《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 赛拜艾   段:

Saba (MBOKA YA SABA)

ٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ ٱلَّذِي لَهُۥ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَهُ ٱلۡحَمۡدُ فِي ٱلۡأٓخِرَةِۚ وَهُوَ ٱلۡحَكِيمُ ٱلۡخَبِيرُ
1. M atondo na Allah oyo maye manso ya likolo mpe ya nsé ezali ya ye, mpe azali na matondo o tango ya suka. Мре azali na bwanya atonda boyebi.
阿拉伯语经注:
يَعۡلَمُ مَا يَلِجُ فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا يَخۡرُجُ مِنۡهَا وَمَا يَنزِلُ مِنَ ٱلسَّمَآءِ وَمَا يَعۡرُجُ فِيهَاۚ وَهُوَ ٱلرَّحِيمُ ٱلۡغَفُورُ
2. Ayebi maye mazali kokota na mabele na maye mazali kobima o kati na yango, mpe maye mazali kokita kowuta na likolo mpe na maye mazali komata. Azali wa ngolu atonda bolimbisi.
阿拉伯语经注:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَا تَأۡتِينَا ٱلسَّاعَةُۖ قُلۡ بَلَىٰ وَرَبِّي لَتَأۡتِيَنَّكُمۡ عَٰلِمِ ٱلۡغَيۡبِۖ لَا يَعۡزُبُ عَنۡهُ مِثۡقَالُ ذَرَّةٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَلَآ أَصۡغَرُ مِن ذَٰلِكَ وَلَآ أَكۡبَرُ إِلَّا فِي كِتَٰبٖ مُّبِينٖ
3. Mpe bapengwi balobi: Ngonga ekoyelaka biso te, loba: Na Nkolo wa ngai, ya soló penza ekoyelaka bino, ye nde moyebi ya oyo ebombami. Eloko nionso ata ya mokie lokola mbuma ya zelo na likolo mpe na mabele, mpe ezali na eloko moko te ya mokie nto mpe ya monene sé kaka ekomama na buku ya polele.
阿拉伯语经注:
لِّيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِۚ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُم مَّغۡفِرَةٞ وَرِزۡقٞ كَرِيمٞ
4. Mpo ete apesa lifuta na baye bandimaki mpe baye basalaki malamu, bango nde bakolimbisama, mpe bakozua bozui bolamu.
阿拉伯语经注:
وَٱلَّذِينَ سَعَوۡ فِيٓ ءَايَٰتِنَا مُعَٰجِزِينَ أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ عَذَابٞ مِّن رِّجۡزٍ أَلِيمٞ
5. Мре тропа baye bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bango nde bakozua etumbu ya makasi.
阿拉伯语经注:
وَيَرَى ٱلَّذِينَ أُوتُواْ ٱلۡعِلۡمَ ٱلَّذِيٓ أُنزِلَ إِلَيۡكَ مِن رَّبِّكَ هُوَ ٱلۡحَقَّ وَيَهۡدِيٓ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡحَمِيدِ
6. Nzoka nde baye bazali na boyebi, bazali kornona oyo ekiteli yo kowuta epai na Nkolo nayo ete ezali bosembo mpe ezali kokamba o nzela ya oyo azali na nguya atonda lokumu.
阿拉伯语经注:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هَلۡ نَدُلُّكُمۡ عَلَىٰ رَجُلٖ يُنَبِّئُكُمۡ إِذَا مُزِّقۡتُمۡ كُلَّ مُمَزَّقٍ إِنَّكُمۡ لَفِي خَلۡقٖ جَدِيدٍ
7. Mpe bapengwi bazali koloba ete: Boye bolingi tolakisa bino moto oyo akoyebisa bino tango bosili kobebisama, ete bozonga lisusu bikelamu ya sika?
阿拉伯语经注:
أَفۡتَرَىٰ عَلَى ٱللَّهِ كَذِبًا أَم بِهِۦ جِنَّةُۢۗ بَلِ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ فِي ٱلۡعَذَابِ وَٱلضَّلَٰلِ ٱلۡبَعِيدِ
8. Boye azali kobukela Allah lokuta? To azali na ligboma? Kasi baye bazali kondima na mokolo mwa suka te, bakozalaka o kati ya etumbu mpe libunga ya mosika.
