《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 舍姆斯   段:

As-Shams (MWESE)

وَٱلشَّمۡسِ وَضُحَىٰهَا
1. (Na lapi) na mwese mpe na bongengi na yango(1)!
1 Moyi.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡقَمَرِ إِذَا تَلَىٰهَا
2. (Mpe na lapi) na sanza ntango elandaka mwese!
阿拉伯语经注:
وَٱلنَّهَارِ إِذَا جَلَّىٰهَا
3. (Mpe na lapi) na moyi ntango ezali kongala!
阿拉伯语经注:
وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَغۡشَىٰهَا
4. (Mpe na lapi) na butu ntango ezipi (mokili).
阿拉伯语经注:
وَٱلسَّمَآءِ وَمَا بَنَىٰهَا
5. Mpe mapata na oyo atongi yango!
阿拉伯语经注:
وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا طَحَىٰهَا
6. Mpe mabele na oyo atanda yango!
阿拉伯语经注:
وَنَفۡسٖ وَمَا سَوَّىٰهَا
7. Mpe na molimo na oyo abongisa yango,
阿拉伯语经注:
فَأَلۡهَمَهَا فُجُورَهَا وَتَقۡوَىٰهَا
8. Mpe alakisi ye mabe naye mpe malamu naye (kobunga naye na bokambami)!
阿拉伯语经注:
قَدۡ أَفۡلَحَ مَن زَكَّىٰهَا
9. Asili kolonga moto oyo apetoli (molimo naye),
阿拉伯语经注:
وَقَدۡ خَابَ مَن دَسَّىٰهَا
10. Asili kobebisama oyo aboyi kopetola yango.
阿拉伯语经注:
كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِطَغۡوَىٰهَآ
11. Bato ya Thamúd balekisaki ndelo mpe baboyi kondima,
阿拉伯语经注:
إِذِ ٱنۢبَعَثَ أَشۡقَىٰهَا
12. Ntango moto mabe kati na bango atelemaki.
阿拉伯语经注:
فَقَالَ لَهُمۡ رَسُولُ ٱللَّهِ نَاقَةَ ٱللَّهِ وَسُقۡيَٰهَا
13. Motindami ya Allah alobaki na bango ete: Oyó ezali náqah(1) ya Allah botika yango emela mayi.
1 Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf: 73.
阿拉伯语经注:
فَكَذَّبُوهُ فَعَقَرُوهَا فَدَمۡدَمَ عَلَيۡهِمۡ رَبُّهُم بِذَنۢبِهِمۡ فَسَوَّىٰهَا
14. Kasi baboyaki koyoka maloba naye mpe babomi yango, Nkolo na bango abomaki bango pona lisumu wana mpe akitisaki etumbu likolo na bango.
阿拉伯语经注:
وَلَا يَخَافُ عُقۡبَٰهَا
15. Mpe (Allah) azali na bobangi te na maye makoya sima.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 舍姆斯
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