Prijevod značenja časnog Kur'ana - الترجمة اللينغالا * - Sadržaj prijevodā

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Prijevod značenja Sura: Sura el-Furkan   Ajet:

Al-Furqân (BOSOSOLI)

تَبَارَكَ ٱلَّذِي نَزَّلَ ٱلۡفُرۡقَانَ عَلَىٰ عَبۡدِهِۦ لِيَكُونَ لِلۡعَٰلَمِينَ نَذِيرًا
1. Nkembo naye oyo akitisa bososoli epai na mowumbu naye, mpo azala mokebisi тропа mokili mobimba(1).
1 Mokili mobimba: Elakisi: Bilima na bato.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلَّذِي لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَلَمۡ يَتَّخِذۡ وَلَدٗا وَلَمۡ يَكُن لَّهُۥ شَرِيكٞ فِي ٱلۡمُلۡكِ وَخَلَقَ كُلَّ شَيۡءٖ فَقَدَّرَهُۥ تَقۡدِيرٗا
2. Oyo bokonzi ya likolo mpe ya nsé ezali yaye, mpe amipesaka mwana te, mpe akoki kozala na mosangisi te okati ya bokonzi, mpe akela biloko binso, mpe apesa yango bokoki bwa semba.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱتَّخَذُواْ مِن دُونِهِۦٓ ءَالِهَةٗ لَّا يَخۡلُقُونَ شَيۡـٔٗا وَهُمۡ يُخۡلَقُونَ وَلَا يَمۡلِكُونَ لِأَنفُسِهِمۡ ضَرّٗا وَلَا نَفۡعٗا وَلَا يَمۡلِكُونَ مَوۡتٗا وَلَا حَيَوٰةٗ وَلَا نُشُورٗا
3. Mpe batiki ye bazui banzambe misusu baye bakelaka eloko te, po bango moko bakelama, mpe bazali na makoki ya komisala bolamu te mpe komisala mabe te, mpe basimbi liwa na maboko na bango te, mpe bomoyi te, mpe bazali na makoki ya kosekwisa te (o sima ya liwa).
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّآ إِفۡكٌ ٱفۡتَرَىٰهُ وَأَعَانَهُۥ عَلَيۡهِ قَوۡمٌ ءَاخَرُونَۖ فَقَدۡ جَآءُو ظُلۡمٗا وَزُورٗا
4. Mpe baye bapengwa bazali koloba ete: Oyo ezali sé lokuta monene oyo ayei na yango, (ye Muhammad) mpe bato basusu basalisi ye na yango, ya solo bango basili kobuka lokuta mpe na libubi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَالُوٓاْ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ ٱكۡتَتَبَهَا فَهِيَ تُمۡلَىٰ عَلَيۡهِ بُكۡرَةٗ وَأَصِيلٗا
5. Mpe balobi ezali nde masapo ya kala oyo asengaki bakomela ye bazalaki kotangela ye yango tongo na pokwa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ أَنزَلَهُ ٱلَّذِي يَعۡلَمُ ٱلسِّرَّ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ إِنَّهُۥ كَانَ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
6. Loba: Akitisa yango oyo ayebi sekele ya likolo na mabele. Ya soló, ye azali molimbisi atonda mawa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَالُواْ مَالِ هَٰذَا ٱلرَّسُولِ يَأۡكُلُ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشِي فِي ٱلۡأَسۡوَاقِ لَوۡلَآ أُنزِلَ إِلَيۡهِ مَلَكٞ فَيَكُونَ مَعَهُۥ نَذِيرًا
7. Mpe bazali koloba: Ndenge nini motindami azali kolia biloko mpe azali kotambola okati ya bazando? Mpona nini bakitiselaki epai naye anzelu te mpona azala mokebisi elongo naye?