阿拉伯语经注:
أَفَلَمۡ يَرَوۡاْ إِلَىٰ مَا بَيۡنَ أَيۡدِيهِمۡ وَمَا خَلۡفَهُم مِّنَ ٱلسَّمَآءِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِن نَّشَأۡ نَخۡسِفۡ بِهِمُ ٱلۡأَرۡضَ أَوۡ نُسۡقِطۡ عَلَيۡهِمۡ كِسَفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَةٗ لِّكُلِّ عَبۡدٖ مُّنِيبٖ
9. Boye bazali kornona te maye mazali liboso na bango mpe sima na bango? Okati ya likolo na mabele, soki tolingi, tokozindisa bango na mabele. To tokweisela bango ndambu ya mapata, ya soló, wana ezali elembo тропа mowumbu nyoso oyo azali motubeli.
阿拉伯语经注:
۞ وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا دَاوُۥدَ مِنَّا فَضۡلٗاۖ يَٰجِبَالُ أَوِّبِي مَعَهُۥ وَٱلطَّيۡرَۖ وَأَلَنَّا لَهُ ٱلۡحَدِيدَ
10. Mpe ya sólo, tosilaki kopesa Dáwud bolamu ete: Eh bangomba na bandeke! Bosanjola elongo naye, mpe tolembiselaki ye ebende.
阿拉伯语经注:
أَنِ ٱعۡمَلۡ سَٰبِغَٰتٖ وَقَدِّرۡ فِي ٱلسَّرۡدِۖ وَٱعۡمَلُواْ صَٰلِحًاۖ إِنِّي بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
11. (Mpe) toyebisaki ye ete: Bosala na yango nguba ya komibatela na tango ya bitumba mpe bosala misala ya malamu. Mpamba te ya soló, nazali kornona maye bozali kosala.
阿拉伯语经注:
وَلِسُلَيۡمَٰنَ ٱلرِّيحَ غُدُوُّهَا شَهۡرٞ وَرَوَاحُهَا شَهۡرٞۖ وَأَسَلۡنَا لَهُۥ عَيۡنَ ٱلۡقِطۡرِۖ وَمِنَ ٱلۡجِنِّ مَن يَعۡمَلُ بَيۡنَ يَدَيۡهِ بِإِذۡنِ رَبِّهِۦۖ وَمَن يَزِغۡ مِنۡهُمۡ عَنۡ أَمۡرِنَا نُذِقۡهُ مِنۡ عَذَابِ ٱلسَّعِيرِ
12. Mpe тропа Suleyman, (totiyelaki ye) mopepe, ezali kotambola na tongo lokola oyo etamboli sanza moko, mpe na pokwa lolenge moko, mpe totioliselaki ye moluka mwa wolo. Mpe bilima bisusu bizalaki kosala na mibeko mia ye na ndingisa ya Allah, mpe oyo akotika kosalela mobeko mwa biso, tokomekisa ye etumbu ya moto ya sairi.
阿拉伯语经注:
يَعۡمَلُونَ لَهُۥ مَا يَشَآءُ مِن مَّحَٰرِيبَ وَتَمَٰثِيلَ وَجِفَانٖ كَٱلۡجَوَابِ وَقُدُورٖ رَّاسِيَٰتٍۚ ٱعۡمَلُوٓاْ ءَالَ دَاوُۥدَ شُكۡرٗاۚ وَقَلِيلٞ مِّنۡ عِبَادِيَ ٱلشَّكُورُ
13. Bazalaki kosalela ye oyo alingaki kosala, tèmpelo bikeko na mbambola lokola sani ya minene, na banzungu ya langi. Oh bato ya Dâwud! Botonda botondi. Kasi токе mpenza kati na bawumbu ba ngai nde bayebi kozongisa matondi.
阿拉伯语经注:
فَلَمَّا قَضَيۡنَا عَلَيۡهِ ٱلۡمَوۡتَ مَا دَلَّهُمۡ عَلَىٰ مَوۡتِهِۦٓ إِلَّا دَآبَّةُ ٱلۡأَرۡضِ تَأۡكُلُ مِنسَأَتَهُۥۖ فَلَمَّا خَرَّ تَبَيَّنَتِ ٱلۡجِنُّ أَن لَّوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ ٱلۡغَيۡبَ مَا لَبِثُواْ فِي ٱلۡعَذَابِ ٱلۡمُهِينِ
14. Mpe tango tozua mokano тропа liwa naye, moko ayebaki yango te, sé bobele banyama ya mabele nde emonisaki bato liwa naye na kolia lingenda naye, mpe tango akweyaki, bilima bakamwaki na koloba ete: Soki bayebaki mabombami nde banyokwamaki te na bowumbu ya mosala naye.
