Check out the new design

የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ * - የትርጉሞች ማዉጫ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሷድ   አንቀጽ:

Swâd

صٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ذِي ٱلذِّكۡرِ
Swâd,[1] na kurani, eye ezali na bokundoli.
[1] Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي عِزَّةٖ وَشِقَاقٖ
Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّن قَرۡنٖ فَنَادَواْ وَّلَاتَ حِينَ مَنَاصٖ
Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَعَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡۖ وَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا سَٰحِرٞ كَذَّابٌ
Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
أَجَعَلَ ٱلۡأٓلِهَةَ إِلَٰهٗا وَٰحِدًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عُجَابٞ
Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَٱنطَلَقَ ٱلۡمَلَأُ مِنۡهُمۡ أَنِ ٱمۡشُواْ وَٱصۡبِرُواْ عَلَىٰٓ ءَالِهَتِكُمۡۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٞ يُرَادُ
Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
مَا سَمِعۡنَا بِهَٰذَا فِي ٱلۡمِلَّةِ ٱلۡأٓخِرَةِ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا ٱخۡتِلَٰقٌ
Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka[1] ya sólo, eloko oyo basali yango kosala.
[1] Lingomba lia suka: Awa ezali lingomba ya baquraych to ya bakliáto ndenge bazalaki kokanisa.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
أَءُنزِلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ مِنۢ بَيۡنِنَاۚ بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ مِّن ذِكۡرِيۚ بَل لَّمَّا يَذُوقُواْ عَذَابِ
Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَحۡمَةِ رَبِّكَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡوَهَّابِ
То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
أَمۡ لَهُم مُّلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَاۖ فَلۡيَرۡتَقُواْ فِي ٱلۡأَسۡبَٰبِ
То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
جُندٞ مَّا هُنَالِكَ مَهۡزُومٞ مِّنَ ٱلۡأَحۡزَابِ
Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala.)
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ ذُو ٱلۡأَوۡتَادِ
Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَثَمُودُ وَقَوۡمُ لُوطٖ وَأَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡأَحۡزَابُ
Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
إِن كُلٌّ إِلَّا كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ عِقَابِ
Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَمَا يَنظُرُ هَٰٓؤُلَآءِ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ مَّا لَهَا مِن فَوَاقٖ
Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
وَقَالُواْ رَبَّنَا عَجِّل لَّنَا قِطَّنَا قَبۡلَ يَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ
Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya.
የአረብኛ ቁርኣን ማብራሪያ:
 
የይዘት ትርጉም ምዕራፍ: ሷድ
የምዕራፎች ማውጫ የገፅ ቁጥር
 
የቅዱስ ቁርዓን ይዘት ትርጉም - የሊንጋላ ትርጉም - በሙሐመድ ባሊንጎጎ - የትርጉሞች ማዉጫ

ተርጓሚ ዘከርያ ሙሐመድ ባንጎጎ

መዝጋት