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَوۡ يُلۡقَىٰٓ إِلَيۡهِ كَنزٌ أَوۡ تَكُونُ لَهُۥ جَنَّةٞ يَأۡكُلُ مِنۡهَاۚ وَقَالَ ٱلظَّٰلِمُونَ إِن تَتَّبِعُونَ إِلَّا رَجُلٗا مَّسۡحُورًا
8. To, babwakela ye bomengo, to azala na bilanga mpo aliaka na yango. Mpe babubi balobi: Oyo bozali kolanda azali ya kolokama.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱنظُرۡ كَيۡفَ ضَرَبُواْ لَكَ ٱلۡأَمۡثَٰلَ فَضَلُّواْ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ سَبِيلٗا
9. Tala lolenge bapesi yo bandakisa, mpe bamibungisi bakoki kozua nzela te (nzela ya bokambami epai ya Allah)
Tefsiri na arapskom jeziku:
تَبَارَكَ ٱلَّذِيٓ إِن شَآءَ جَعَلَ لَكَ خَيۡرٗا مِّن ذَٰلِكَ جَنَّٰتٖ تَجۡرِي مِن تَحۡتِهَا ٱلۡأَنۡهَٰرُ وَيَجۡعَل لَّكَ قُصُورَۢا
10. Nkembo naye oyo soki alingi akotiela yo bolamu ebele koleka oyo wana, (soki alingi andimela yo bolamu okati ya) bilanga eye ezali koleka o nsé na yango mingala, mpe akotiela yo bandako ya kitoko.
Tefsiri na arapskom jeziku:
بَلۡ كَذَّبُواْ بِٱلسَّاعَةِۖ وَأَعۡتَدۡنَا لِمَن كَذَّبَ بِٱلسَّاعَةِ سَعِيرًا
11. Kaši baboyi kondima na mokolo ya suka, na yango tolengeli moto ya makasi тропа baye bazui yango na lokuta.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِذَا رَأَتۡهُم مِّن مَّكَانِۭ بَعِيدٖ سَمِعُواْ لَهَا تَغَيُّظٗا وَزَفِيرٗا
12. Soki yango(1) emoni bango na mosika, babandi koyoka kotoka mpe lolaka na yango.
1 Yango: Ezali moto ya lifelo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَآ أُلۡقُواْ مِنۡهَا مَكَانٗا ضَيِّقٗا مُّقَرَّنِينَ دَعَوۡاْ هُنَالِكَ ثُبُورٗا
13. Mpe tango bakobwakama okati na yango na esika ya moke, maboko makangami na sima ya bakingo, na tango wana bakosenge ete bakufa mpe babebisama mbala moko.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَّا تَدۡعُواْ ٱلۡيَوۡمَ ثُبُورٗا وَٰحِدٗا وَٱدۡعُواْ ثُبُورٗا كَثِيرٗا
14. Lelo bosenga liwa mbala moko te, kasi bosenga yango mbala ebele.
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ أَذَٰلِكَ خَيۡرٌ أَمۡ جَنَّةُ ٱلۡخُلۡدِ ٱلَّتِي وُعِدَ ٱلۡمُتَّقُونَۚ كَانَتۡ لَهُمۡ جَزَآءٗ وَمَصِيرٗا
15. Loba: Boye oyo(2) ezali malamu to Iola ya libela eye elakama тропа babangi. Yango ezali lifuta mpe esika ya bozongi na bango ya suka?
2 Oyo: Ezali: Moto ya lifelo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَّهُمۡ فِيهَا مَا يَشَآءُونَ خَٰلِدِينَۚ كَانَ عَلَىٰ رَبِّكَ وَعۡدٗا مَّسۡـُٔولٗا
16. Bakozua nyoso bazali na yango mposa, libela na libela kati na yango. Wana ezali solo elaka ya Nkolo wayo eye ekozangaka te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيَوۡمَ يَحۡشُرُهُمۡ وَمَا يَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ فَيَقُولُ ءَأَنتُمۡ أَضۡلَلۡتُمۡ عِبَادِي هَٰٓؤُلَآءِ أَمۡ هُمۡ ضَلُّواْ ٱلسَّبِيلَ
17. Mpe mokolo moye (Allah) akosangisa bango elongo na maye bazalaki kobondela na kotika Allah, akotuna bango: Boye bino nde bobungisaki bawumbu na ngai oyo to bango moko babungaki nzela?