阿拉伯语经注:
لَقَدۡ كَانَ لِسَبَإٖ فِي مَسۡكَنِهِمۡ ءَايَةٞۖ جَنَّتَانِ عَن يَمِينٖ وَشِمَالٖۖ كُلُواْ مِن رِّزۡقِ رَبِّكُمۡ وَٱشۡكُرُواْ لَهُۥۚ بَلۡدَةٞ طَيِّبَةٞ وَرَبٌّ غَفُورٞ
15. Ya soló, pona saba ezuamaki na nzela ya efandelo na bango, na bilanga mibale, moko na ngambu ya (loboko) ya mobali, mosusu na ngambu ya (loboko) ya mwasi, bolia bozui boye Nkolo wa bino apesi bino, mpe botonda ye botondi. Mboka elamu mpe Nkolo ya bolimbisi.
阿拉伯语经注:
فَأَعۡرَضُواْ فَأَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ سَيۡلَ ٱلۡعَرِمِ وَبَدَّلۡنَٰهُم بِجَنَّتَيۡهِمۡ جَنَّتَيۡنِ ذَوَاتَيۡ أُكُلٍ خَمۡطٖ وَأَثۡلٖ وَشَيۡءٖ مِّن سِدۡرٖ قَلِيلٖ
16. Kasi baboyaki, mpe totindelaki bango etumbu ya bozindisami bwa mbula (mpela), mpe tobongolaki bilanga bia bango mibale wana bikomaki kobimisa banzete ya bololo, mpe mua banzete ya Sidr.
阿拉伯语经注:
ذَٰلِكَ جَزَيۡنَٰهُم بِمَا كَفَرُواْۖ وَهَلۡ نُجَٰزِيٓ إِلَّا ٱلۡكَفُورَ
17. Wana nde ezalaki lifuta тропа maye bapengwaki na yango, boye tokopesa etumbu epai mosusu bobele na mopagano?
阿拉伯语经注:
وَجَعَلۡنَا بَيۡنَهُمۡ وَبَيۡنَ ٱلۡقُرَى ٱلَّتِي بَٰرَكۡنَا فِيهَا قُرٗى ظَٰهِرَةٗ وَقَدَّرۡنَا فِيهَا ٱلسَّيۡرَۖ سِيرُواْ فِيهَا لَيَالِيَ وَأَيَّامًا ءَامِنِينَ
18. Mpe totiaki kati kati na bango na bamboka oyo topambolaki, bamboka misusu ezali na banzela ya polele ya pene тропа kosala mobembo kati na yango. В osala mobembo butu na moyi na kimia.
阿拉伯语经注:
فَقَالُواْ رَبَّنَا بَٰعِدۡ بَيۡنَ أَسۡفَارِنَا وَظَلَمُوٓاْ أَنفُسَهُمۡ فَجَعَلۡنَٰهُمۡ أَحَادِيثَ وَمَزَّقۡنَٰهُمۡ كُلَّ مُمَزَّقٍۚ إِنَّ فِي ذَٰلِكَ لَأٓيَٰتٖ لِّكُلِّ صَبَّارٖ شَكُورٖ
19. Mpe balobaki ete: Nkolo sembola kati kati na biso ezala mosika, kasi bamisalaki mabe bango moko, mpe totia bango bazala masapo, mpe tobebisaki bango mpeza. Wana ezali bilembo тропа moto nyoso azali koyika mpiko mpe azali na botondi.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ صَدَّقَ عَلَيۡهِمۡ إِبۡلِيسُ ظَنَّهُۥ فَٱتَّبَعُوهُ إِلَّا فَرِيقٗا مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
20. Mpe ya soló, ibilisu asili kokomisela bango makanisi naye, mpe balandi ye, longola sé eteni шоке kati ya bandimi,
阿拉伯语经注:
وَمَا كَانَ لَهُۥ عَلَيۡهِم مِّن سُلۡطَٰنٍ إِلَّا لِنَعۡلَمَ مَن يُؤۡمِنُ بِٱلۡأٓخِرَةِ مِمَّنۡ هُوَ مِنۡهَا فِي شَكّٖۗ وَرَبُّكَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٍ حَفِيظٞ
21. Mpe azalaki na bokonzi likolo na bango te, kasi ezalaki mpo toyeba kati na bango nani andimi mpenza na mokolo ya suka, mpe koyeba nani azali na tembe na yango. Mpe Nkolo nayo nde mobateli ya biloko binso.
