क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - الترجمة اللينغالا * - अनुवादों की सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थों का अनुवाद सूरा: सूरा साद   आयत:

Swâd

صٓۚ وَٱلۡقُرۡءَانِ ذِي ٱلذِّكۡرِ
1. Swâd,(1) na kurani, eye ezali na bokundoli.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
अरबी तफ़सीरें:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ فِي عِزَّةٖ وَشِقَاقٖ
2. Kasi baye bapengwa bazali sé na ntembe.
अरबी तफ़सीरें:
كَمۡ أَهۡلَكۡنَا مِن قَبۡلِهِم مِّن قَرۡنٖ فَنَادَواْ وَّلَاتَ حِينَ مَنَاصٖ
3. Bato boni tobomaki liboso na bango, bagangaki ete: Oh biso! Kasi ezali lisusu tango ya kobika te.
अरबी तफ़सीरें:
وَعَجِبُوٓاْ أَن جَآءَهُم مُّنذِرٞ مِّنۡهُمۡۖ وَقَالَ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا سَٰحِرٞ كَذَّابٌ
4. Mpe (bato ya makkah) bakamuaki ete mokebisi kati na bango akomela bango, mpe bapengwi balobaki: Oyó azali nganga mpe moto ya lokuta.
अरबी तफ़सीरें:
أَجَعَلَ ٱلۡأٓلِهَةَ إِلَٰهٗا وَٰحِدًاۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٌ عُجَابٞ
5. Boye alingi kotia banzambe ete bakoma sé Nzambe moko? Oyó ezali likambo ya kokamwa.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱنطَلَقَ ٱلۡمَلَأُ مِنۡهُمۡ أَنِ ٱمۡشُواْ وَٱصۡبِرُواْ عَلَىٰٓ ءَالِهَتِكُمۡۖ إِنَّ هَٰذَا لَشَيۡءٞ يُرَادُ
6. Mpe bankumu na bango bakei mpe balobi: Bökende mpe botikala na banzambe na bino. Ya soló wana nde ezali malamu.
अरबी तफ़सीरें:
مَا سَمِعۡنَا بِهَٰذَا فِي ٱلۡمِلَّةِ ٱلۡأٓخِرَةِ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا ٱخۡتِلَٰقٌ
7. Totikala koyoka yango te na lingomba lia suka(1) ya sólo, eloko oyo basali yango kosala.
1 Lingomba lia suka: Awa ezali lingomba ya baquraych to ya bakliáto ndenge bazalaki kokanisa.
अरबी तफ़सीरें:
أَءُنزِلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ مِنۢ بَيۡنِنَاۚ بَلۡ هُمۡ فِي شَكّٖ مِّن ذِكۡرِيۚ بَل لَّمَّا يَذُوقُواْ عَذَابِ
8. Nini? Ezali nde ye oyo bakitiseli ye bokundoli kati kati na biso? Bazali na tembe тропа bokundoli bwa ngai, kala te, bakomekaka etumbu na ngai.
अरबी तफ़सीरें:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَحۡمَةِ رَبِّكَ ٱلۡعَزِيزِ ٱلۡوَهَّابِ
9. То, boye basimbi sanduku ya ngolu ya Nkolo wayo wa bokasi mopesi manso.
अरबी तफ़सीरें:
أَمۡ لَهُم مُّلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَاۖ فَلۡيَرۡتَقُواْ فِي ٱلۡأَسۡبَٰبِ
10. То boye bango basimbi bokonzi ya likolo na ya nsé, mpe maye manso mazali o kati na yango mibale? Bamata na eloko nyoso oyo ekosalisa bango тропа kobuta.
