Check out the new design

《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 哈吉拉   段:
قَالَ هَٰٓؤُلَآءِ بَنَاتِيٓ إِن كُنتُمۡ فَٰعِلِينَ
71. Alobi: Bozua bana ba ngai ya basi soki bolingi bosala bango oyo bolingi.
阿拉伯语经注:
لَعَمۡرُكَ إِنَّهُمۡ لَفِي سَكۡرَتِهِمۡ يَعۡمَهُونَ
72. Na bomoyi bwayo, ya soló bango bazali na milangwa mia liwa тропа bopengwi bwa bango.
阿拉伯语经注:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ مُشۡرِقِينَ
73. Mpe lolaka ya makasi ezuaki bango na ebimeli ya moyi.
阿拉伯语经注:
فَجَعَلۡنَا عَٰلِيَهَا سَافِلَهَا وَأَمۡطَرۡنَا عَلَيۡهِمۡ حِجَارَةٗ مِّن سِجِّيلٍ
74. Mpe tobalusaki (mboka yango) na bangambo inso, mpe tobetiselaki bango mbula ya mabanga maye esanganaki na moto makasi.
阿拉伯语经注:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّلۡمُتَوَسِّمِينَ
75. Ya sólo, wana nde bilembo тропа baye bazali na boyebi bakoka kornona.
阿拉伯语经注:
وَإِنَّهَا لَبِسَبِيلٖ مُّقِيمٍ
76. Мре ya sólo, mboka ena ezalaki lokola nzela eye eyebanaki na moto nyoso.
阿拉伯语经注:
إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّلۡمُؤۡمِنِينَ
77. Ya sólo, wana ezali elembo тропа bandimi.
阿拉伯语经注:
وَإِن كَانَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡأَيۡكَةِ لَظَٰلِمِينَ
78. Ya sólo, etuka ya aïkat(1) bazalaki mpe babubi.
1 Aïkat: Ezali mboka ezuami pene ya mboka ya Shuaïb
阿拉伯语经注:
فَٱنتَقَمۡنَا مِنۡهُمۡ وَإِنَّهُمَا لَبِإِمَامٖ مُّبِينٖ
79. Tozuaki bango mpe lokola, kasi mboka mibale oyo eyebanaki na bisika na yango awa na mokili mpe bitikalaki bilembo binene.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ كَذَّبَ أَصۡحَٰبُ ٱلۡحِجۡرِ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
80. Мре bato ba mboka ya hijr(1) basilaki kosala batindami mabe.
1 Hij r: Mboka ya ntoma Swálih.
阿拉伯语经注:
وَءَاتَيۡنَٰهُمۡ ءَايَٰتِنَا فَكَانُواْ عَنۡهَا مُعۡرِضِينَ
81. Mpe tolakisaki bango makamwisi ma biso kasi balandaki yango te.
阿拉伯语经注:
وَكَانُواْ يَنۡحِتُونَ مِنَ ٱلۡجِبَالِ بُيُوتًا ءَامِنِينَ
82. Mpe bazalaki kotonga bandako bia bango okati ya bangomba тропа kozala na kimia.
阿拉伯语经注:
فَأَخَذَتۡهُمُ ٱلصَّيۡحَةُ مُصۡبِحِينَ
83. Mpe topesaki bango etumbu na ntongo o sima ya kolamuka.
阿拉伯语经注:
فَمَآ أَغۡنَىٰ عَنۡهُم مَّا كَانُواْ يَكۡسِبُونَ
84. Maye manso bazalaki na yango, bakokaki kosala na yango eloko te.
阿拉伯语经注:
وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّۗ وَإِنَّ ٱلسَّاعَةَ لَأٓتِيَةٞۖ فَٱصۡفَحِ ٱلصَّفۡحَ ٱلۡجَمِيلَ
85. Mpe tokelaki likolo na nsé, na maye manso mazuami o kati na yango mibale te sé na bosóló, mpe ya soló, ngonga ekokokaka, limbisa bolimbisi bwa malamu.
阿拉伯语经注:
إِنَّ رَبَّكَ هُوَ ٱلۡخَلَّٰقُ ٱلۡعَلِيمُ
86. Ya sólo, Nkolo wayo azali mokeli mpe moyebi.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَٰكَ سَبۡعٗا مِّنَ ٱلۡمَثَانِي وَٱلۡقُرۡءَانَ ٱلۡعَظِيمَ
87. Mpe tosilaki kopesa yo mikapo sambo(1) тропа kozongela yango na kotanga mbala na mbala, na kurani ya monene.
1 Mikapo sambo: Ezali suratu Al-Fâtihah (bofungoli), Esengeli na mizilima atanga yango na balosambo naye nionso.
阿拉伯语经注:
لَا تَمُدَّنَّ عَيۡنَيۡكَ إِلَىٰ مَا مَتَّعۡنَا بِهِۦٓ أَزۡوَٰجٗا مِّنۡهُمۡ وَلَا تَحۡزَنۡ عَلَيۡهِمۡ وَٱخۡفِضۡ جَنَاحَكَ لِلۡمُؤۡمِنِينَ
88. Mpe kotala te na kolula bozwi ya kitoko topesaki balisanga na bango тропа bisengo ya tango токе, koyoka pasi тропа bango te, kasi zala na komikitisa pona bandimi.
阿拉伯语经注:
وَقُلۡ إِنِّيٓ أَنَا ٱلنَّذِيرُ ٱلۡمُبِينُ
89. Mpe loba: Ya soló, nazali mokebisi ya polele.
阿拉伯语经注:
كَمَآ أَنزَلۡنَا عَلَى ٱلۡمُقۡتَسِمِينَ
90. Ndenge moko tokitisaki (etumbu) likolo lia bakaboli(1),
1 Bakaboli: Ezali baye bakabolaki kurani.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 哈吉拉
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 - 译解目录

扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译。

关闭