Check out the new design

Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo * - Indise ng mga Salin

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Salin ng mga Kahulugan Surah: An-Nisā’   Ayah:
۞ إِنَّآ أَوۡحَيۡنَآ إِلَيۡكَ كَمَآ أَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰ نُوحٖ وَٱلنَّبِيِّـۧنَ مِنۢ بَعۡدِهِۦۚ وَأَوۡحَيۡنَآ إِلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡمَٰعِيلَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَٱلۡأَسۡبَاطِ وَعِيسَىٰ وَأَيُّوبَ وَيُونُسَ وَهَٰرُونَ وَسُلَيۡمَٰنَۚ وَءَاتَيۡنَا دَاوُۥدَ زَبُورٗا
163. Ya sôló tokitisi epai nayo emoniseli ndenge moko tokitisàki epai na Nûh na bantoma sima naye, mpe tokitisaki epai na Ibrâhîm, mpe Ismâïl na Is’hâq na Ya’qûb na bamabota, ndenge moko mpe tokitisaki epai ya Issa na Ayûb na Yûnus na Hâruna(1) mpe Suleyman, mpe topesaki Dâwud zabur.(2)
1 Hâruna: Bótala suratu Al-Baqarah: 248.
2 Zabur: Ezali buku ya Dâwud (Davidi).
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَرُسُلٗا قَدۡ قَصَصۡنَٰهُمۡ عَلَيۡكَ مِن قَبۡلُ وَرُسُلٗا لَّمۡ نَقۡصُصۡهُمۡ عَلَيۡكَۚ وَكَلَّمَ ٱللَّهُ مُوسَىٰ تَكۡلِيمٗا
164. Mpe batindami tobeteli yo sango na bango liboso, mpe basusu tobeteli yo sango na bango te, mpe Allah asololaki na Mûssa maloba polele.
2 Zabur: Ezali buku ya Dâwud (Davidi).
Ang mga Tafsir na Arabe:
رُّسُلٗا مُّبَشِّرِينَ وَمُنذِرِينَ لِئَلَّا يَكُونَ لِلنَّاسِ عَلَى ٱللَّهِ حُجَّةُۢ بَعۡدَ ٱلرُّسُلِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَزِيزًا حَكِيمٗا
165. Batindami baye bazali bapesi sango malamu, mpe bakebisi mpona etumbu mpo ete bato bazala lisusu na likambo ya koloba te liboso na Allah sima ya boyei ya batindami, mpe Allah atonda bokasi mpe bwanya.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَّٰكِنِ ٱللَّهُ يَشۡهَدُ بِمَآ أَنزَلَ إِلَيۡكَۖ أَنزَلَهُۥ بِعِلۡمِهِۦۖ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ يَشۡهَدُونَۚ وَكَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدًا
166. Kasi Allah azali kotatola na maye akitisi yango epai nayo ete akitisaki yango na boyebi naye moko, mpe ba anzelu bazali kotatola na yango, mpe Allah akoki lokola motatoli.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَصَدُّواْ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ قَدۡ ضَلُّواْ ضَلَٰلَۢا بَعِيدًا
167. Ya sôló baye bapengwi mpe bazali kopekisa nzela ya Allah, basili kobunga libungi ya mosika.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَظَلَمُواْ لَمۡ يَكُنِ ٱللَّهُ لِيَغۡفِرَ لَهُمۡ وَلَا لِيَهۡدِيَهُمۡ طَرِيقًا
168. Ya sôló baye bapengwi mpe basali mabe Allah akolimbisa bango te, mpe akokamba bango na nzela ya semba te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا طَرِيقَ جَهَنَّمَ خَٰلِدِينَ فِيهَآ أَبَدٗاۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٗا
169. Sé nzela ya lifelo wapi epai bakozala seko na seko, mpe yango ezali mpasi te epai na Allah.
Ang mga Tafsir na Arabe:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّاسُ قَدۡ جَآءَكُمُ ٱلرَّسُولُ بِٱلۡحَقِّ مِن رَّبِّكُمۡ فَـَٔامِنُواْ خَيۡرٗا لَّكُمۡۚ وَإِن تَكۡفُرُواْ فَإِنَّ لِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلِيمًا حَكِيمٗا
170. Eh! Bino bato, ya sôló motindami asili koyela bino bosembo kowuta epai na Nkolo na bino bondima na yango ezali malamu mpona bino, kasi soki boboyi, boyeba ete ya sôló maye manso mazali na likolo mpe na nsé mazali ya Allah, mpe Allah azali moyebi atonda bwanya.
Ang mga Tafsir na Arabe:
 
Salin ng mga Kahulugan Surah: An-Nisā’
Indise ng mga Surah Numero ng Pahina
 
Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo - Indise ng mga Salin

Isinalin ito sa Wikang Ngogo ni Zakaria Muhammad

Isara