अरबी तफ़सीरें:
جُندٞ مَّا هُنَالِكَ مَهۡزُومٞ مِّنَ ٱلۡأَحۡزَابِ
11. Mapinga oyo basangisi awa, ekosalaka eloko te sé bokweisami. (lokola lolenge ezalelaki ba ahzâb kala.)
अरबी तफ़सीरें:
كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ وَعَادٞ وَفِرۡعَوۡنُ ذُو ٱلۡأَوۡتَادِ
12. Liboso na bango, bato ya Nüh, na ba Aad, na falo moto ya bandako etongama, baboyaki kondima.
अरबी तफ़सीरें:
وَثَمُودُ وَقَوۡمُ لُوطٖ وَأَصۡحَٰبُ لۡـَٔيۡكَةِۚ أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡأَحۡزَابُ
13. Mpe Thamüd, na bato ya Loth, na bato ya aïkat, banso basanganaki. (mpe baboyaki kondimela bantoma)
अरबी तफ़सीरें:
إِن كُلٌّ إِلَّا كَذَّبَ ٱلرُّسُلَ فَحَقَّ عِقَابِ
14. Ata moko te andimelaki batindami, mpe bazuaki etumbu.
अरबी तफ़सीरें:
وَمَا يَنظُرُ هَٰٓؤُلَآءِ إِلَّا صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ مَّا لَهَا مِن فَوَاقٖ
15. Bazalaki kozela sé lolaka moko liye likopesa bango ata bopemi moko te.
अरबी तफ़सीरें:
وَقَالُواْ رَبَّنَا عَجِّل لَّنَا قِطَّنَا قَبۡلَ يَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ
16. Мре balobaki: Nkolo pesa biso oyo ya biso yambo ete mokolo ya suka eya.
अरबी तफ़सीरें:
ٱصۡبِرۡ عَلَىٰ مَا يَقُولُونَ وَٱذۡكُرۡ عَبۡدَنَا دَاوُۥدَ ذَا ٱلۡأَيۡدِۖ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٌ
17. Zala na bozeli тропа oyo bazali koloba, mpe kanisa na mowumbu wa biso Dáwud, oyo atonda na bokasi yakokumisa biso. Ya soló ye azalaki komizongisa (epai ya Allah).
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّا سَخَّرۡنَا ٱلۡجِبَالَ مَعَهُۥ يُسَبِّحۡنَ بِٱلۡعَشِيِّ وَٱلۡإِشۡرَاقِ
18. Мре totiyaki bangomba ezala na botondi tongo mpe pokwa elongo naye.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱلطَّيۡرَ مَحۡشُورَةٗۖ كُلّٞ لَّهُۥٓ أَوَّابٞ
19. Mpe bandeke lokola, nyoso esalamaki sé тропа kokumisa ye. (Allah)
अरबी तफ़सीरें:
وَشَدَدۡنَا مُلۡكَهُۥ وَءَاتَيۡنَٰهُ ٱلۡحِكۡمَةَ وَفَصۡلَ ٱلۡخِطَابِ
20. Mpe tolendisaki bokonzi bwa ye, mpe topesaki ye bwanya mpe mayele ya kokata makambo.
अरबी तफ़सीरें:
۞ وَهَلۡ أَتَىٰكَ نَبَؤُاْ ٱلۡخَصۡمِ إِذۡ تَسَوَّرُواْ ٱلۡمِحۡرَابَ
21. Boye basango ya bato ya kosuana ekomelaki yo te? Tango babutaki na esika ya losambo. (ya likolo)
अरबी तफ़सीरें:
إِذۡ دَخَلُواْ عَلَىٰ دَاوُۥدَ فَفَزِعَ مِنۡهُمۡۖ قَالُواْ لَا تَخَفۡۖ خَصۡمَانِ بَغَىٰ بَعۡضُنَا عَلَىٰ بَعۡضٖ فَٱحۡكُم بَيۡنَنَا بِٱلۡحَقِّ وَلَا تُشۡطِطۡ وَٱهۡدِنَآ إِلَىٰ سَوَآءِ ٱلصِّرَٰطِ
22. Tango bakotelaki Dáwud, mpe abangaki. Balobaki naye ete: Kobanga te, tozali kowelana biso mibale, kabola kati na biso na bosembo, kasi kotengama te, mpe kamba biso o nzela ya semba.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّ هَٰذَآ أَخِي لَهُۥ تِسۡعٞ وَتِسۡعُونَ نَعۡجَةٗ وَلِيَ نَعۡجَةٞ وَٰحِدَةٞ فَقَالَ أَكۡفِلۡنِيهَا وَعَزَّنِي فِي ٱلۡخِطَابِ
23. Ya sólo, ndeko wa ngai ya mobali oyo azali na bameme ntuku libua na libua, mpe ngai nazali na meme moko, alobi na ngai: Pesa nabombela yo yango, mpe tango tozongisani maloba, alobi na ngai mabe.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ لَقَدۡ ظَلَمَكَ بِسُؤَالِ نَعۡجَتِكَ إِلَىٰ نِعَاجِهِۦۖ وَإِنَّ كَثِيرٗا مِّنَ ٱلۡخُلَطَآءِ لَيَبۡغِي بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٍ إِلَّا ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ وَقَلِيلٞ مَّا هُمۡۗ وَظَنَّ دَاوُۥدُ أَنَّمَا فَتَنَّٰهُ فَٱسۡتَغۡفَرَ رَبَّهُۥ وَخَرَّۤ رَاكِعٗاۤ وَأَنَابَ۩
24. (Dáwud) alobi: Abubaki yo ya sôló, тропа kosenga yo тете nayo mpo akokisa na (yango motango) oyo ya ye, mpe ya sôló bato balingaka kobotolo biloko ya baninga, longola sé baye bandima mpe basalaka misala milamu, kaši bazali токе. Мре Dâwud akanisaki ete tomekaki ye, asengaki bolimbisi epai ya Nkolo wa ye, mpe agumbamelaki mpe atubelaki.
अरबी तफ़सीरें:
فَغَفَرۡنَا لَهُۥ ذَٰلِكَۖ وَإِنَّ لَهُۥ عِندَنَا لَزُلۡفَىٰ وَحُسۡنَ مَـَٔابٖ
25. Mpe tolimbisaki ye na yango mpe epayi nabiso akozala na esika ya likolo mpe oyo esika malamu ya kozonga.
अरबी तफ़सीरें:
يَٰدَاوُۥدُ إِنَّا جَعَلۡنَٰكَ خَلِيفَةٗ فِي ٱلۡأَرۡضِ فَٱحۡكُم بَيۡنَ ٱلنَّاسِ بِٱلۡحَقِّ وَلَا تَتَّبِعِ ٱلۡهَوَىٰ فَيُضِلَّكَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِۚ إِنَّ ٱلَّذِينَ يَضِلُّونَ عَن سَبِيلِ ٱللَّهِ لَهُمۡ عَذَابٞ شَدِيدُۢ بِمَا نَسُواْ يَوۡمَ ٱلۡحِسَابِ
26. Eh Dâwud! Ya soló, totiyaki yo mokitani kati na mabele, mpe kata kati na bato na bosembo, kasi kolanda baposa te, noki te ekobungisa yo nzela ya Allah. Ya sólo, baye babungi nzela ya Allah, bakozalaka na etumbu ya makasi, mpo ete babosanaki (kokanisa) na mokolo mwa suka.
अरबी तफ़सीरें:
وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَآءَ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا بَٰطِلٗاۚ ذَٰلِكَ ظَنُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۚ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنَ ٱلنَّارِ
27. Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)
अरबी तफ़सीरें:
أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ كَٱلۡمُفۡسِدِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلۡمُتَّقِينَ كَٱلۡفُجَّارِ
28. То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe?
अरबी तफ़सीरें:
كِتَٰبٌ أَنزَلۡنَٰهُ إِلَيۡكَ مُبَٰرَكٞ لِّيَدَّبَّرُوٓاْ ءَايَٰتِهِۦ وَلِيَتَذَكَّرَ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
29. Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango.