阿拉伯语经注:
قُلِ ٱدۡعُواْ ٱلَّذِينَ زَعَمۡتُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ لَا يَمۡلِكُونَ مِثۡقَالَ ذَرَّةٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَلَا فِي ٱلۡأَرۡضِ وَمَا لَهُمۡ فِيهِمَا مِن شِرۡكٖ وَمَا لَهُۥ مِنۡهُم مِّن ظَهِيرٖ
22. Loba: Bobenga baye bozalaki kotutela ntolo na botiki Allah, bazali ata na eloko moke te lokola mbuma ya zelo na nsé mpe, na likolo basanganaki mpe naye te тропа kokela yango mibale, mpe azuaka ata lisungi na bango te.
阿拉伯语经注:
وَلَا تَنفَعُ ٱلشَّفَٰعَةُ عِندَهُۥٓ إِلَّا لِمَنۡ أَذِنَ لَهُۥۚ حَتَّىٰٓ إِذَا فُزِّعَ عَن قُلُوبِهِمۡ قَالُواْ مَاذَا قَالَ رَبُّكُمۡۖ قَالُواْ ٱلۡحَقَّۖ وَهُوَ ٱلۡعَلِيُّ ٱلۡكَبِيرُ
23. Mpe akondimelaka moto te sé oyo akopesa ye ndingisa, kino bobangi bokokita kowuta na mitema mia bango mpe bakolobaka: Boye Nkolo wa bino alobi nini? Bakoyanolaka bango ete alobi: Bosôló, mpe ye nde azali monene mpe ľíkolo koleka.
阿拉伯语经注:
۞ قُلۡ مَن يَرۡزُقُكُم مِّنَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۖ قُلِ ٱللَّهُۖ وَإِنَّآ أَوۡ إِيَّاكُمۡ لَعَلَىٰ هُدًى أَوۡ فِي ضَلَٰلٖ مُّبِينٖ
24. Loba: Nani aleisaka bino ezala na likolo mpe na nsé? Loba: Allah. Ya solo, ezala biso to bino tokoyeba ba nani bazali na nzela ya semba to ya libungi ya polele?
阿拉伯语经注:
قُل لَّا تُسۡـَٔلُونَ عَمَّآ أَجۡرَمۡنَا وَلَا نُسۡـَٔلُ عَمَّا تَعۡمَلُونَ
25. Loba; bokotunama te na mabe oyo tosali, mpe tokotunama te na misala na bino.
阿拉伯语经注:
قُلۡ يَجۡمَعُ بَيۡنَنَا رَبُّنَا ثُمَّ يَفۡتَحُ بَيۡنَنَا بِٱلۡحَقِّ وَهُوَ ٱلۡفَتَّاحُ ٱلۡعَلِيمُ
26. Loba: Nkolo wa biso akosangisaka biso mpe sima akosambisa kati kati na biso na bosôló, ye nde mosambisi monene koleka mpe moyebi manso.
阿拉伯语经注:
قُلۡ أَرُونِيَ ٱلَّذِينَ أَلۡحَقۡتُم بِهِۦ شُرَكَآءَۖ كَلَّاۚ بَلۡ هُوَ ٱللَّهُ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡحَكِيمُ
27. Loba: Bolakisa ngai baye bozui bango basangani naye?, te; kasi ye azali Allah oyo azali na nguya atonda bwanya.
阿拉伯语经注:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ إِلَّا كَآفَّةٗ لِّلنَّاسِ بَشِيرٗا وَنَذِيرٗا وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
28. Mpe totindaki yo sé тропа bopesi sango ya malamu mpe тропа kokebisa molongo mobimba, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
阿拉伯语经注:
وَيَقُولُونَ مَتَىٰ هَٰذَا ٱلۡوَعۡدُ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
29. Mpe bazali koloba: Elaka yango ekozalaka tango nini soki bozali koloba bosôló?
阿拉伯语经注:
قُل لَّكُم مِّيعَادُ يَوۡمٖ لَّا تَسۡتَـٔۡخِرُونَ عَنۡهُ سَاعَةٗ وَلَا تَسۡتَقۡدِمُونَ
