Check out the new design

Bản dịch ý nghĩa nội dung Qur'an - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·巴兰格 * - Mục lục các bản dịch

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ý nghĩa nội dung Chương: Al-Muminun   Câu:

Al-Mu’minûna

قَدۡ أَفۡلَحَ ٱلۡمُؤۡمِنُونَ
1. Bandimi basila kolonga.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي صَلَاتِهِمۡ خَٰشِعُونَ
2. Baye bamikitisaka tango bazali kosambela.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَنِ ٱللَّغۡوِ مُعۡرِضُونَ
3. Mpe baye bazali kokima (makambo) maye mazanga ntina.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِلزَّكَوٰةِ فَٰعِلُونَ
4. Mpe baye bazali kobimisa zakat.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِفُرُوجِهِمۡ حَٰفِظُونَ
5. Mpe baye bazali kobatela mitakala mia bango na ekobo,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
إِلَّا عَلَىٰٓ أَزۡوَٰجِهِمۡ أَوۡ مَا مَلَكَتۡ أَيۡمَٰنُهُمۡ فَإِنَّهُمۡ غَيۡرُ مَلُومِينَ
6. Longola sé epai na basi na bango, to mpe bawumbu basi baye bazali na maboko na bango (bakoki kofanda na bango mwasi na mobali) mpo ete wana bakopamelama te.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
فَمَنِ ٱبۡتَغَىٰ وَرَآءَ ذَٰلِكَ فَأُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡعَادُونَ
7. Na yango, moto oyo akoluka kolekisa ndelo wana, bango nde babuki mibeko,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ لِأَمَٰنَٰتِهِمۡ وَعَهۡدِهِمۡ رَٰعُونَ
8. Mpe baye bazali kobatela mabombisi (amanati) oyo bapesi bango mpe bazali kotosa mpe kokokisa bilaka bia bango.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَلَىٰ صَلَوَٰتِهِمۡ يُحَافِظُونَ
9. Mpe baye bazali kobatela balosambo na bango.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
أُوْلَٰٓئِكَ هُمُ ٱلۡوَٰرِثُونَ
10. Bango nde bakitani.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ٱلَّذِينَ يَرِثُونَ ٱلۡفِرۡدَوۡسَ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
11. Bakokitanelaka bisika ya likolo, na lola bakozalaka libela o kati na yango.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا ٱلۡإِنسَٰنَ مِن سُلَٰلَةٖ مِّن طِينٖ
12. Mpe tosilaki kokela moto na mabele ya potopoto,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ثُمَّ جَعَلۡنَٰهُ نُطۡفَةٗ فِي قَرَارٖ مَّكِينٖ
13. Sima tozalisaki ye litanga lia (mayi) ya ndembo kati ya ebombelo ya makasi.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ثُمَّ خَلَقۡنَا ٱلنُّطۡفَةَ عَلَقَةٗ فَخَلَقۡنَا ٱلۡعَلَقَةَ مُضۡغَةٗ فَخَلَقۡنَا ٱلۡمُضۡغَةَ عِظَٰمٗا فَكَسَوۡنَا ٱلۡعِظَٰمَ لَحۡمٗا ثُمَّ أَنشَأۡنَٰهُ خَلۡقًا ءَاخَرَۚ فَتَبَارَكَ ٱللَّهُ أَحۡسَنُ ٱلۡخَٰلِقِينَ
14. Sima tokomisaki mayi liboke ya makila sima makila ekomi mosuni, sima mosuni ekomi mokuwa, sima tolatisi mokuwa mosuni, sima tosali ye ekelamu mosusu. Mapamboli manso mazali ya Allah mokeli ya malamu,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ثُمَّ إِنَّكُم بَعۡدَ ذَٰلِكَ لَمَيِّتُونَ
15. Sima na yango bokokufaka ya soló,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
ثُمَّ إِنَّكُمۡ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ تُبۡعَثُونَ
16. Sima bokosekwisamaka ya soló o mokolo mwa suka,
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَلَقَدۡ خَلَقۡنَا فَوۡقَكُمۡ سَبۡعَ طَرَآئِقَ وَمَا كُنَّا عَنِ ٱلۡخَلۡقِ غَٰفِلِينَ
17. Мре tosilaki kokela o likolo na bino mapata sambo, mpe tozangaki bokebi te o tango ya bokeli.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
 
Ý nghĩa nội dung Chương: Al-Muminun
Mục lục các chương Kinh Số trang
 
Bản dịch ý nghĩa nội dung Qur'an - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·巴兰格 - Mục lục các bản dịch

宰克利亚·穆罕默德·巴兰格翻译

Đóng lại