Tefsiri na arapskom jeziku:
قَالُواْ سُبۡحَٰنَكَ مَا كَانَ يَنۢبَغِي لَنَآ أَن نَّتَّخِذَ مِن دُونِكَ مِنۡ أَوۡلِيَآءَ وَلَٰكِن مَّتَّعۡتَهُمۡ وَءَابَآءَهُمۡ حَتَّىٰ نَسُواْ ٱلذِّكۡرَ وَكَانُواْ قَوۡمَۢا بُورٗا
18. Bakolobaka: Lokumu nayo, esengeli na biso te kotika yo mpe tozua bakonzi babateli basusu, kasi opesaki bango mpe batata na bango bomengo na bisengo kino babosani bokundoli (kurani), mpe bazalaki nde bato ya kobunga.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَقَدۡ كَذَّبُوكُم بِمَا تَقُولُونَ فَمَا تَسۡتَطِيعُونَ صَرۡفٗا وَلَا نَصۡرٗاۚ وَمَن يَظۡلِم مِّنكُمۡ نُذِقۡهُ عَذَابٗا كَبِيرٗا
19. Bawangani bino na maye bozali koloba, mpe bokozua esika ya kokima te mpe lisungi te. Mpe oyo akobuba o kati na bino, tokomekisa ye etumbu ya monene.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَا قَبۡلَكَ مِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ إِلَّآ إِنَّهُمۡ لَيَأۡكُلُونَ ٱلطَّعَامَ وَيَمۡشُونَ فِي ٱلۡأَسۡوَاقِۗ وَجَعَلۡنَا بَعۡضَكُمۡ لِبَعۡضٖ فِتۡنَةً أَتَصۡبِرُونَۗ وَكَانَ رَبُّكَ بَصِيرٗا
20. Mpe totindaki liboso nayo batindami, bazalaki kolia bilei mpe kotambola na bazando, mpe totiaki basusu bazala elembo ya komekama ya baninga na bango, boye bokoyika mpiko? Kasi Nkolo wayo azali kornona.
Tefsiri na arapskom jeziku:
۞ وَقَالَ ٱلَّذِينَ لَا يَرۡجُونَ لِقَآءَنَا لَوۡلَآ أُنزِلَ عَلَيۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ أَوۡ نَرَىٰ رَبَّنَاۗ لَقَدِ ٱسۡتَكۡبَرُواْ فِيٓ أَنفُسِهِمۡ وَعَتَوۡ عُتُوّٗا كَبِيرٗا
21. Mpe baye bazali kolikia na elaka na biso te, bazali koloba: Soki ata bakitiselaka biso ba anzelu to mpe tomona Nkolo wa biso? Basili komisalela lolendo, mpe balekisi ndelo monene тропа komikumisa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَوۡمَ يَرَوۡنَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ لَا بُشۡرَىٰ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُجۡرِمِينَ وَيَقُولُونَ حِجۡرٗا مَّحۡجُورٗا
22. Mokolo oyo bato mabe bakomona ba anzelu(1) ekozala sango malamu te, (ba anzelu) bakolobaka na batomboki ete: Epekisami; nzela ezali te, (epekisami na bino kozua sango ya malamu тропа kokota na lola).
1 Kornona ba anzelu: Elingi koloba: Kornona bango na tango ya liwa, na lilita тре па mokolo ya suka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَدِمۡنَآ إِلَىٰ مَا عَمِلُواْ مِنۡ عَمَلٖ فَجَعَلۡنَٰهُ هَبَآءٗ مَّنثُورًا
23. Mpe tokozua maye basalaki mpe tokomisi yango putulu ezali kopumbwa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَصۡحَٰبُ ٱلۡجَنَّةِ يَوۡمَئِذٍ خَيۡرٞ مُّسۡتَقَرّٗا وَأَحۡسَنُ مَقِيلٗا
24. Mokolo wana bato ya lola bakozalaka na bosepeli mpe na bisika ya kitoko mpe bopemi bolamu.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيَوۡمَ تَشَقَّقُ ٱلسَّمَآءُ بِٱلۡغَمَٰمِ وَنُزِّلَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةُ تَنزِيلًا
25. Mpe mokolo moye likolo likopasukaka na mapata, mpe ba anzelu bakokitaka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلۡمُلۡكُ يَوۡمَئِذٍ ٱلۡحَقُّ لِلرَّحۡمَٰنِۚ وَكَانَ يَوۡمًا عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ عَسِيرٗا