अरबी तफ़सीरें:
وَوَهَبۡنَا لِدَاوُۥدَ سُلَيۡمَٰنَۚ نِعۡمَ ٱلۡعَبۡدُ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٌ
30. Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi.
अरबी तफ़सीरें:
إِذۡ عُرِضَ عَلَيۡهِ بِٱلۡعَشِيِّ ٱلصَّٰفِنَٰتُ ٱلۡجِيَادُ
31. Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu,
अरबी तफ़सीरें:
فَقَالَ إِنِّيٓ أَحۡبَبۡتُ حُبَّ ٱلۡخَيۡرِ عَن ذِكۡرِ رَبِّي حَتَّىٰ تَوَارَتۡ بِٱلۡحِجَابِ
32. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi.
अरबी तफ़सीरें:
رُدُّوهَا عَلَيَّۖ فَطَفِقَ مَسۡحَۢا بِٱلسُّوقِ وَٱلۡأَعۡنَاقِ
33. Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَقَدۡ فَتَنَّا سُلَيۡمَٰنَ وَأَلۡقَيۡنَا عَلَىٰ كُرۡسِيِّهِۦ جَسَدٗا ثُمَّ أَنَابَ
34. Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ رَبِّ ٱغۡفِرۡ لِي وَهَبۡ لِي مُلۡكٗا لَّا يَنۢبَغِي لِأَحَدٖ مِّنۢ بَعۡدِيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ
35. Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene.
अरबी तफ़सीरें:
فَسَخَّرۡنَا لَهُ ٱلرِّيحَ تَجۡرِي بِأَمۡرِهِۦ رُخَآءً حَيۡثُ أَصَابَ
36. Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱلشَّيَٰطِينَ كُلَّ بَنَّآءٖ وَغَوَّاصٖ
37. Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala,
अरबी तफ़सीरें:
وَءَاخَرِينَ مُقَرَّنِينَ فِي ٱلۡأَصۡفَادِ
38. Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا عَطَآؤُنَا فَٱمۡنُنۡ أَوۡ أَمۡسِكۡ بِغَيۡرِ حِسَابٖ
39. Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi.
अरबी तफ़सीरें:
وَإِنَّ لَهُۥ عِندَنَا لَزُلۡفَىٰ وَحُسۡنَ مَـَٔابٖ
40. Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱذۡكُرۡ عَبۡدَنَآ أَيُّوبَ إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَسَّنِيَ ٱلشَّيۡطَٰنُ بِنُصۡبٖ وَعَذَابٍ
41. Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu.
अरबी तफ़सीरें:
ٱرۡكُضۡ بِرِجۡلِكَۖ هَٰذَا مُغۡتَسَلُۢ بَارِدٞ وَشَرَابٞ
42. Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu.
अरबी तफ़सीरें:
وَوَهَبۡنَا لَهُۥٓ أَهۡلَهُۥ وَمِثۡلَهُم مَّعَهُمۡ رَحۡمَةٗ مِّنَّا وَذِكۡرَىٰ لِأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ
43. Mpe tozongiselaki ye libota lia ye, mpe tobakiselaki ye libota mosusu. Wana ngolu na biso тропа bokundoli ya bato banso ya mayele.
अरबी तफ़सीरें:
وَخُذۡ بِيَدِكَ ضِغۡثٗا فَٱضۡرِب بِّهِۦ وَلَا تَحۡنَثۡۗ إِنَّا وَجَدۡنَٰهُ صَابِرٗاۚ نِّعۡمَ ٱلۡعَبۡدُ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٞ
44. Mpe simba na loboko nayo eteni ya singa ya libende mpe bete yango, kasi kozangisa elaka te, ya soló tokutaki ye na bokangi motema mpenza, oyo nde mowumbu ya malamu azalaki kotubela mingi.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱذۡكُرۡ عِبَٰدَنَآ إِبۡرَٰهِيمَ وَإِسۡحَٰقَ وَيَعۡقُوبَ أُوْلِي ٱلۡأَيۡدِي وَٱلۡأَبۡصَٰرِ
45. Мре kanisa тропа Ibrâhîm па Is’hâq па Ya’qüb, bawumbu па biso ya nguya mpe ya mayele.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّآ أَخۡلَصۡنَٰهُم بِخَالِصَةٖ ذِكۡرَى ٱلدَّارِ