30. Loba: Elaka na bino ekozala o mokolo oyo bokokoka kozongisa ngonga na yango sima te, mpe liboso te.
阿拉伯语经注:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَن نُّؤۡمِنَ بِهَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانِ وَلَا بِٱلَّذِي بَيۡنَ يَدَيۡهِۗ وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذِ ٱلظَّٰلِمُونَ مَوۡقُوفُونَ عِندَ رَبِّهِمۡ يَرۡجِعُ بَعۡضُهُمۡ إِلَىٰ بَعۡضٍ ٱلۡقَوۡلَ يَقُولُ ٱلَّذِينَ ٱسۡتُضۡعِفُواْ لِلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُواْ لَوۡلَآ أَنتُمۡ لَكُنَّا مُؤۡمِنِينَ
31. Mpe bapengwi bazali koloba ete: Tokondima na kurani oyo te tokondima mpe te na maye makitaki liboso na yango. Mpe soki omonaki bato mabe tango bakotelema liboso lia Nkolo wa bango, bazali kowelana na maloba, baye bazangaki makasi bakoloba na baye ya lolendo ete: Soki тропа bino te nde tokomaki bandimi.
阿拉伯语经注:
قَالَ ٱلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُواْ لِلَّذِينَ ٱسۡتُضۡعِفُوٓاْ أَنَحۡنُ صَدَدۡنَٰكُمۡ عَنِ ٱلۡهُدَىٰ بَعۡدَ إِذۡ جَآءَكُمۖ بَلۡ كُنتُم مُّجۡرِمِينَ
32. Bato ya lolendo bakozongisa eyano epai na bango ete: Boye biso nde topekisaki bino bokambami tango esilaki kokomela bino? Te, bino nde bozalaki bato mabe batomboki.
阿拉伯语经注:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ ٱسۡتُضۡعِفُواْ لِلَّذِينَ ٱسۡتَكۡبَرُواْ بَلۡ مَكۡرُ ٱلَّيۡلِ وَٱلنَّهَارِ إِذۡ تَأۡمُرُونَنَآ أَن نَّكۡفُرَ بِٱللَّهِ وَنَجۡعَلَ لَهُۥٓ أَندَادٗاۚ وَأَسَرُّواْ ٱلنَّدَامَةَ لَمَّا رَأَوُاْ ٱلۡعَذَابَۚ وَجَعَلۡنَا ٱلۡأَغۡلَٰلَ فِيٓ أَعۡنَاقِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۖ هَلۡ يُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
33. Bato ya motawu baye bazangi makasi bakozongisa liloba na bato ya lolendo ete; ezalaki nde likita na bino ya mabe bozalaki kosala yango butu na moyi, bozali kotinda biso ete topengwa na Allah, mpe totiela ye bambanda. Mpe babandi kolela na bango tango bakomona etumbu, tokotia miniololo na bakingo ya bapengwi, boye bakofutama te sé lolenge basalaki?
阿拉伯语经注:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا فِي قَرۡيَةٖ مِّن نَّذِيرٍ إِلَّا قَالَ مُتۡرَفُوهَآ إِنَّا بِمَآ أُرۡسِلۡتُم بِهِۦ كَٰفِرُونَ
34. Mpe totindaki mokebisi te na mboka sé bato ya bozwi nayango baloba: Tokondimela oyo botindami na yango te.
阿拉伯语经注:
وَقَالُواْ نَحۡنُ أَكۡثَرُ أَمۡوَٰلٗا وَأَوۡلَٰدٗا وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
35. Mpe bazali koloba ete: Ya solo, tozali na bana mpe na bozui ebele, na yango tokoki kozua etumbu te.
阿拉伯语经注:
قُلۡ إِنَّ رَبِّي يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ وَيَقۡدِرُ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَ ٱلنَّاسِ لَا يَعۡلَمُونَ
36. Loba: Ya sólo, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi mpe abotoloko, kasi ebele ya bato bazali koyeba te.
阿拉伯语经注:
وَمَآ أَمۡوَٰلُكُمۡ وَلَآ أَوۡلَٰدُكُم بِٱلَّتِي تُقَرِّبُكُمۡ عِندَنَا زُلۡفَىٰٓ إِلَّا مَنۡ ءَامَنَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَأُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ جَزَآءُ ٱلضِّعۡفِ بِمَا عَمِلُواْ وَهُمۡ فِي ٱلۡغُرُفَٰتِ ءَامِنُونَ
37. Misolo mia bino na bana na bino ekopusa bino te pene na biso, longola sé oyo akondima mpe asali misala milamu, bango nde bakozuaka lifuta ya kobakisama тропа maye basalaki, mpe bakozalaka na bisika ya likolo mpe lola ya kimiya (nyoso).
