《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 杜哈尼   段:

Ad-Dukhân (MOLINGA)

حمٓ
1. Hâ, mîm.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡكِتَٰبِ ٱلۡمُبِينِ
2. Na buku (kurani) ya polele.
阿拉伯语经注:
إِنَّآ أَنزَلۡنَٰهُ فِي لَيۡلَةٖ مُّبَٰرَكَةٍۚ إِنَّا كُنَّا مُنذِرِينَ
3. Ya soló, tokitisaki yango o butu ya mapamboli. Ya soló, biso tozali bakebisi.
阿拉伯语经注:
فِيهَا يُفۡرَقُ كُلُّ أَمۡرٍ حَكِيمٍ
4. O kati na yango mokano ya makambo manso ya bwanya mazali kozuama.
阿拉伯语经注:
أَمۡرٗا مِّنۡ عِندِنَآۚ إِنَّا كُنَّا مُرۡسِلِينَ
5. Motindo kowuta epai na biso. Biso nde totindaka.
阿拉伯语经注:
رَحۡمَةٗ مِّن رَّبِّكَۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلسَّمِيعُ ٱلۡعَلِيمُ
6. Mawa kowuta na Nkolo wayo. Ya sólo ye azali moyoki atonda boyebi.
阿拉伯语经注:
رَبِّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَآۖ إِن كُنتُم مُّوقِنِينَ
7. Nkolo ya likolo na mabele na manso maye mazali otei na yango mibale. Soki ya sólo bozali na tembe te.
阿拉伯语经注:
لَآ إِلَٰهَ إِلَّا هُوَ يُحۡيِۦ وَيُمِيتُۖ رَبُّكُمۡ وَرَبُّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
8. Nzambe mosusu azali te ya kobondela na bosóló sé ye apesaka bomoyi na liwa, Nkolo wa bino mpe Nkolo ya bankoko na bino wa yambo.
阿拉伯语经注:
بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ يَلۡعَبُونَ
9. Kasi bango (bato) wana bazali na tembe, bazali kosakana.
阿拉伯语经注:
فَٱرۡتَقِبۡ يَوۡمَ تَأۡتِي ٱلسَّمَآءُ بِدُخَانٖ مُّبِينٖ
10. (Malamu) zela mokolo oyo likolo ekoya na molinga ya polele.
阿拉伯语经注:
يَغۡشَى ٱلنَّاسَۖ هَٰذَا عَذَابٌ أَلِيمٞ
11. Ekozipa bato, oyo nde etumbu ya makasi.
阿拉伯语经注:
رَّبَّنَا ٱكۡشِفۡ عَنَّا ٱلۡعَذَابَ إِنَّا مُؤۡمِنُونَ
12. Nkolo; tiya etumbu mosika na biso, ya soló tozali bandimi.
阿拉伯语经注:
أَنَّىٰ لَهُمُ ٱلذِّكۡرَىٰ وَقَدۡ جَآءَهُمۡ رَسُولٞ مُّبِينٞ
13. Lolenge nini bokundoli na mitema epesa bango pasi, kasi motindami asilaki koyela bango polele.
阿拉伯语经注:
ثُمَّ تَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ وَقَالُواْ مُعَلَّمٞ مَّجۡنُونٌ
14. Sima bapesi yango mokongo mpe balobi: Batangisa ye, azali na ligboma.
阿拉伯语经注:
إِنَّا كَاشِفُواْ ٱلۡعَذَابِ قَلِيلًاۚ إِنَّكُمۡ عَآئِدُونَ
15. Tokolongola etumbu moke. Ya sólo, bozali bato mabe.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ نَبۡطِشُ ٱلۡبَطۡشَةَ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ إِنَّا مُنتَقِمُونَ
16. Mokolo tokobeta na ndenge ya mabe, mpo ete biso esengeli tosala bongo.
阿拉伯语经注:
۞ وَلَقَدۡ فَتَنَّا قَبۡلَهُمۡ قَوۡمَ فِرۡعَوۡنَ وَجَآءَهُمۡ رَسُولٞ كَرِيمٌ
17. Мре liboso na bango, tomekaki bato ya falo, mpe motindami ya malamu ayelaki bango.
阿拉伯语经注:
أَنۡ أَدُّوٓاْ إِلَيَّ عِبَادَ ٱللَّهِۖ إِنِّي لَكُمۡ رَسُولٌ أَمِينٞ
18. (Ayebisi) bango: Bopesa ngai bawumbu ya Allah, nazali motindami malamu epai na bino.