46. Ya soló toponaki bango boponami ya bokundoli ya lola.
अरबी तफ़सीरें:
وَإِنَّهُمۡ عِندَنَا لَمِنَ ٱلۡمُصۡطَفَيۡنَ ٱلۡأَخۡيَارِ
47. Mpe ya sólo, bazali epai na biso, baponami ya malamu.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱذۡكُرۡ إِسۡمَٰعِيلَ وَٱلۡيَسَعَ وَذَا ٱلۡكِفۡلِۖ وَكُلّٞ مِّنَ ٱلۡأَخۡيَارِ
48. Mpe kanisa Ismail na Al-yasa’ na Dzul-kifl, bango banso bazalaki kati na baponami malamu.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا ذِكۡرٞۚ وَإِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ لَحُسۡنَ مَـَٔابٖ
49. Oyó nde bokundoli, mpe babangi bakozalaka na bozongi bolamu.
अरबी तफ़सीरें:
جَنَّٰتِ عَدۡنٖ مُّفَتَّحَةٗ لَّهُمُ ٱلۡأَبۡوَٰبُ
50. Lola ya edeni bizibeli na yango ekozala ya kofungowama pona bango.
अरबी तफ़सीरें:
مُتَّكِـِٔينَ فِيهَا يَدۡعُونَ فِيهَا بِفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ وَشَرَابٖ
51. Wana nde bakoyekemelaka yango, bazali kosenga bambuma ebele, mpe komela.
अरबी तफ़सीरें:
۞ وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ أَتۡرَابٌ
52. Mpe pembeni na bango, bakozala na basi ya kitoko, baye bazali na miso ya kolula te.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا مَا تُوعَدُونَ لِيَوۡمِ ٱلۡحِسَابِ
53. Oyó nde elengelamaki тропа bino mokolo mwa lifuta.
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّ هَٰذَا لَرِزۡقُنَا مَا لَهُۥ مِن نَّفَادٍ
54. Ekozalaka nde bopesi bwa biso eye ekokutuama te.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَاۚ وَإِنَّ لِلطَّٰغِينَ لَشَرَّ مَـَٔابٖ
55. Wana, batomboki bakozala na bozongi ya mabe.
अरबी तफ़सीरें:
جَهَنَّمَ يَصۡلَوۡنَهَا فَبِئۡسَ ٱلۡمِهَادُ
56. Lifelo nde ekozikisa bango, bovandi kani ya mabe ya lolenge wana!
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا فَلۡيَذُوقُوهُ حَمِيمٞ وَغَسَّاقٞ
57. Na yango, bakomela mayi ya tofina ya moto makasi.
अरबी तफ़सीरें:
وَءَاخَرُ مِن شَكۡلِهِۦٓ أَزۡوَٰجٌ
58. Mpe bakozuaka bitumbu bisusu sé ya lolenge wana.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا فَوۡجٞ مُّقۡتَحِمٞ مَّعَكُمۡ لَا مَرۡحَبَۢا بِهِمۡۚ إِنَّهُمۡ صَالُواْ ٱلنَّارِ
59. Oyo nde lingomba liye likokotaka nzela moko na bino, mpe bakoyambaka bango te. Kasi bakozika na moto.
अरबी तफ़सीरें:
قَالُواْ بَلۡ أَنتُمۡ لَا مَرۡحَبَۢا بِكُمۡۖ أَنتُمۡ قَدَّمۡتُمُوهُ لَنَاۖ فَبِئۡسَ ٱلۡقَرَارُ
60. Bakolobaka: Bokoyambama malamu te, bino nde bolengeleki yango тропа biso, esika kani ya bovandi ya mabe ya lolenge wana!