阿拉伯语经注:
وَٱلَّذِينَ يَسۡعَوۡنَ فِيٓ ءَايَٰتِنَا مُعَٰجِزِينَ أُوْلَٰٓئِكَ فِي ٱلۡعَذَابِ مُحۡضَرُونَ
38. Kasi тропа ba oyo bazali koluka kobebisa mikapo mia biso, bakomemama liboso ya etumbu.
阿拉伯语经注:
قُلۡ إِنَّ رَبِّي يَبۡسُطُ ٱلرِّزۡقَ لِمَن يَشَآءُ مِنۡ عِبَادِهِۦ وَيَقۡدِرُ لَهُۥۚ وَمَآ أَنفَقۡتُم مِّن شَيۡءٖ فَهُوَ يُخۡلِفُهُۥۖ وَهُوَ خَيۡرُ ٱلرَّٰزِقِينَ
39. Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai apesaka bozui na oyo alingi kati ya bawumbu naye, mpe akutolaka yango. Mpe nyoso oyo bozali kobimisa azali kozongisela bino yango, mpe azali malamu ya bapesi.
阿拉伯语经注:
وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ جَمِيعٗا ثُمَّ يَقُولُ لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ أَهَٰٓؤُلَآءِ إِيَّاكُمۡ كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
40. Mpe mokolo oyo akosangisa bango banso, sima akolobaka na ba anzelu: Boye bino nde ba oyo bazalaki kobondela?
阿拉伯语经注:
قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ أَنتَ وَلِيُّنَا مِن دُونِهِمۖ بَلۡ كَانُواْ يَعۡبُدُونَ ٱلۡجِنَّۖ أَكۡثَرُهُم بِهِم مُّؤۡمِنُونَ
41. Bakoloba ete: Lokumu nayo, yo nde mokonzi na biso kasi bango te, nzoka nde bazalaki kobondela nde bilima, mpe ebele bandimelaki bango.
阿拉伯语经注:
فَٱلۡيَوۡمَ لَا يَمۡلِكُ بَعۡضُكُمۡ لِبَعۡضٖ نَّفۡعٗا وَلَا ضَرّٗا وَنَقُولُ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ ذُوقُواْ عَذَابَ ٱلنَّارِ ٱلَّتِي كُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ
42. O mokolo yango, bokozala na makoki te ya kosalisana, mpe kominyokola te, mpe tokoloba na bato mabe ete: Вотека etumbu ya moto oyo bozalaki kozua yango lokuta.
阿拉伯语经注:
وَإِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِمۡ ءَايَٰتُنَا بَيِّنَٰتٖ قَالُواْ مَا هَٰذَآ إِلَّا رَجُلٞ يُرِيدُ أَن يَصُدَّكُمۡ عَمَّا كَانَ يَعۡبُدُ ءَابَآؤُكُمۡ وَقَالُواْ مَا هَٰذَآ إِلَّآ إِفۡكٞ مُّفۡتَرٗىۚ وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لِلۡحَقِّ لَمَّا جَآءَهُمۡ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٞ
43. Mpe soki batangeli bango mikapo mia biso mia polele, bakoloba ete: Nini oyo moto oyo alingi nde apekisa bino maye batata na bino bazalaki kobondela? Mpe balobi lisusu ete: Oyo ezali sé lokuta oyo ebongisami, mpe bapagano balobi тропа bosembo tango ekomelaki bango ete: Oyo ezali sé bonganga ya polele.
阿拉伯语经注:
وَمَآ ءَاتَيۡنَٰهُم مِّن كُتُبٖ يَدۡرُسُونَهَاۖ وَمَآ أَرۡسَلۡنَآ إِلَيۡهِمۡ قَبۡلَكَ مِن نَّذِيرٖ
44. (Mpe) topesaki bango buku moko te mpo batanga yango, mpe totindelaki bango mokebisi moko te liboso nayo.
阿拉伯语经注:
وَكَذَّبَ ٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ وَمَا بَلَغُواْ مِعۡشَارَ مَآ ءَاتَيۡنَٰهُمۡ فَكَذَّبُواْ رُسُلِيۖ فَكَيۡفَ كَانَ نَكِيرِ
45. Ndenge moko mpe na ba oyo bazalaki liboso na bango baboyaki kondimela (Batindami na bango) bakomisaki zomi te na oyo topesaki bango, baboyaki kondimela batindami ba ngai, mpe lolenge kani nasalaki тропа bango!
