Check out the new design

Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго * - Таржималар мундарижаси

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Маънолар таржимаси Сура: Оли Имрон   Оят:
إِذۡ هَمَّت طَّآئِفَتَانِ مِنكُمۡ أَن تَفۡشَلَا وَٱللَّهُ وَلِيُّهُمَاۗ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango.
Арабча тафсирлар:
وَلَقَدۡ نَصَرَكُمُ ٱللَّهُ بِبَدۡرٖ وَأَنتُمۡ أَذِلَّةٞۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr.[1] Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi.
[1] Badr: Ezali esika oyo bitumba elekaki kati na ba mizilima na ba pagano. Ezalaki na mbula ya mibale ya hidjira (mbula ya islamu).
Арабча тафсирлар:
إِذۡ تَقُولُ لِلۡمُؤۡمِنِينَ أَلَن يَكۡفِيَكُمۡ أَن يُمِدَّكُمۡ رَبُّكُم بِثَلَٰثَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُنزَلِينَ
Tango ozali koyebisa na bandimi été: Ekoki na bino te été Nkolo na bino akitisa ba anzelu nkoto misatu mpona kosunga bino?
Арабча тафсирлар:
بَلَىٰٓۚ إِن تَصۡبِرُواْ وَتَتَّقُواْ وَيَأۡتُوكُم مِّن فَوۡرِهِمۡ هَٰذَا يُمۡدِدۡكُمۡ رَبُّكُم بِخَمۡسَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُسَوِّمِينَ
Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba.
Арабча тафсирлар:
وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشۡرَىٰ لَكُمۡ وَلِتَطۡمَئِنَّ قُلُوبُكُم بِهِۦۗ وَمَا ٱلنَّصۡرُ إِلَّا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ
Mpe Allah atiaki yango te sé mpona kopesa bino sango elamu mpe mpona kokitisa mitema mia bino. Mpe elonga ewutaka sé na Allah, Nkolo bokasi atonda bwanya.
Арабча тафсирлар:
لِيَقۡطَعَ طَرَفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَوۡ يَكۡبِتَهُمۡ فَيَنقَلِبُواْ خَآئِبِينَ
Mpo akoka kokweisa mpe kobebisa basusu baye bapengwi to akitisa bango mpe bayoka nsoni.
Арабча тафсирлар:
لَيۡسَ لَكَ مِنَ ٱلۡأَمۡرِ شَيۡءٌ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡ أَوۡ يُعَذِّبَهُمۡ فَإِنَّهُمۡ ظَٰلِمُونَ
Ozali na eloko moko te na kati ya likambo oyo, to akolimbisa[1] bango to akopesa bango etumbu, mpo ete bazali bato mabe.
[1] Allah.
Арабча тафсирлар:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ يَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُ وَيُعَذِّبُ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Manso mazali o’likolo na nsé mazali ya Allah. Alimbisaka na oyo alingi. Mpe apesaka etumbu na oyo alingi, mpe Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa.
Арабча тафсирлар:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَأۡكُلُواْ ٱلرِّبَوٰٓاْ أَضۡعَٰفٗا مُّضَٰعَفَةٗۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
Eh bino bandimi! Bolia misolo mia ekotama te na bobakisi misolo mia bino, mpe bobanga Allah mpo bokoka kolonga.
Арабча тафсирлар:
وَٱتَّقُواْ ٱلنَّارَ ٱلَّتِيٓ أُعِدَّتۡ لِلۡكَٰفِرِينَ
Mpe bobanga mòtò ya lifelo oyo ebongisamaki mpona bapagano.
Арабча тафсирлар:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
Mpe botosa Allah na motindami, mpo ete boyokama mawa.
Арабча тафсирлар:
 
Маънолар таржимаси Сура: Оли Имрон
Суралар мундарижаси Бет рақами
 
Қуръони Карим маъноларининг таржимаси - Лингалача таржима - Муҳаммад Балнгуго - Таржималар мундарижаси

Закарийё Муҳаммад Бенгогу таржимаси.

Ёпиш