阿拉伯语经注:
وَأَن لَّا تَعۡلُواْ عَلَى ٱللَّهِۖ إِنِّيٓ ءَاتِيكُم بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٖ
19. Bomilakisa te epai ya Allah na kosalela ye lolendo. Ya solo, nayeli bino elembo ya polele.
阿拉伯语经注:
وَإِنِّي عُذۡتُ بِرَبِّي وَرَبِّكُمۡ أَن تَرۡجُمُونِ
20. Mpe ya soló, nazali koluka libateli epai ya Nkolo wa ngai, mpe Nkolo wa bino. Mpo ete bobamba ngai mabanga te.
阿拉伯语经注:
وَإِن لَّمۡ تُؤۡمِنُواْ لِي فَٱعۡتَزِلُونِ
21. Mpe soki bondimeli ngai te, bomitiya mosika na ngai.
阿拉伯语经注:
فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنَّ هَٰٓؤُلَآءِ قَوۡمٞ مُّجۡرِمُونَ
22. Abengaki Nkolo wa ye, ya solo bazali batomboki.
阿拉伯语经注:
فَأَسۡرِ بِعِبَادِي لَيۡلًا إِنَّكُم مُّتَّبَعُونَ
23. Sala mobembo na butu elongo na bawumbu na ngai, mpo ete bokolandama (na banguna na bino).
阿拉伯语经注:
وَٱتۡرُكِ ٱلۡبَحۡرَ رَهۡوًاۖ إِنَّهُمۡ جُندٞ مُّغۡرَقُونَ
24. Tika ebale lolenge wana, esengeli na bango bazinda (kokufa)
阿拉伯语经注:
كَمۡ تَرَكُواْ مِن جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
25. Boni batikaki kati na bilanga na miluka,
阿拉伯语经注:
وَزُرُوعٖ وَمَقَامٖ كَرِيمٖ
26. Bilanga na milona na bandako ya kitoko,
阿拉伯语经注:
وَنَعۡمَةٖ كَانُواْ فِيهَا فَٰكِهِينَ
27. Na bilengi biye bazalaki kosepela kati na yango?
阿拉伯语经注:
كَذَٰلِكَۖ وَأَوۡرَثۡنَٰهَا قَوۡمًا ءَاخَرِينَ
28. Lolenge wana nde ezalaka, mpe tokitanisaki yango bato mosusu.
阿拉伯语经注:
فَمَا بَكَتۡ عَلَيۡهِمُ ٱلسَّمَآءُ وَٱلۡأَرۡضُ وَمَا كَانُواْ مُنظَرِينَ
29. Ezala likolo na mabele etikalaki kolela te na kozela.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ نَجَّيۡنَا بَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ مِنَ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡمُهِينِ
30. Mpe tobikisaki bana ya isalayele na etumbu ya nsoni.
阿拉伯语经注:
مِن فِرۡعَوۡنَۚ إِنَّهُۥ كَانَ عَالِيٗا مِّنَ ٱلۡمُسۡرِفِينَ
31. Kowuta epai ya falo oyo amilakisaki okati ya bato mabe.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدِ ٱخۡتَرۡنَٰهُمۡ عَلَىٰ عِلۡمٍ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
32. Mpe tosilaki kotiya bango bazala elembo тропа molongo mobimba.
阿拉伯语经注:
وَءَاتَيۡنَٰهُم مِّنَ ٱلۡأٓيَٰتِ مَا فِيهِ بَلَٰٓؤٞاْ مُّبِينٌ
33. Mpe topesaki bango makamwisi тропа komeka bango.
阿拉伯语经注:
إِنَّ هَٰٓؤُلَآءِ لَيَقُولُونَ
34. Ya soló, ba oyo wana bazali koloba.
阿拉伯语经注:
إِنۡ هِيَ إِلَّا مَوۡتَتُنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُنشَرِينَ
35. Liwa тропа biso nde oyo ya yambo, tokoki kosekwa lisusu te (sima na yango).
阿拉伯语经注:
فَأۡتُواْ بِـَٔابَآئِنَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
36. Bozongisa bankoko na biso soki bozali koloba bosóló.
阿拉伯语经注:
أَهُمۡ خَيۡرٌ أَمۡ قَوۡمُ تُبَّعٖ وَٱلَّذِينَ مِن قَبۡلِهِمۡ أَهۡلَكۡنَٰهُمۡۚ إِنَّهُمۡ كَانُواْ مُجۡرِمِينَ
37. Boye bango nde bato malamu to bato ya tubbai (motindami to moto malamu), baye bazalaki liboso na bango, tobomaki bango mpo ete bazalaki bato mabe?
