للإطلاع على الموقع بحلته الجديدة

ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - محمد بالنغوغو * - فهرس التراجم

XML CSV Excel API
تنزيل الملفات يتضمن الموافقة على هذه الشروط والسياسات

ترجمة معاني سورة: ص   آية:

سورة ص - Swâd

صٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ذِي ٱلذِّكۡرِ
1. Swâd,(1) na kurani, eye ezali na bokundoli.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
التفاسير العربية:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي عِزَّةٖ وَشِقَاقٖ
2. Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe.
التفاسير العربية:
كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّن قَرۡنٖ فَنَادَواْ وَّلَاتَ حِينَ مَنَاصٖ
3. Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te.
التفاسير العربية:
وَعَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡۖ وَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا سَٰحِرٞ كَذَّابٌ
4. Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta.
التفاسير العربية:
أَجَعَلَ ٱلۡأٓلِهَةَ إِلَٰهٗا وَٰحِدًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عُجَابٞ
5. Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa.
التفاسير العربية:
وَٱنطَلَقَ ٱلۡمَلَأُ مِنۡهُمۡ أَنِ ٱمۡشُواْ وَٱصۡبِرُواْ عَلَىٰٓ ءَالِهَتِكُمۡۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٞ يُرَادُ
6. Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu.
التفاسير العربية:
مَا سَمِعۡنَا بِهَٰذَا فِي ٱلۡمِلَّةِ ٱلۡأٓخِرَةِ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا ٱخۡتِلَٰقٌ
7. Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka(1) ya sólo, eloko oyo basali yango kosala.
1 Lingomba lia suka: Awa ezali lingomba ya baquraych to ya bakliáto ndenge bazalaki kokanisa.
التفاسير العربية:
أَءُنزِلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ مِنۢ بَيۡنِنَاۚ بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ مِّن ذِكۡرِيۚ بَل لَّمَّا يَذُوقُواْ عَذَابِ
8. Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai.
التفاسير العربية:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَحۡمَةِ رَبِّكَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡوَهَّابِ
9. То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso.
التفاسير العربية:
أَمۡ لَهُم مُّلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَاۖ فَلۡيَرۡتَقُواْ فِي ٱلۡأَسۡبَٰبِ
10. То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta.
التفاسير العربية:
جُندٞ مَّا هُنَالِكَ مَهۡزُومٞ مِّنَ ٱلۡأَحۡزَابِ
11. Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala.)
التفاسير العربية:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ ذُو ٱلۡأَوۡتَادِ
12. Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima.
التفاسير العربية:
وَثَمُودُ وَقَوۡمُ لُوطٖ وَأَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡأَحۡزَابُ
13. Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)
التفاسير العربية:
إِن كُلٌّ إِلَّا كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ عِقَابِ
14. Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu.
التفاسير العربية:
وَمَا يَنظُرُ هَٰٓؤُلَآءِ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ مَّا لَهَا مِن فَوَاقٖ
15. Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te.
التفاسير العربية:
وَقَالُواْ رَبَّنَا عَجِّل لَّنَا قِطَّنَا قَبۡلَ يَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ
16. Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya.
التفاسير العربية:
 
ترجمة معاني سورة: ص
فهرس السور رقم الصفحة
 
ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - محمد بالنغوغو - فهرس التراجم

ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

إغلاق