Check out the new design

《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 盖萨斯   段:
وَلَمَّا بَلَغَ أَشُدَّهُۥ وَٱسۡتَوَىٰٓ ءَاتَيۡنَٰهُ حُكۡمٗا وَعِلۡمٗاۚ وَكَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
14. Мре tango akolaki тре akomaki mayele, topesaki ye bwana тре boyebi. Мре lolenge wana nde tofutaka babongisi.
阿拉伯语经注:
وَدَخَلَ ٱلۡمَدِينَةَ عَلَىٰ حِينِ غَفۡلَةٖ مِّنۡ أَهۡلِهَا فَوَجَدَ فِيهَا رَجُلَيۡنِ يَقۡتَتِلَانِ هَٰذَا مِن شِيعَتِهِۦ وَهَٰذَا مِنۡ عَدُوِّهِۦۖ فَٱسۡتَغَٰثَهُ ٱلَّذِي مِن شِيعَتِهِۦ عَلَى ٱلَّذِي مِنۡ عَدُوِّهِۦ فَوَكَزَهُۥ مُوسَىٰ فَقَضَىٰ عَلَيۡهِۖ قَالَ هَٰذَا مِنۡ عَمَلِ ٱلشَّيۡطَٰنِۖ إِنَّهُۥ عَدُوّٞ مُّضِلّٞ مُّبِينٞ
15. Мре akotaki na mboka па tango oyo bato bazali na bokebi te, mpe akuti mibali mibale bazali kobunda, mobali moko azalaki moto ya libota naye, mosusu monguna naye. Mobali oyo azalaki ekolo moko naye asengi lisungi, mpe Mûssa abeti monguna akwei mpe akufi, alobi: Oyo ezali moko ya misala ya satana. Mpo ya sólo, ye azali monguna mpe mobungisi polele.
阿拉伯语经注:
قَالَ رَبِّ إِنِّي ظَلَمۡتُ نَفۡسِي فَٱغۡفِرۡ لِي فَغَفَرَ لَهُۥٓۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡغَفُورُ ٱلرَّحِيمُ
16. Alobi: Nkolo, namisali mabe ngai moko, limbisa ngai, mpe alimbisi ye. Ya sólo, ye nde molimbisi atonda ngolu.
阿拉伯语经注:
قَالَ رَبِّ بِمَآ أَنۡعَمۡتَ عَلَيَّ فَلَنۡ أَكُونَ ظَهِيرٗا لِّلۡمُجۡرِمِينَ
17. Alobi: Nkolo! Na bolamu oyo opesaki ngai, nakosunga batomboki ata mokolo moko te.
阿拉伯语经注:
فَأَصۡبَحَ فِي ٱلۡمَدِينَةِ خَآئِفٗا يَتَرَقَّبُ فَإِذَا ٱلَّذِي ٱسۡتَنصَرَهُۥ بِٱلۡأَمۡسِ يَسۡتَصۡرِخُهُۥۚ قَالَ لَهُۥ مُوسَىٰٓ إِنَّكَ لَغَوِيّٞ مُّبِينٞ
18. Мре sima ya mikolo mike mileki, Mûssa akotaki na mboka na kobanga mpe kotala epai na epai, kasi na mbalakaka akutani na mobali oyo asengaki ye lisalisi lobi azali kobelela ye lisusu ete asalisa ye, Mûssa alobi naye: Ya soló, ozali motumoli ya polele.
阿拉伯语经注:
فَلَمَّآ أَنۡ أَرَادَ أَن يَبۡطِشَ بِٱلَّذِي هُوَ عَدُوّٞ لَّهُمَا قَالَ يَٰمُوسَىٰٓ أَتُرِيدُ أَن تَقۡتُلَنِي كَمَا قَتَلۡتَ نَفۡسَۢا بِٱلۡأَمۡسِۖ إِن تُرِيدُ إِلَّآ أَن تَكُونَ جَبَّارٗا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا تُرِيدُ أَن تَكُونَ مِنَ ٱلۡمُصۡلِحِينَ
19. Tango alingi kozua ye na makasi alobi: Oh Mûssa! Olingi koboma ngai ndenge obomaki moto lobi loleki? Olingi komitiya moto ya makasi awa na mokili, mpe olingi kozala o kati ya basali bolamu te.
阿拉伯语经注:
وَجَآءَ رَجُلٞ مِّنۡ أَقۡصَا ٱلۡمَدِينَةِ يَسۡعَىٰ قَالَ يَٰمُوسَىٰٓ إِنَّ ٱلۡمَلَأَ يَأۡتَمِرُونَ بِكَ لِيَقۡتُلُوكَ فَٱخۡرُجۡ إِنِّي لَكَ مِنَ ٱلنَّٰصِحِينَ
20. Mpe mobali moko awuti na suka ya mboka azali kokima alobi: Eh Mûssa! Ya sólo, bankumu bazali kosala likita mpo baboma yo, bima (na mboka oyo), ya soló nazali kopesa yo toli.
阿拉伯语经注:
فَخَرَجَ مِنۡهَا خَآئِفٗا يَتَرَقَّبُۖ قَالَ رَبِّ نَجِّنِي مِنَ ٱلۡقَوۡمِ ٱلظَّٰلِمِينَ
21. Abimaki wana na bobangi azali kotala bipai na bipai alobi: Nkolo longisa ngai na mabe ya babubi oyo.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 盖萨斯
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 - 译解目录

扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译。

关闭