Check out the new design

《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 伊斯拉仪   段:
إِلَّا رَحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَۚ إِنَّ فَضۡلَهُۥ كَانَ عَلَيۡكَ كَبِيرٗا
87. Longola sé mawa kowuta epai ya Nkolo wayo. Ya sólo, bolamu bwaye epai nayo ezali ebele.
阿拉伯语经注:
قُل لَّئِنِ ٱجۡتَمَعَتِ ٱلۡإِنسُ وَٱلۡجِنُّ عَلَىٰٓ أَن يَأۡتُواْ بِمِثۡلِ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ لَا يَأۡتُونَ بِمِثۡلِهِۦ وَلَوۡ كَانَ بَعۡضُهُمۡ لِبَعۡضٖ ظَهِيرٗا
88. Loba: Ata soki bato mpe bilima basangani mpo basala kurani lokola oyo, bakokoka koya na lolenge na yango te ata soki bazui lisalisi ya ndenge na ndenge kati na bango.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَا لِلنَّاسِ فِي هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ مِن كُلِّ مَثَلٖ فَأَبَىٰٓ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ إِلَّا كُفُورٗا
89. Ya soló, tosilaki kopesa bato bandakisa nyoso na kati ya kurani kasi ebele ya bato bazali sé bapengwi.
阿拉伯语经注:
وَقَالُواْ لَن نُّؤۡمِنَ لَكَ حَتَّىٰ تَفۡجُرَ لَنَا مِنَ ٱلۡأَرۡضِ يَنۢبُوعًا
90. Mpe balobaki: Tokondimela yo te, kino obimisela biso liziba ya mayi o kati ya mabele,
阿拉伯语经注:
أَوۡ تَكُونَ لَكَ جَنَّةٞ مِّن نَّخِيلٖ وَعِنَبٖ فَتُفَجِّرَ ٱلۡأَنۡهَٰرَ خِلَٰلَهَا تَفۡجِيرًا
91. To, ozala na bilanga bia Naghil(1) na Inabe(2) mpe obimisa míngala ya mayi ebele mitiola o kati na yango,
1 Naghil: Bótala: suratu Al-An’ám: 99, mpe suratu An-Nahl: 67.
2 Inabe: Bótala: suratu Al-An’ám: 99, mpe suratu An-Nahl: 67.
阿拉伯语经注:
أَوۡ تُسۡقِطَ ٱلسَّمَآءَ كَمَا زَعَمۡتَ عَلَيۡنَا كِسَفًا أَوۡ تَأۡتِيَ بِٱللَّهِ وَٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ قَبِيلًا
92. To, okweisela biso ndambu ya mapata ndenge ozali kokanisa to oya na nzambe, to óyela biso Allah, na ba anzelu liboso na biso.
阿拉伯语经注:
أَوۡ يَكُونَ لَكَ بَيۡتٞ مِّن زُخۡرُفٍ أَوۡ تَرۡقَىٰ فِي ٱلسَّمَآءِ وَلَن نُّؤۡمِنَ لِرُقِيِّكَ حَتَّىٰ تُنَزِّلَ عَلَيۡنَا كِتَٰبٗا نَّقۡرَؤُهُۥۗ قُلۡ سُبۡحَانَ رَبِّي هَلۡ كُنتُ إِلَّا بَشَرٗا رَّسُولٗا
93. To mpe ozala na ndako ya kitoko ezali na bonzenga ya wolo, to mpe obuta (omata) na mapata (likolo), kasi tokondima kobuta nayo wana te kino okitisela biso buku totanga yango, loba: Nkembo na Nkolo na ngai, boye ngai nazali te sé moto mpe motindami?
阿拉伯语经注:
وَمَا مَنَعَ ٱلنَّاسَ أَن يُؤۡمِنُوٓاْ إِذۡ جَآءَهُمُ ٱلۡهُدَىٰٓ إِلَّآ أَن قَالُوٓاْ أَبَعَثَ ٱللَّهُ بَشَرٗا رَّسُولٗا
94. Eloko moko te epekisaki bato ete bandima tango bokambi eyelaki bango sé balobaka ete: Allah akotinda moto azala motindami?
阿拉伯语经注:
قُل لَّوۡ كَانَ فِي ٱلۡأَرۡضِ مَلَٰٓئِكَةٞ يَمۡشُونَ مُطۡمَئِنِّينَ لَنَزَّلۡنَا عَلَيۡهِم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ مَلَكٗا رَّسُولٗا
95. Loba: Soki ba anzelu batambolaka na kimia likolo ya mabele, tolingaki kokitisela bango kowuta o likolo motindami azala anzelu.
阿拉伯语经注:
قُلۡ كَفَىٰ بِٱللَّهِ شَهِيدَۢا بَيۡنِي وَبَيۡنَكُمۡۚ إِنَّهُۥ كَانَ بِعِبَادِهِۦ خَبِيرَۢا بَصِيرٗا
96. Loba: Allah akoki тропа kozala nzeneneke kati kati na bino na ngai. Ya soló, ye azali na sango mpe amonaka bawumbu naye.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 伊斯拉仪
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 - 译解目录

扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译。

关闭