26. Mokolo wana bokonzi ya sôló ekozalaka sé ya Ar-Rahmân(1), mpe ekozalaka mokolo ya mpasi тропа bapengwi.
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d (nkake) mokapo: 30
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيَوۡمَ يَعَضُّ ٱلظَّالِمُ عَلَىٰ يَدَيۡهِ يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي ٱتَّخَذۡتُ مَعَ ٱلرَّسُولِ سَبِيلٗا
27. Mpe mokolo moye mobubi akomisuaka maboko mibale mpe akolobaka: Soki nalandaka ata nzela ya motindami!
Tefsiri na arapskom jeziku:
يَٰوَيۡلَتَىٰ لَيۡتَنِي لَمۡ أَتَّخِذۡ فُلَانًا خَلِيلٗا
28. Eh ngai, mawa na nagi; soki nazuaki songolo te moninga.
Tefsiri na arapskom jeziku:
لَّقَدۡ أَضَلَّنِي عَنِ ٱلذِّكۡرِ بَعۡدَ إِذۡ جَآءَنِيۗ وَكَانَ ٱلشَّيۡطَٰنُ لِلۡإِنسَٰنِ خَذُولٗا
29. Asilaki kobungisa ngai mpe atiye ngai mosika na bokundoli tango eyelaki ngai (kurani). Kasi ya sólo, penza satana azali mokosi mpo na moto, (akimaka moto o sima ya komeka ye mpe kobungisa ye).
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَالَ ٱلرَّسُولُ يَٰرَبِّ إِنَّ قَوۡمِي ٱتَّخَذُواْ هَٰذَا ٱلۡقُرۡءَانَ مَهۡجُورٗا
30. Мре motindami alobi ete: Oh Nkolo wa ngai! Ya soló, bato na ngai basundoli kurani oyo.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَكَذَٰلِكَ جَعَلۡنَا لِكُلِّ نَبِيٍّ عَدُوّٗا مِّنَ ٱلۡمُجۡرِمِينَۗ وَكَفَىٰ بِرَبِّكَ هَادِيٗا وَنَصِيرٗا
31. Mpe lolenge wana nde totiyelaki ntoma na ntoma monguna otei ya batomboki, kasi Nkolo wayo akoki тропа bokambami mpe azali mosungi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَالَ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ لَوۡلَا نُزِّلَ عَلَيۡهِ ٱلۡقُرۡءَانُ جُمۡلَةٗ وَٰحِدَةٗۚ كَذَٰلِكَ لِنُثَبِّتَ بِهِۦ فُؤَادَكَۖ وَرَتَّلۡنَٰهُ تَرۡتِيلٗا
32. Mpe bapengwi bakolobaka: Mpona nini kurani yango ekitelaki ye mbala moko te? Tokitisaki yango ndenge wana mpona kolendisa motema nayo, mpe tozalaki kotanga yango malamu penza (kotangisa ye kurani mpe koyekola yango na pete).
