Check out the new design

《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 优努斯   段:
إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا وَرَضُواْ بِٱلۡحَيَوٰةِ ٱلدُّنۡيَا وَٱطۡمَأَنُّواْ بِهَا وَٱلَّذِينَ هُمۡ عَنۡ ءَايَٰتِنَا غَٰفِلُونَ
7. Ya solo, baye bazali kolikya te kokutana na biso, mpe basepeli na bomoyi ya nsé mpe bamoni ete bazali na kimia тропа yango, ndenge moko na baye bazali kokanisa te na mikapo mpe bilembo bia biso.
阿拉伯语经注:
أُوْلَٰٓئِكَ مَأۡوَىٰهُمُ ٱلنَّارُ بِمَا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
8. Baye bana esika na bango ekozalaka nde na moto тропа maye bazalaki kosala.
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ يَهۡدِيهِمۡ رَبُّهُم بِإِيمَٰنِهِمۡۖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهِمُ ٱلۡأَنۡهَٰرُ فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
9. Ya solo, baye bandimaki mpe basalaki misala milamu, Nkolo wa bango akokambaka bango тропа bondimi. Na bango bakozalaka o Iola eye ezali koleka o nsé na yango mingala, bakovandaka o Iola eye etonda bomengo.
阿拉伯语经注:
دَعۡوَىٰهُمۡ فِيهَا سُبۡحَٰنَكَ ٱللَّهُمَّ وَتَحِيَّتُهُمۡ فِيهَا سَلَٰمٞۚ وَءَاخِرُ دَعۡوَىٰهُمۡ أَنِ ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
10. Kuna na kati kosenga na bango ekozalaka sé ete: Lokumu nayo Nzambe, mpe losako na bango ekozala sé kimia, mpe mabondeli na bango ya suka nde ete matondi na Allah Nkolo wa molongo.
阿拉伯语经注:
۞ وَلَوۡ يُعَجِّلُ ٱللَّهُ لِلنَّاسِ ٱلشَّرَّ ٱسۡتِعۡجَالَهُم بِٱلۡخَيۡرِ لَقُضِيَ إِلَيۡهِمۡ أَجَلُهُمۡۖ فَنَذَرُ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا فِي طُغۡيَٰنِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
11. Mpe soki Allah atiyelaka bato mabe ezua bango na lombango ndenge balukaka bolamu na lombangu, nde suka ya bomoyi bwa bango esila kokoka. Mpe topesi elaka na baye bazali kolikya te na bokutani bwa biso. Bazali na koyimayima na kati ya kolekisa ndelo.
阿拉伯语经注:
وَإِذَا مَسَّ ٱلۡإِنسَٰنَ ٱلضُّرُّ دَعَانَا لِجَنۢبِهِۦٓ أَوۡ قَاعِدًا أَوۡ قَآئِمٗا فَلَمَّا كَشَفۡنَا عَنۡهُ ضُرَّهُۥ مَرَّ كَأَن لَّمۡ يَدۡعُنَآ إِلَىٰ ضُرّٖ مَّسَّهُۥۚ كَذَٰلِكَ زُيِّنَ لِلۡمُسۡرِفِينَ مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
12. Mpe soki pasi ezui moto, abengi biso, mpe alali na mopanzi to azali ya kovanda to ya kotelema; mpe tango tokolongola ye pasi ena, akomi kotambola lokola moto abelelaki biso na pasi ezuaki ye te. Na boye nde ebongisami mpo na bato mabe maye bazalaki kosala.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَا ٱلۡقُرُونَ مِن قَبۡلِكُمۡ لَمَّا ظَلَمُواْ وَجَآءَتۡهُمۡ رُسُلُهُم بِٱلۡبَيِّنَٰتِ وَمَا كَانُواْ لِيُؤۡمِنُواْۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡقَوۡمَ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
13. Mpe ya soló, tosilaki koboma mapinga ebele maye malekaki liboso lia bino, тропа bobubi bwa bango, mpe batindami ba bango bayelaki bango bilembo bia polele, kasi bandimaki te. Ndenge wana nde tokofutaka batomboki.
阿拉伯语经注:
ثُمَّ جَعَلۡنَٰكُمۡ خَلَٰٓئِفَ فِي ٱلۡأَرۡضِ مِنۢ بَعۡدِهِمۡ لِنَنظُرَ كَيۡفَ تَعۡمَلُونَ
14. Sima na bango, tokitanisaki bino o kati ya mokili, mpo totala ndenge nini bokosala.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 优努斯
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 - 译解目录

扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译。

关闭