للإطلاع على الموقع بحلته الجديدة

ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - محمد بالنغوغو * - فهرس التراجم

XML CSV Excel API
تنزيل الملفات يتضمن الموافقة على هذه الشروط والسياسات

ترجمة معاني سورة: الحجر   آية:

سورة الحجر - Al-Hijr

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ وَقُرۡءَانٖ مُّبِينٖ
1. Alif, lâm, râ.(1) oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.
1 Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
التفاسير العربية:
رُّبَمَا يَوَدُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡ كَانُواْ مُسۡلِمِينَ
2. (O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima.
التفاسير العربية:
ذَرۡهُمۡ يَأۡكُلُواْ وَيَتَمَتَّعُواْ وَيُلۡهِهِمُ ٱلۡأَمَلُۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
3. Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.
التفاسير العربية:
وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا وَلَهَا كِتَابٞ مَّعۡلُومٞ
4. Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama.
التفاسير العربية:
مَّا تَسۡبِقُ مِنۡ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ
5. Umma(2) moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima.
2 Umma: Lisanga ya bato, bótala Al-Baqarah: 128.
التفاسير العربية:
وَقَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِي نُزِّلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ إِنَّكَ لَمَجۡنُونٞ
6. Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma.
التفاسير العربية:
لَّوۡمَا تَأۡتِينَا بِٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
7. тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló.
التفاسير العربية:
مَا نُنَزِّلُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَمَا كَانُوٓاْ إِذٗا مُّنظَرِينَ
8. Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu.
التفاسير العربية:
إِنَّا نَحۡنُ نَزَّلۡنَا ٱلذِّكۡرَ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
9. Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango.
التفاسير العربية:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ فِي شِيَعِ ٱلۡأَوَّلِينَ
10. Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala.
التفاسير العربية:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
11. Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye.
التفاسير العربية:
كَذَٰلِكَ نَسۡلُكُهُۥ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
12. Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki.
التفاسير العربية:
لَا يُؤۡمِنُونَ بِهِۦ وَقَدۡ خَلَتۡ سُنَّةُ ٱلۡأَوَّلِينَ
13. Bakondimaka na yango te,(1) mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.
1 Na yango te: Ezali “Kurani”, kasi, na bandimbola misusu ezali nde “Muhammad”.
التفاسير العربية:
وَلَوۡ فَتَحۡنَا عَلَيۡهِم بَابٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فَظَلُّواْ فِيهِ يَعۡرُجُونَ
14. Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te.
التفاسير العربية:
لَقَالُوٓاْ إِنَّمَا سُكِّرَتۡ أَبۡصَٰرُنَا بَلۡ نَحۡنُ قَوۡمٞ مَّسۡحُورُونَ
15. Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami.
التفاسير العربية:
 
ترجمة معاني سورة: الحجر
فهرس السور رقم الصفحة
 
ترجمة معاني القرآن الكريم - الترجمة اللينغالا - محمد بالنغوغو - فهرس التراجم

ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

إغلاق