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَا يَأۡتُونَكَ بِمَثَلٍ إِلَّا جِئۡنَٰكَ بِٱلۡحَقِّ وَأَحۡسَنَ تَفۡسِيرًا
33. Mpe bakokoka koyela yo lisese moko te sé tokoyela yo bosembo mpe ndimbola na yango ya malamu koleka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلَّذِينَ يُحۡشَرُونَ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ إِلَىٰ جَهَنَّمَ أُوْلَٰٓئِكَ شَرّٞ مَّكَانٗا وَأَضَلُّ سَبِيلٗا
34. Ba oyo bakosangisamaka na bilongi na bango na moto ya lifelo, bango wana nde bakozala na esika ya mabe mpe libungi ya mosika.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَقَدۡ ءَاتَيۡنَا مُوسَى ٱلۡكِتَٰبَ وَجَعَلۡنَا مَعَهُۥٓ أَخَاهُ هَٰرُونَ وَزِيرٗا
35. Mpe tosilaki kopesa Mûssa buku, mpe topesaki ye ndeko naye Háruna mpo asalisa ye.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَقُلۡنَا ٱذۡهَبَآ إِلَى ٱلۡقَوۡمِ ٱلَّذِينَ كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا فَدَمَّرۡنَٰهُمۡ تَدۡمِيرٗا
36. Mpe tolobaki: Bökende bino mibale epai ya bato oyo baboyaki kondimela mikapo mia biso, sima tobebisaki bango banso. (koboma bango)
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَقَوۡمَ نُوحٖ لَّمَّا كَذَّبُواْ ٱلرُّسُلَ أَغۡرَقۡنَٰهُمۡ وَجَعَلۡنَٰهُمۡ لِلنَّاسِ ءَايَةٗۖ وَأَعۡتَدۡنَا لِلظَّٰلِمِينَ عَذَابًا أَلِيمٗا
37. Мре bato ya Nûh, tango baboyaki kondimela ba tindami tozindisaki bango mpe totiyaki bango bazala elembo тропа bato, kasi tobombeli babubi etumbu ya makasi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَعَادٗا وَثَمُودَاْ وَأَصۡحَٰبَ ٱلرَّسِّ وَقُرُونَۢا بَيۡنَ ذَٰلِكَ كَثِيرٗا
38. Mpe aad na Thamúd, na bato ya rass, elongo na bato basusu ebele kati kati na bango sé lolenge moko.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَكُلّٗا ضَرَبۡنَا لَهُ ٱلۡأَمۡثَٰلَۖ وَكُلّٗا تَبَّرۡنَا تَتۡبِيرٗا
39. Mpe tobetelaki bato banso ndakisa, mpe bango banso tolimwisaki bango na lolenge ya makasi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَقَدۡ أَتَوۡاْ عَلَى ٱلۡقَرۡيَةِ ٱلَّتِيٓ أُمۡطِرَتۡ مَطَرَ ٱلسَّوۡءِۚ أَفَلَمۡ يَكُونُواْ يَرَوۡنَهَاۚ بَلۡ كَانُواْ لَا يَرۡجُونَ نُشُورٗا
40. Mpe basilaki koleka o mboka oyo ebetelaki mbula ya mabe(1), boye bazali kornona yango te? Kasi bazalaki kolikia na mokolo ya lisekwa te.
1 Mbula ya mabe: Ezalaki nde mbula ya mabanga тропа etumbu ya bato ya Loth.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَا رَأَوۡكَ إِن يَتَّخِذُونَكَ إِلَّا هُزُوًا أَهَٰذَا ٱلَّذِي بَعَثَ ٱللَّهُ رَسُولًا
41. Mpe soki bamoni yo, bazali koseka yo, bazali koloba: Oyo nde oyo Allah atindaki mpo azala motindami?
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِن كَادَ لَيُضِلُّنَا عَنۡ ءَالِهَتِنَا لَوۡلَآ أَن صَبَرۡنَا عَلَيۡهَاۚ وَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ حِينَ يَرَوۡنَ ٱلۡعَذَابَ مَنۡ أَضَلُّ سَبِيلًا
42. Etikali токе abungisa biso nzela ya banzambe ba biso, soki koyika mpiko na biso te nabango. Kasi mosika te, bakoyeba, ntango bakomona etumbu ete nani abungi nzela koleka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَرَءَيۡتَ مَنِ ٱتَّخَذَ إِلَٰهَهُۥ هَوَىٰهُ أَفَأَنتَ تَكُونُ عَلَيۡهِ وَكِيلًا
43. Boye ozali kornona te moto oyo azui mposa naye nde nzambe naye? Boye yo ozali mobateli ya moto ya motindo oyo?
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَمۡ تَحۡسَبُ أَنَّ أَكۡثَرَهُمۡ يَسۡمَعُونَ أَوۡ يَعۡقِلُونَۚ إِنۡ هُمۡ إِلَّا كَٱلۡأَنۡعَٰمِ بَلۡ هُمۡ أَضَلُّ سَبِيلًا
44. To ozali kokanisa ete ebele na bango bazali koyoka to koyeba? Kasi bazali nde lokola banyama mpe bazali babungi nzela koleka.