阿拉伯语经注:
وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا لَٰعِبِينَ
38. Mpe tokelaki likolo na mabele mpe manso maye mazali kati na yango pamba te.
阿拉伯语经注:
مَا خَلَقۡنَٰهُمَآ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
39. Tokelaki yango mibale na bosóló, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
阿拉伯语经注:
إِنَّ يَوۡمَ ٱلۡفَصۡلِ مِيقَٰتُهُمۡ أَجۡمَعِينَ
40. Ya sólo, o mokolo mwa bokati (makambo ya bato) nde ekozalaka elaka na bango banso.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ لَا يُغۡنِي مَوۡلًى عَن مَّوۡلٗى شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
41. Mokolo moye moninga to moto ya pene akosalisaka yo na eloko te, mpe bakosunganaka te.
阿拉伯语经注:
إِلَّا مَن رَّحِمَ ٱللَّهُۚ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلرَّحِيمُ
42. Longola sé oyo Allah akoyokelaka mawa. Ya soló, ye azali wa bokasi atonda ngolu.
阿拉伯语经注:
إِنَّ شَجَرَتَ ٱلزَّقُّومِ
43. Ya soló nzete ya Zaqqúm.
阿拉伯语经注:
طَعَامُ ٱلۡأَثِيمِ
44. Ekozalaka bilei ya basumuki.
阿拉伯语经注:
كَٱلۡمُهۡلِ يَغۡلِي فِي ٱلۡبُطُونِ
45. Lokola mafuta ya mabe, ezali kotokisa libumu.
阿拉伯语经注:
كَغَلۡيِ ٱلۡحَمِيمِ
46. Lokola kotoko ya mayi ya moto ya makasi.
阿拉伯语经注:
خُذُوهُ فَٱعۡتِلُوهُ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
47. Bozua ye mpe bomema ye o kati ya moto.
阿拉伯语经注:
ثُمَّ صُبُّواْ فَوۡقَ رَأۡسِهِۦ مِنۡ عَذَابِ ٱلۡحَمِيمِ
48. Sima bobwakela ye mayi ya moto na motu naye, lokola etumbu makasi.
阿拉伯语经注:
ذُقۡ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡكَرِيمُ
49. Meka, ya sólo, yo (okanisaki ete) ozali na bokasi mpe lokumu!
阿拉伯语经注:
إِنَّ هَٰذَا مَا كُنتُم بِهِۦ تَمۡتَرُونَ
50. Wana nde maye bozalaki kotiya tembe mpe kobundisa.
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي مَقَامٍ أَمِينٖ
51. Ya sólo, babangi bakozalaka na bovandi bwa kitoko.
阿拉伯语经注:
فِي جَنَّٰتٖ وَعُيُونٖ
52. Kati na bilanga na mingala (mia lola)
阿拉伯语经注:
يَلۡبَسُونَ مِن سُندُسٖ وَإِسۡتَبۡرَقٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
53. Bakolataka bilamba bia pepele ya pembe bitongama bazali kotalana.
阿拉伯语经注:
كَذَٰلِكَ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٖ
54. Na yango, tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene.
阿拉伯语经注:
يَدۡعُونَ فِيهَا بِكُلِّ فَٰكِهَةٍ ءَامِنِينَ
55. Mpe na kimia penza bakosengaka kati na yango bambuma kitoko ya lolenge nyoso.
阿拉伯语经注:
لَا يَذُوقُونَ فِيهَا ٱلۡمَوۡتَ إِلَّا ٱلۡمَوۡتَةَ ٱلۡأُولَىٰۖ وَوَقَىٰهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ
56. Liwa likozuaka bango te, sé oyo ya liboso mpe abateli (Allah) bango na etumbu ya lifelo.
阿拉伯语经注:
فَضۡلٗا مِّن رَّبِّكَۚ ذَٰلِكَ هُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
57. Bolamu ya Nkolo wayo. Wana nde elonga ya monene.
阿拉伯语经注:
فَإِنَّمَا يَسَّرۡنَٰهُ بِلِسَانِكَ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
58. Mpe ya soló, tokomisaki yango mpete na lolemu nayo mpo ete; basalisana na yango na bokundoli.
阿拉伯语经注:
فَٱرۡتَقِبۡ إِنَّهُم مُّرۡتَقِبُونَ
59. Zela moke, bango mpe bakozela.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 杜哈尼
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