُؤۡفَكُونَ
61. Мре soki otuni bango: Nani akela likolo na mabele, mpe ati moyi na sanza, bakolobaka: Allah. Boye boni lisusu (sima) bazali koboya (kolanda nzela ya semba)?
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
ٱللَّهُ يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ وَيَقۡدِرُ لَهُۥٓۚ إِنَّ ٱللَّهَ بِكُلِّ شَيۡءٍ عَلِيمٞ
62. Allah apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko yango na oyo alingi kati ya bawumbu naye. Ya soló, Allah azali na boyebi ya biloko binso.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَئِن سَأَلۡتَهُم مَّن نَّزَّلَ مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ فَأَحۡيَا بِهِ ٱلۡأَرۡضَ مِنۢ بَعۡدِ مَوۡتِهَا لَيَقُولُنَّ ٱللَّهُۚ قُلِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِۚ بَلۡ أَكۡثَرُهُمۡ لَا يَعۡقِلُونَ
63. Mpe soki otuni bango: Nani akitisaka mayi kowuta na likolo mpo epesa bomoyi na mabele osima ya kokauka na yango? Bakolobaka: Ya sólo, ezali Allah. Loba: Lokumu na Allah, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَا هَٰذِهِ ٱلۡحَيَوٰةُ ٱلدُّنۡيَآ إِلَّا لَهۡوٞ وَلَعِبٞۚ وَإِنَّ ٱلدَّارَ ٱلۡأٓخِرَةَ لَهِيَ ٱلۡحَيَوَانُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
64. Mpe ya sólo, bomoyi ya mokili oyo ezali sé liseki mpe lisano, mpe bovandi ya mokolo mwa suka, ezali bomoyi ya soló, soki solo bazali koyeba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
فَإِذَا رَكِبُواْ فِي ٱلۡفُلۡكِ دَعَوُاْ ٱللَّهَ مُخۡلِصِينَ لَهُ ٱلدِّينَ فَلَمَّا نَجَّىٰهُمۡ إِلَى ٱلۡبَرِّ إِذَا هُمۡ يُشۡرِكُونَ
65. Mpe soki bamati na masuwa, babondeli Allah na bomoko mpe balandi lingomba lia ye, mpe soki abikisi bango akomisi bango na mokili, okomona bakomi kosangisa ye.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
لِيَكۡفُرُواْ بِمَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡ وَلِيَتَمَتَّعُواْۚ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
66. Baboya oyo topesaki bango, mpe basepela na mokili, kasi bakoyebaka kala mingi te.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
أَوَلَمۡ يَرَوۡاْ أَنَّا جَعَلۡنَا حَرَمًا ءَامِنٗا وَيُتَخَطَّفُ ٱلنَّاسُ مِنۡ حَوۡلِهِمۡۚ أَفَبِٱلۡبَٰطِلِ يُؤۡمِنُونَ وَبِنِعۡمَةِ ٱللَّهِ يَكۡفُرُونَ
67. Boye bazali kornona te ete: (Ya sólo) totiaki mboka esantu(1) ezala ndako ya kimia, nzoka nde bato bazali kolongolama zinga zinga na yango? Boye bazali kondima na maye mazanga ntina mpe baboyi bolamu ya Allah?
1 Mboka esantu: Makkah.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَنۡ أَظۡلَمُ مِمَّنِ ٱفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَوۡ كَذَّبَ بِٱلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُۥٓۚ أَلَيۡسَ فِي جَهَنَّمَ مَثۡوٗى لِّلۡكَٰفِرِينَ
68. Mpe nani azali mabe koleka moto oyo azali kobukela Allah lokuta, to aboyi kondima na bosóló ntango eyeli ye? Boye esika ya bapengwi ezali kati na lifelo te?
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱلَّذِينَ جَٰهَدُواْ فِينَا لَنَهۡدِيَنَّهُمۡ سُبُلَنَاۚ وَإِنَّ ٱللَّهَ لَمَعَ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
69. Mpe baye basalaka makasi тропа biso, ya sólo tokokambaka bango na banzela na biso. Mpe ya sólo, Allah azali elongo na babongisi.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
 
අර්ථ කථනය පරිච්ඡේදය: සූරා අල් අන්කබූත්
සූරා පටුන පිටු අංක
 
ශුද්ධවූ අල් කුර්ආන් අර්ථ කථනය - الترجمة اللينغالا - පරිවර්තන පටුන

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

වසන්න