अरबी तफ़सीरें:
قَالُواْ رَبَّنَا مَن قَدَّمَ لَنَا هَٰذَا فَزِدۡهُ عَذَابٗا ضِعۡفٗا فِي ٱلنَّارِ
61. Bakolobaka: Nkolo wa biso, nani apeși biso oyo, bakisela ye etumbu na lifelo.
अरबी तफ़सीरें:
وَقَالُواْ مَا لَنَا لَا نَرَىٰ رِجَالٗا كُنَّا نَعُدُّهُم مِّنَ ٱلۡأَشۡرَارِ
62. Mpe bakoloba: Mpona nini tozali kornona te mibali ba oyo tozalaki kotanga bango na molongo ya bato mabe?
अरबी तफ़सीरें:
أَتَّخَذۡنَٰهُمۡ سِخۡرِيًّا أَمۡ زَاغَتۡ عَنۡهُمُ ٱلۡأَبۡصَٰرُ
63. Boye tosekaka bango to babungaka na miso na biso?
अरबी तफ़सीरें:
إِنَّ ذَٰلِكَ لَحَقّٞ تَخَاصُمُ أَهۡلِ ٱلنَّارِ
64. Ya soló, wana ekozala kosuana ya bato ya moto.
अरबी तफ़सीरें:
قُلۡ إِنَّمَآ أَنَا۠ مُنذِرٞۖ وَمَا مِنۡ إِلَٰهٍ إِلَّا ٱللَّهُ ٱلۡوَٰحِدُ ٱلۡقَهَّارُ
65. Loba: Ya sólo, nazali sé mokebisi. Mpe nzambe mosusu azali te na kobondela na bosóló sé Allah wa bomoko mpe ya bokasi koleka.
अरबी तफ़सीरें:
رَبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا ٱلۡعَزِيزُ ٱلۡغَفَّٰرُ
66. Nkolo wa likolo na mabele, mpe manso maye mazali okati na yango mibale, azali wa bokasi atonda bolimbisi.
अरबी तफ़सीरें:
قُلۡ هُوَ نَبَؤٌاْ عَظِيمٌ
67. Loba: (kurani) oyo ezali na sango ya monene.
अरबी तफ़सीरें:
أَنتُمۡ عَنۡهُ مُعۡرِضُونَ
68. Boye bino bozali koboya yango.
अरबी तफ़सीरें:
مَا كَانَ لِيَ مِنۡ عِلۡمِۭ بِٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰٓ إِذۡ يَخۡتَصِمُونَ
69. Nazalaki na boyebi te тропа ba anzelu, tango bazalaki koswana.
अरबी तफ़सीरें:
إِن يُوحَىٰٓ إِلَيَّ إِلَّآ أَنَّمَآ أَنَا۠ نَذِيرٞ مُّبِينٌ
70. Ayebisaki ngai ete nazali sé mokebisi ya polele.
अरबी तफ़सीरें:
إِذۡ قَالَ رَبُّكَ لِلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِنِّي خَٰلِقُۢ بَشَرٗا مِّن طِينٖ
71. Tango Nkolo wayo alobaki na ba anzelu: Ya soló nalingi kokela moto na mabele.
अरबी तफ़सीरें:
فَإِذَا سَوَّيۡتُهُۥ وَنَفَخۡتُ فِيهِ مِن رُّوحِي فَقَعُواْ لَهُۥ سَٰجِدِينَ
72. Soki nabongisi ye mpe nafuli ye mopepe ya molimo na ngai, bokweyela ye na bogumbami.
अरबी तफ़सीरें:
فَسَجَدَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ كُلُّهُمۡ أَجۡمَعُونَ
73. Mpe ba anzelu banso bafukamelaki ye.
अरबी तफ़सीरें:
إِلَّآ إِبۡلِيسَ ٱسۡتَكۡبَرَ وَكَانَ مِنَ ٱلۡكَٰفِرِينَ
74. Longola sé ibilisa asalaki lolendo mpe azalaki okati ya bapengwi.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ يَٰٓإِبۡلِيسُ مَا مَنَعَكَ أَن تَسۡجُدَ لِمَا خَلَقۡتُ بِيَدَيَّۖ أَسۡتَكۡبَرۡتَ أَمۡ كُنتَ مِنَ ٱلۡعَالِينَ
75. (Allah) alobi: Eh ibilisu! Eloko nini epekisi yo kogumbamela (moto) oyo nakeli ye na maboko na ngai? Boye osali lolendo to omimoni ete yo ozali likolo koleka?
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ أَنَا۠ خَيۡرٞ مِّنۡهُ خَلَقۡتَنِي مِن نَّارٖ وَخَلَقۡتَهُۥ مِن طِينٖ
76. Alobi: Nazali malamu mingi koleka ye, okelaki ngai na moto mpe okelaki ye na mabele.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ فَٱخۡرُجۡ مِنۡهَا فَإِنَّكَ رَجِيمٞ
77. (Allah) alobi: Віта awa, ozali ya kolakelama.
अरबी तफ़सीरें:
وَإِنَّ عَلَيۡكَ لَعۡنَتِيٓ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلدِّينِ
78. Mpe botutu bwa ngai, bokozalaka likolo lia yo kino o mokolo mwa suka.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ رَبِّ فَأَنظِرۡنِيٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
79. Alobi: Nkolo, tikela ngai tango kino omokolo mwa bosekwisami.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ فَإِنَّكَ مِنَ ٱلۡمُنظَرِينَ
80. (Allah) alobi: Ya soló, napesi yo tango.
अरबी तफ़सीरें:
إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡوَقۡتِ ٱلۡمَعۡلُومِ
81. Kino omokolo ngonga ekokokaka.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ فَبِعِزَّتِكَ لَأُغۡوِيَنَّهُمۡ أَجۡمَعِينَ
82. Alobi: Na nguya nayo (Allah), nakobungisaka bango banso.
अरबी तफ़सीरें:
إِلَّا عِبَادَكَ مِنۡهُمُ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
83. Longola sé bawumbu nayo baye opona.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ فَٱلۡحَقُّ وَٱلۡحَقَّ أَقُولُ
84. (Allah) alobi: Ya sólo, mpe oyo ezali bosolo nazali koloba.
अरबी तफ़सीरें:
لَأَمۡلَأَنَّ جَهَنَّمَ مِنكَ وَمِمَّن تَبِعَكَ مِنۡهُمۡ أَجۡمَعِينَ
85. Ya sólo, na kotondisa lifelo nayo, mpe baye banso bakolanda yo.
अरबी तफ़सीरें:
قُلۡ مَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٖ وَمَآ أَنَا۠ مِنَ ٱلۡمُتَكَلِّفِينَ
86. Loba: Nazali kosenga bino lifuta te, mpe nazali te oyo azali kokonza na makasi.
अरबी तफ़सीरें:
إِنۡ هُوَ إِلَّا ذِكۡرٞ لِّلۡعَٰلَمِينَ
87. (Kurani) ezali sé bokundoli тропа molongo mobimba.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَتَعۡلَمُنَّ نَبَأَهُۥ بَعۡدَ حِينِۭ
88. Mpe kala te, bokoyebaka basango na yango.
अरबी तफ़सीरें:
 
अर्थों का अनुवाद सूरा: सूरा साद
सूरों की सूची पृष्ठ संख्या
 
क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - الترجمة اللينغالا - अनुवादों की सूची

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

बंद करें