Check out the new design

Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo * - Indise ng mga Salin

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Hijr   Ayah:

Al-Hijr

الٓرۚ تِلۡكَ ءَايَٰتُ ٱلۡكِتَٰبِ وَقُرۡءَانٖ مُّبِينٖ
Alif, lâm, râ.[1] oyo wana ezali nde mikapo mia buku mpe kurani ya polele.
[1] Bótala suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Ang mga Tafsir na Arabe:
رُّبَمَا يَوَدُّ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡ كَانُواْ مُسۡلِمِينَ
(O mokolo mwa suka) bapengwi bakolobaka ete: Soki tozalaka ata ba mizilima.
Ang mga Tafsir na Arabe:
ذَرۡهُمۡ يَأۡكُلُواْ وَيَتَمَتَّعُواْ وَيُلۡهِهِمُ ٱلۡأَمَلُۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Tika bango balia, basepela moke (na ngonga) mpe elikya ya mokili ebosanisi bango mokolo ya bosôló, kasi kala mingi te bakoyeba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَآ أَهۡلَكۡنَا مِن قَرۡيَةٍ إِلَّا وَلَهَا كِتَابٞ مَّعۡلُومٞ
Kasi tobomaka mboka moko te sé ezala na mokano moyebani mosila kokomama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَّا تَسۡبِقُ مِنۡ أُمَّةٍ أَجَلَهَا وَمَا يَسۡتَـٔۡخِرُونَ
Umma[2] moko te ekoki kopuşa liboso to kozongisa mokano na bango sima.
[2] Umma: Lisanga ya bato, bótala Al-Baqarah: 128.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقَالُواْ يَٰٓأَيُّهَا ٱلَّذِي نُزِّلَ عَلَيۡهِ ٱلذِّكۡرُ إِنَّكَ لَمَجۡنُونٞ
Mpe bakolobaka été: Oh yo moto bakitiseli ye buku! Ya soló, ozali moto ya ligboma.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَّوۡمَا تَأۡتِينَا بِٱلۡمَلَٰٓئِكَةِ إِن كُنتَ مِنَ ٱلصَّٰدِقِينَ
тропа nini te oyelaki biso ba anzelu soki ozalaki o kati ya balobi bosôló.
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَا نُنَزِّلُ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَمَا كَانُوٓاْ إِذٗا مُّنظَرِينَ
Tokitisaka ba anzelu sé na bosôló, mpe bazelisaka te тропа etumbu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا نَحۡنُ نَزَّلۡنَا ٱلذِّكۡرَ وَإِنَّا لَهُۥ لَحَٰفِظُونَ
Tokitisaki bokundoli (kurani) na bosôló, тре sé biso nde tobatelaka yango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا مِن قَبۡلِكَ فِي شِيَعِ ٱلۡأَوَّلِينَ
Mpe ya soló, totindaki batindami yambo nayo, o kati ya bato ba kala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَا يَأۡتِيهِم مِّن رَّسُولٍ إِلَّا كَانُواْ بِهِۦ يَسۡتَهۡزِءُونَ
Mpe motindami moko te ayelaki bango sé batióla ye.
Ang mga Tafsir na Arabe:
كَذَٰلِكَ نَسۡلُكُهُۥ فِي قُلُوبِ ٱلۡمُجۡرِمِينَ
Ndenge wana nde tokotisaka kibopengwi o mitema mia batomboki.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَا يُؤۡمِنُونَ بِهِۦ وَقَدۡ خَلَتۡ سُنَّةُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Bakondimaka na yango te,[1] mpe ya sólo, esilaki kosalama na bato ya liboso.
[1] Na yango te: Ezali “Kurani”, kasi, na bandimbola misusu ezali nde “Muhammad”.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَوۡ فَتَحۡنَا عَلَيۡهِم بَابٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ فَظَلُّواْ فِيهِ يَعۡرُجُونَ
Ata soki tofungolelaka bango ezibeli ya likolo тропа komata nde bandimaki mpe te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَقَالُوٓاْ إِنَّمَا سُكِّرَتۡ أَبۡصَٰرُنَا بَلۡ نَحۡنُ قَوۡمٞ مَّسۡحُورُونَ
Bakolobaka: Ya soló miso та biso mizali ya kolangwa, kasi tozali nde balokami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
 
Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Hijr
Indise ng mga Surah Numero ng Pahina
 
Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo - Indise ng mga Salin

Isinalin ito sa Wikang Ngogo ni Zakaria Muhammad

Isara