Check out the new design

ශුද්ධවූ අල් කුර්ආන් අර්ථ කථනය - ලිංගාලා පරිවර්තනය - මුහම්මද් බාල්න්ගූගූ * - පරිවර්තන පටුන

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

අර්ථ කථනය පරිච්ඡේදය: ආලු ඉම්රාන්   වාක්‍යය:
إِذۡ هَمَّت طَّآئِفَتَانِ مِنكُمۡ أَن تَفۡشَلَا وَٱللَّهُ وَلِيُّهُمَاۗ وَعَلَى ٱللَّهِ فَلۡيَتَوَكَّلِ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
122. Tango biteni mibale okati ya lisanga na bino bakani kozonga sima. Mpe Allah nde azali mosungi wa bango, mpe epai na Allah nde esengeli na bandimi kotia elikia na bango.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلَقَدۡ نَصَرَكُمُ ٱللَّهُ بِبَدۡرٖ وَأَنتُمۡ أَذِلَّةٞۖ فَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تَشۡكُرُونَ
123. Mpe ya sôló, Allah asili kolongisa bino na bitumba ya Badr.(1) Na tango oyo bozalaki makasi te. Na yango esengeli na bino kobanga Allah mpo bokoka kotondo ye botondi.
1 Badr: Ezali esika oyo bitumba elekaki kati na ba mizilima na ba pagano. Ezalaki na mbula ya mibale ya hidjira (mbula ya islamu).
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
إِذۡ تَقُولُ لِلۡمُؤۡمِنِينَ أَلَن يَكۡفِيَكُمۡ أَن يُمِدَّكُمۡ رَبُّكُم بِثَلَٰثَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُنزَلِينَ
124. Tango ozali koyebisa na bandimi été: Ekoki na bino te été Nkolo na bino akitisa ba anzelu nkoto misatu mpona kosunga bino?
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
بَلَىٰٓۚ إِن تَصۡبِرُواْ وَتَتَّقُواْ وَيَأۡتُوكُم مِّن فَوۡرِهِمۡ هَٰذَا يُمۡدِدۡكُمۡ رَبُّكُم بِخَمۡسَةِ ءَالَٰفٖ مِّنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ مُسَوِّمِينَ
125. Ezali sé bongo, kasi soki boyiki mpiko mpe bobangi (Allah) ete bango bazongeli bino lisusu na tango wana, Nkolo na bino mpe akobakisela bino ba anzelu nkoto mitano bakokita na bilembo na bango ya bitumba.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَمَا جَعَلَهُ ٱللَّهُ إِلَّا بُشۡرَىٰ لَكُمۡ وَلِتَطۡمَئِنَّ قُلُوبُكُم بِهِۦۗ وَمَا ٱلنَّصۡرُ إِلَّا مِنۡ عِندِ ٱللَّهِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَكِيمِ
126. Mpe Allah atiaki yango te sé mpona kopesa bino sango elamu mpe mpona kokitisa mitema mia bino. Mpe elonga ewutaka sé na Allah, Nkolo bokasi atonda bwanya.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
لِيَقۡطَعَ طَرَفٗا مِّنَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ أَوۡ يَكۡبِتَهُمۡ فَيَنقَلِبُواْ خَآئِبِينَ
127. Mpo akoka kokweisa mpe kobebisa basusu baye bapengwi to akitisa bango mpe bayoka nsoni.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
لَيۡسَ لَكَ مِنَ ٱلۡأَمۡرِ شَيۡءٌ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡ أَوۡ يُعَذِّبَهُمۡ فَإِنَّهُمۡ ظَٰلِمُونَ
128. Ozali na eloko moko te na kati ya likambo oyo, to akolimbisa(1) bango to akopesa bango etumbu, mpo ete bazali bato mabe.
1 Allah.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِۚ يَغۡفِرُ لِمَن يَشَآءُ وَيُعَذِّبُ مَن يَشَآءُۚ وَٱللَّهُ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
129. Manso mazali o’likolo na nsé mazali ya Allah. Alimbisaka na oyo alingi. Mpe apesaka etumbu na oyo alingi, mpe Allah azali molimbisi mpe moyoki mawa.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ لَا تَأۡكُلُواْ ٱلرِّبَوٰٓاْ أَضۡعَٰفٗا مُّضَٰعَفَةٗۖ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ لَعَلَّكُمۡ تُفۡلِحُونَ
130. Eh bino bandimi! Bolia misolo mia ekotama te na bobakisi misolo mia bino, mpe bobanga Allah mpo bokoka kolonga.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَٱتَّقُواْ ٱلنَّارَ ٱلَّتِيٓ أُعِدَّتۡ لِلۡكَٰفِرِينَ
131. Mpe bobanga mòtò ya lifelo oyo ebongisamaki mpona bapagano.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
وَأَطِيعُواْ ٱللَّهَ وَٱلرَّسُولَ لَعَلَّكُمۡ تُرۡحَمُونَ
132. Mpe botosa Allah na motindami, mpo ete boyokama mawa.
අල්කුර්ආන් අරාබි අර්ථ විවරණ:
 
අර්ථ කථනය පරිච්ඡේදය: ආලු ඉම්රාන්
සූරා පටුන පිටු අංක
 
ශුද්ධවූ අල් කුර්ආන් අර්ථ කථනය - ලිංගාලා පරිවර්තනය - මුහම්මද් බාල්න්ගූගූ - පරිවර්තන පටුන

මෙය සකරිය්යා මුහම්මද් බාල්න්ගූගූ විසින් පරිවර්තනය කරන ලදී.

වසන්න