Tefsiri na arapskom jeziku:
أَلَمۡ تَرَ إِلَىٰ رَبِّكَ كَيۡفَ مَدَّ ٱلظِّلَّ وَلَوۡ شَآءَ لَجَعَلَهُۥ سَاكِنٗا ثُمَّ جَعَلۡنَا ٱلشَّمۡسَ عَلَيۡهِ دَلِيلٗا
45. Boye ozali kornona te lolenge Nkolo wayo atiaki molili? Soki alingaki, mbele akangisi yango esika moko. Sima totiyaki moyi ezala elembo тропа yango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ثُمَّ قَبَضۡنَٰهُ إِلَيۡنَا قَبۡضٗا يَسِيرٗا
46. Sima tozuaki ye mpe tomemaki ye epai na biso na pete.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَهُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ لَكُمُ ٱلَّيۡلَ لِبَاسٗا وَٱلنَّوۡمَ سُبَاتٗا وَجَعَلَ ٱلنَّهَارَ نُشُورٗا
47. Mpe ye nde atielaki bino butu ezala elamba, mpe pongi ezala bopemi, mpe atiaki mokolo ezali bozongi na bomoyi (kolamuka)
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَهُوَ ٱلَّذِيٓ أَرۡسَلَ ٱلرِّيَٰحَ بُشۡرَۢا بَيۡنَ يَدَيۡ رَحۡمَتِهِۦۚ وَأَنزَلۡنَا مِنَ ٱلسَّمَآءِ مَآءٗ طَهُورٗا
48. Mpe ye nde azali kotinda mopepe lokola elaka ya ngolu naye. Sima akitisi kowuta na yango mayi ya peto (kowuta o likolo),
Tefsiri na arapskom jeziku:
لِّنُحۡـِۧيَ بِهِۦ بَلۡدَةٗ مَّيۡتٗا وَنُسۡقِيَهُۥ مِمَّا خَلَقۡنَآ أَنۡعَٰمٗا وَأَنَاسِيَّ كَثِيرٗا
49. Mpona kopesa bomoyi o mboka eye ekauka mpe komelisa bato mpe bibwele na biye binso bizali kati na yango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَقَدۡ صَرَّفۡنَٰهُ بَيۡنَهُمۡ لِيَذَّكَّرُواْ فَأَبَىٰٓ أَكۡثَرُ ٱلنَّاسِ إِلَّا كُفُورٗا
50. Mpe tosilaki kokabola kati kati na bango mpo ete bakanisa (biso), kasi ebele ya bato baboyi yango baponi sé bopengwi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَلَوۡ شِئۡنَا لَبَعَثۡنَا فِي كُلِّ قَرۡيَةٖ نَّذِيرٗا