阿拉伯语经注:
۞ قُلۡ إِنَّمَآ أَعِظُكُم بِوَٰحِدَةٍۖ أَن تَقُومُواْ لِلَّهِ مَثۡنَىٰ وَفُرَٰدَىٰ ثُمَّ تَتَفَكَّرُواْۚ مَا بِصَاحِبِكُم مِّن جِنَّةٍۚ إِنۡ هُوَ إِلَّا نَذِيرٞ لَّكُم بَيۡنَ يَدَيۡ عَذَابٖ شَدِيدٖ
46. Loba: Nazali kolendisa bino na eloko moko ete: Mpona Allah, botelema mibale mibale to moko moko, mpe sima bososola. Ndeko na bino azali na bazabulu te, (Muhammad) kasi azali mokebisi mpona bino, mpona etumbu ya makasi.
阿拉伯语经注:
قُلۡ مَا سَأَلۡتُكُم مِّنۡ أَجۡرٖ فَهُوَ لَكُمۡۖ إِنۡ أَجۡرِيَ إِلَّا عَلَى ٱللَّهِۖ وَهُوَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ شَهِيدٞ
47. Loba oyo nazali kosenga bino ezali mpona bino moko, kasi lifuta lia ngai, likofutamaka sé epai ya Allah, тре azali kornona nyoso.
阿拉伯语经注:
قُلۡ إِنَّ رَبِّي يَقۡذِفُ بِٱلۡحَقِّ عَلَّٰمُ ٱلۡغُيُوبِ
48. Loba: Ya soló, Nkolo wa ngai atiyaka bosôló (epai ya batindami), ayebi malamu maye mabombami.
阿拉伯语经注:
قُلۡ جَآءَ ٱلۡحَقُّ وَمَا يُبۡدِئُ ٱلۡبَٰطِلُ وَمَا يُعِيدُ
49. Loba: Bosôló bosili koya, mpe lokuta bozala te, mpe ekozonga lisusu te.
阿拉伯语经注:
قُلۡ إِن ضَلَلۡتُ فَإِنَّمَآ أَضِلُّ عَلَىٰ نَفۡسِيۖ وَإِنِ ٱهۡتَدَيۡتُ فَبِمَا يُوحِيٓ إِلَيَّ رَبِّيٓۚ إِنَّهُۥ سَمِيعٞ قَرِيبٞ
50. Loba: Soki nabungi, namibungisi ngai moko, mpe soki nakambami ezali тропа oyo ekiteli ngai kowuta epai na Nkolo wa ngai. Ya sólo, ye azali moyoki mpe azali pene.
阿拉伯语经注:
وَلَوۡ تَرَىٰٓ إِذۡ فَزِعُواْ فَلَا فَوۡتَ وَأُخِذُواْ مِن مَّكَانٖ قَرِيبٖ
51. Mpe soki omoni bango tango bakokweya na bobangi, bakokoka kokima te, kasi bakokangama pembeni.
阿拉伯语经注:
وَقَالُوٓاْ ءَامَنَّا بِهِۦ وَأَنَّىٰ لَهُمُ ٱلتَّنَاوُشُ مِن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ
52. Mpe bakoloba ete: Tondimi naye, kasi ndenge nini bakozela bondimi na mosika?
阿拉伯语经注:
وَقَدۡ كَفَرُواْ بِهِۦ مِن قَبۡلُۖ وَيَقۡذِفُونَ بِٱلۡغَيۡبِ مِن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ
53. Basilaki kopengwa na yango banda kala, mpe bazali kolendisa na mosika maye bazali na boyebi te.
阿拉伯语经注:
وَحِيلَ بَيۡنَهُمۡ وَبَيۡنَ مَا يَشۡتَهُونَ كَمَا فُعِلَ بِأَشۡيَاعِهِم مِّن قَبۡلُۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ فِي شَكّٖ مُّرِيبِۭ
54. Mpe bakopekisama ete: Bazua eloko bazalaki na mposa na yango, lolenge ya boye esilaki mpe kosalama na baninga na bango ya liboso mpo ete balutaki tembe. (Bazalaki na tembe ya mozindo mpe monene).
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 赛拜艾
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