Check out the new design

क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो * - अनुवादों की सूची

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

अर्थों का अनुवाद सूरा: साद   आयत:
وَمَا خَلَقۡنَا ٱلسَّمَآءَ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا بَٰطِلٗاۚ ذَٰلِكَ ظَنُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْۚ فَوَيۡلٞ لِّلَّذِينَ كَفَرُواْ مِنَ ٱلنَّارِ
27. Mpe tokelaki likolo na mabele na maye manso mazali kati kati na yango mpamba te, lolenge wana nde bapengwi bazali kokanisa. Kasi bapengwi bazali na mpasi o kati ya moto, (ezali kozela bango)
अरबी तफ़सीरें:
أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَعَمِلُواْ ٱلصَّٰلِحَٰتِ كَٱلۡمُفۡسِدِينَ فِي ٱلۡأَرۡضِ أَمۡ نَجۡعَلُ ٱلۡمُتَّقِينَ كَٱلۡفُجَّارِ
28. То boye bandimi baye basalaki misala milamu bazala lokola baye babebisaki na mokili? То totiya babangi (Allah) ndenge moko na bato mabe?
अरबी तफ़सीरें:
كِتَٰبٌ أَنزَلۡنَٰهُ إِلَيۡكَ مُبَٰرَكٞ لِّيَدَّبَّرُوٓاْ ءَايَٰتِهِۦ وَلِيَتَذَكَّرَ أُوْلُواْ ٱلۡأَلۡبَٰبِ
29. Buku eye tokitisaki epai nayo, ya mapamboli mpo ete basosola mikapo mia yango, mpe mpo ete banganga ya mayele bakundola yango.
अरबी तफ़सीरें:
وَوَهَبۡنَا لِدَاوُۥدَ سُلَيۡمَٰنَۚ نِعۡمَ ٱلۡعَبۡدُ إِنَّهُۥٓ أَوَّابٌ
30. Mpe topesaki Dáwud likabo ya mowumbu ya malamu Suleyman, ya soló, azalaki kosenga bolimbisi mingi.
अरबी तफ़सीरें:
إِذۡ عُرِضَ عَلَيۡهِ بِٱلۡعَشِيِّ ٱلصَّٰفِنَٰتُ ٱلۡجِيَادُ
31. Tango batiaki liboso naye bampunda ya kitoko sima ya nzanga тропа kokima mbangu,
अरबी तफ़सीरें:
فَقَالَ إِنِّيٓ أَحۡبَبۡتُ حُبَّ ٱلۡخَيۡرِ عَن ذِكۡرِ رَبِّي حَتَّىٰ تَوَارَتۡ بِٱلۡحِجَابِ
32. Mpe alobaki ete: Ya soló ngai namipesi kolinga biloko ya mokili, kino nabosani bokundoli bwa Nkolo na ngai kino moyi molimwi.
अरबी तफ़सीरें:
رُدُّوهَا عَلَيَّۖ فَطَفِقَ مَسۡحَۢا بِٱلسُّوقِ وَٱلۡأَعۡنَاقِ
33. Bozongisela ngai yango, na yango abandi kokata yango makolo na bakingo.
अरबी तफ़सीरें:
وَلَقَدۡ فَتَنَّا سُلَيۡمَٰنَ وَأَلۡقَيۡنَا عَلَىٰ كُرۡسِيِّهِۦ جَسَدٗا ثُمَّ أَنَابَ
34. Mpe ya sólo, tomekaki Suleyman, tobwakaki likolo ya kiti naye nzoto ya moto, sima atubelaki.
अरबी तफ़सीरें:
قَالَ رَبِّ ٱغۡفِرۡ لِي وَهَبۡ لِي مُلۡكٗا لَّا يَنۢبَغِي لِأَحَدٖ مِّنۢ بَعۡدِيٓۖ إِنَّكَ أَنتَ ٱلۡوَهَّابُ
35. Alobi: Nkolo! Limbisa ngai mpe pesa ngai bokonzi boye moko te sima na ngai akokana na yango. Ya sólo, ozali mopesi monene.
अरबी तफ़सीरें:
فَسَخَّرۡنَا لَهُ ٱلرِّيحَ تَجۡرِي بِأَمۡرِهِۦ رُخَآءً حَيۡثُ أَصَابَ
36. Мре totielaki ye mopepe, ezalaki kotambola na mitindo naye bipai binso alingaki na mpete.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱلشَّيَٰطِينَ كُلَّ بَنَّآءٖ وَغَوَّاصٖ
37. Mpe basatana bazalaki kotongela ye ndako, basusu bazalaki kokota na nsé ya mayi тропа kosalela ye mosala,
अरबी तफ़सीरें:
وَءَاخَرِينَ مُقَرَّنِينَ فِي ٱلۡأَصۡفَادِ
38. Na basusu lokola, bakanga bango mibale mibale na minyololo.
अरबी तफ़सीरें:
هَٰذَا عَطَآؤُنَا فَٱمۡنُنۡ أَوۡ أَمۡسِكۡ بِغَيۡرِ حِسَابٖ
39. Oyó nde likabo lia biso, kabola yango,to kopesa te, sala ndenge olingi.
अरबी तफ़सीरें:
وَإِنَّ لَهُۥ عِندَنَا لَزُلۡفَىٰ وَحُسۡنَ مَـَٔابٖ
40. Mpe epayi na biso akozala na esika ya likolo oyo esika malamu ya kozonga.
अरबी तफ़सीरें:
وَٱذۡكُرۡ عَبۡدَنَآ أَيُّوبَ إِذۡ نَادَىٰ رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَسَّنِيَ ٱلشَّيۡطَٰنُ بِنُصۡبٖ وَعَذَابٍ
41. Mpe kundola mowumbu wa biso Ayúb tango abelelaki Nkolo waye, ete satana akangi ngai na mpasi mpe etumbu.
अरबी तफ़सीरें:
ٱرۡكُضۡ بِرِجۡلِكَۖ هَٰذَا مُغۡتَسَلُۢ بَارِدٞ وَشَرَابٞ
42. Beta (mabele) na makolo nayo, oyo ezali mayi ya тріо mpo osukola mpe órnela mosusu.
अरबी तफ़सीरें:
 
अर्थों का अनुवाद सूरा: साद
सूरों की सूची पृष्ठ संख्या
 
क़ुरआन के अर्थों का अनुवाद - लिंगाला अनुवाद - मुहम्मद बालिंगोगो - अनुवादों की सूची

इसअनुवाद ज़करिया मुहम्मद बालिंगोगो ने किया है।

बंद करें