Check out the new design

Bản dịch ý nghĩa nội dung Qur'an - Bản dịch tiếng Lingala - Muhammad Balengogo * - Mục lục các bản dịch

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ý nghĩa nội dung Chương: Al-'Ankabut   Câu:
فَمَا كَانَ جَوَابَ قَوۡمِهِۦٓ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱقۡتُلُوهُ أَوۡ حَرِّقُوهُ فَأَنجَىٰهُ ٱللَّهُ مِنَ ٱلنَّارِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّقَوۡمٖ يُؤۡمِنُونَ
24. Bato naye bayanolaki ete: Boboma ye, to botumba ye mpe Allah abikisaki ye na moto, ya soló, wana ezali elembo тропа bandimi.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَقَالَ إِنَّمَا ٱتَّخَذۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ أَوۡثَٰنٗا مَّوَدَّةَ بَيۡنِكُمۡ فِي ٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَاۖ ثُمَّ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ يَكۡفُرُ بَعۡضُكُم بِبَعۡضٖ وَيَلۡعَنُ بَعۡضُكُم بَعۡضٗا وَمَأۡوَىٰكُمُ ٱلنَّارُ وَمَا لَكُم مِّن نَّٰصِرِينَ
25. Mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya solo, bozui na esika Allah bikeko, mpe bolingi bango, na bolingo na bomoyi ya nsé, sima na mokolo ya suka, bokoboyana bino na bino, mpe basusu bakopesaka botutu na basusu, mpe esika na bino ekozalaka nde moto, mpe bokozuaka mosalisi te.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
۞ فَـَٔامَنَ لَهُۥ لُوطٞۘ وَقَالَ إِنِّي مُهَاجِرٌ إِلَىٰ رَبِّيٓۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
26. Mpe Loth andimelaki ye, mpe (Ibrâhîm) alobi: Ya sólo, nakei epai ya Nkolo na ngai. Ya soló ye azali na bokasi atonda bwanya.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥٓ إِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ وَجَعَلۡنَا فِي ذُرِّيَّتِهِ ٱلنُّبُوَّةَ وَٱلۡكِتَٰبَ وَءَاتَيۡنَٰهُ أَجۡرَهُۥ فِي ٱلدُّنۡيَاۖ وَإِنَّهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ لَمِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
27. Mpe topesaki ye Is’háq na Ya’qúb, mpe totiaki na libota naye bokitani ya bantoma mpe likabo ya kozua buku, mpe topesaki ye lifuta ya nsé. Mpe mokolo ya suka akozala na molongo ya bato malamu.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
وَلُوطًا إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ إِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلۡفَٰحِشَةَ مَا سَبَقَكُم بِهَا مِنۡ أَحَدٖ مِّنَ ٱلۡعَٰلَمِينَ
28. Mpe tango Loth alobaki na bato naye: Ya sólo, bino bozali koya na mabe oyo ata moto moko te asalaki yango liboso na mokili.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
أَئِنَّكُمۡ لَتَأۡتُونَ ٱلرِّجَالَ وَتَقۡطَعُونَ ٱلسَّبِيلَ وَتَأۡتُونَ فِي نَادِيكُمُ ٱلۡمُنكَرَۖ فَمَا كَانَ جَوَابَ قَوۡمِهِۦٓ إِلَّآ أَن قَالُواْ ٱئۡتِنَا بِعَذَابِ ٱللَّهِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
29. Ya soló penza, bozali kokutana mibali na mibali тропа kosilisa ba mposa na bino ya nzoto mpe bozali kokanga nzela (ya mabota)? Mpe bozali koya na mabe na esika bovandaka? Kasi eyano ya bato naye ezalaki ete; yela biso etumbu soki ozali moto ya bosembo.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
قَالَ رَبِّ ٱنصُرۡنِي عَلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلۡمُفۡسِدِينَ
30. Alobaki ete: Nkolo, longisa ngai likolo ya bato ya mabe.
Các Tafsir tiếng Ả-rập:
 
Ý nghĩa nội dung Chương: Al-'Ankabut
Mục lục các chương Kinh Số trang
 
Bản dịch ý nghĩa nội dung Qur'an - Bản dịch tiếng Lingala - Muhammad Balengogo - Mục lục các bản dịch

Người dịch Zakariya Muhammad sang tiếng Ngugo.

Đóng lại