Check out the new design

Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo * - Indise ng mga Salin

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Mu’minūn   Ayah:
أَلَمۡ تَكُنۡ ءَايَٰتِي تُتۡلَىٰ عَلَيۡكُمۡ فَكُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ
105. Mitangelama bino mikapo mia ngai te, kasi bozalaki kondimela yango te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالُواْ رَبَّنَا غَلَبَتۡ عَلَيۡنَا شِقۡوَتُنَا وَكُنَّا قَوۡمٗا ضَآلِّينَ
106. Bakolobaka: Nkolo wa biso, bamabe na biso elongi biso mpe tozalaki babungi nzela.
Ang mga Tafsir na Arabe:
رَبَّنَآ أَخۡرِجۡنَا مِنۡهَا فَإِنۡ عُدۡنَا فَإِنَّا ظَٰلِمُونَ
107. Nkolo wa biso, bimisa biso okati na yango, mpe soki tozongeli, tokozala babubi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالَ ٱخۡسَـُٔواْ فِيهَا وَلَا تُكَلِّمُونِ
108. Alobi: Botikala na kati na kozanga lokumu, mpe bolobisa ngai te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُۥ كَانَ فَرِيقٞ مِّنۡ عِبَادِي يَقُولُونَ رَبَّنَآ ءَامَنَّا فَٱغۡفِرۡ لَنَا وَٱرۡحَمۡنَا وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
109. Ya soló, Ezalaki na lisanga moko ya bawumbu na ngai bakolobaka: Nkolo wa biso, tondimi, limbisa biso mpe yokela biso mawa. Ya soló, yo ozali wa ngolu otanda bolamu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱتَّخَذۡتُمُوهُمۡ سِخۡرِيًّا حَتَّىٰٓ أَنسَوۡكُمۡ ذِكۡرِي وَكُنتُم مِّنۡهُمۡ تَضۡحَكُونَ
110. Kasi botiolaki bango, kino ebosanisi bino kokumisa ngai, mpe bozalaki koseka bango
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنِّي جَزَيۡتُهُمُ ٱلۡيَوۡمَ بِمَا صَبَرُوٓاْ أَنَّهُمۡ هُمُ ٱلۡفَآئِزُونَ
111. Ya sólo, lelo nazali kofuta bango тропа oyo bazalaki na bozeli na yango. Ya sólo, bango nde balongi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَٰلَ كَمۡ لَبِثۡتُمۡ فِي ٱلۡأَرۡضِ عَدَدَ سِنِينَ
112. Bakotunaka bango, mibu boni bolekisaki o kati ya mokili?
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالُواْ لَبِثۡنَا يَوۡمًا أَوۡ بَعۡضَ يَوۡمٖ فَسۡـَٔلِ ٱلۡعَآدِّينَ
113. Bakolobaka: Tovandaki mokolo moko to ndambu ya mokolo, tuna batangi ya motango na yango. (baye bayebi kotanga mikolo miye havandaki)
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَٰلَ إِن لَّبِثۡتُمۡ إِلَّا قَلِيلٗاۖ لَّوۡ أَنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
114. Akolobaka: Bovandaki sé tango ya mokie, ya sólo soki bozali koyeba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَفَحَسِبۡتُمۡ أَنَّمَا خَلَقۡنَٰكُمۡ عَبَثٗا وَأَنَّكُمۡ إِلَيۡنَا لَا تُرۡجَعُونَ
115. Boye bozali kokanisa ete tokelaki bino natina te, mpe bokozongisama epai na biso te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَتَعَٰلَى ٱللَّهُ ٱلۡمَلِكُ ٱلۡحَقُّۖ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ رَبُّ ٱلۡعَرۡشِ ٱلۡكَرِيمِ
116. Lokumu na Allah wa likolo mokonzi ya sólo. Nzambe mosusu ya kobondela na bosoló azali te sé ye (mei) Nkolo ngwende ya lokumu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَن يَدۡعُ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ لَا بُرۡهَٰنَ لَهُۥ بِهِۦ فَإِنَّمَا حِسَابُهُۥ عِندَ رَبِّهِۦٓۚ إِنَّهُۥ لَا يُفۡلِحُ ٱلۡكَٰفِرُونَ
117. Mpe oyo akobondela elongo na Allah nzambe mosusu, azali na elembetele na yango ya polele te, ya soló lifuta naye mokozalaka sé epai ya Nkolo waye. Ya soló, bapengwi bakolonga te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقُل رَّبِّ ٱغۡفِرۡ وَٱرۡحَمۡ وَأَنتَ خَيۡرُ ٱلرَّٰحِمِينَ
118. Mpe loba: Nkolo limbisa mpe tiya ngolu, yo nde oleki na ngolu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
 
Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Mu’minūn
Indise ng mga Surah Numero ng Pahina
 
Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo - Indise ng mga Salin

Isinalin ito sa Wikang Ngogo ni Zakaria Muhammad

Isara