51. Mpe soki tolingaki, mbele totindaki na mboka inso mokebisi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
فَلَا تُطِعِ ٱلۡكَٰفِرِينَ وَجَٰهِدۡهُم بِهِۦ جِهَادٗا كَبِيرٗا
52. Kaši kotosa bapengwi te, mpe bundisa bango (na kurani), kobundisa ya bonene.
Tefsiri na arapskom jeziku:
۞ وَهُوَ ٱلَّذِي مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ هَٰذَا عَذۡبٞ فُرَاتٞ وَهَٰذَا مِلۡحٌ أُجَاجٞ وَجَعَلَ بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخٗا وَحِجۡرٗا مَّحۡجُورٗا
53. Мре ye nde atandı bibale mibale bizali kotiola esika moko, oyo ezali malili kitoko, mpe oyo mosusu ezali mungwa kitoko te, mpe atie ndelo kati kati na yango mibale mpo ekutana te.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَهُوَ ٱلَّذِي خَلَقَ مِنَ ٱلۡمَآءِ بَشَرٗا فَجَعَلَهُۥ نَسَبٗا وَصِهۡرٗاۗ وَكَانَ رَبُّكَ قَدِيرٗا
54. Mpe ye nde akeli moto na litanga ya mayi, mpe apesi ye libota mpe bolongani. Mpe Nkolo wayo azali penza na bokoki.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَيَعۡبُدُونَ مِن دُونِ ٱللَّهِ مَا لَا يَنفَعُهُمۡ وَلَا يَضُرُّهُمۡۗ وَكَانَ ٱلۡكَافِرُ عَلَىٰ رَبِّهِۦ ظَهِيرٗا
55. Mpe bazali kobondela basusu batiki Allah, ba oyo bakosalela bango bolamu to mabe te. Mompegwi akozala mosungi ya monguna ya Nkolo naye.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمَآ أَرۡسَلۡنَٰكَ إِلَّا مُبَشِّرٗا وَنَذِيرٗا
56. Mpe totindaki yo te sé mpo ozala mopesi sango mpe mokebisi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ مَآ أَسۡـَٔلُكُمۡ عَلَيۡهِ مِنۡ أَجۡرٍ إِلَّا مَن شَآءَ أَن يَتَّخِذَ إِلَىٰ رَبِّهِۦ سَبِيلٗا
57. Loba: Nazali kosenga bino lifuta moko te sé na moto oyo alingi kozua nzela ya Nkolo naye.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَتَوَكَّلۡ عَلَى ٱلۡحَيِّ ٱلَّذِي لَا يَمُوتُ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِهِۦۚ وَكَفَىٰ بِهِۦ بِذُنُوبِ عِبَادِهِۦ خَبِيرًا
58. Mpe mipesa epai ya oyo azali na bomoi liwa ezuaka ye te (Allah), mpe pesa lokumu naye. Мре ayebi malamu masumu ya bawumbu baye.
Tefsiri na arapskom jeziku:
ٱلَّذِي خَلَقَ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَ وَمَا بَيۡنَهُمَا فِي سِتَّةِ أَيَّامٖ ثُمَّ ٱسۡتَوَىٰ عَلَى ٱلۡعَرۡشِۖ ٱلرَّحۡمَٰنُ فَسۡـَٔلۡ بِهِۦ خَبِيرٗا
59. Oyo akela likolo na mabele, na maye manso mazali otei na yango nyoso mibale na mikolo motoba, mpe sima amitombwami na likolo ya ngwende, Ar-Rahmân(1) nde tika ete otuna sé oyo ayebi manso.
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَإِذَا قِيلَ لَهُمُ ٱسۡجُدُواْۤ لِلرَّحۡمَٰنِ قَالُواْ وَمَا ٱلرَّحۡمَٰنُ أَنَسۡجُدُ لِمَا تَأۡمُرُنَا وَزَادَهُمۡ نُفُورٗا۩
60. Мре soki bayebisi bango ete: Bofukamela Ar-Rahmân, (Allah) bakozongisa été: Nani Ar-Rahmân? Tofukamela oyo ozali kotinda biso? Мре ezali kobakisela bango sé bopengwi. (ezali malamu kogumbama sima ya mokapo moye)
Tefsiri na arapskom jeziku:
تَبَارَكَ ٱلَّذِي جَعَلَ فِي ٱلسَّمَآءِ بُرُوجٗا وَجَعَلَ فِيهَا سِرَٰجٗا وَقَمَرٗا مُّنِيرٗا
61. Mapamboli naye oyo atia olikolo minzoto mpe ati moyi mpe sanza ya kongenga.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَهُوَ ٱلَّذِي جَعَلَ ٱلَّيۡلَ وَٱلنَّهَارَ خِلۡفَةٗ لِّمَنۡ أَرَادَ أَن يَذَّكَّرَ أَوۡ أَرَادَ شُكُورٗا
62. Mpe ye nde atia butu na mokolo elandana na bongengi mpe molili, тропа oyo alingi kokanisa to mpe kopesa matondi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَعِبَادُ ٱلرَّحۡمَٰنِ ٱلَّذِينَ يَمۡشُونَ عَلَى ٱلۡأَرۡضِ هَوۡنٗا وَإِذَا خَاطَبَهُمُ ٱلۡجَٰهِلُونَ قَالُواْ سَلَٰمٗا
63. Mpe bawumbu ya Ar-Rahmân bazali baye batambolaka likolo ya mabele na malembe mpe limemia na komikitisa, mpe soki batumoli bango na baye bayebi eloko te, bayanoli bango été: Kimia.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ يَبِيتُونَ لِرَبِّهِمۡ سُجَّدٗا وَقِيَٰمٗا
64. Mpe baye bazali kolekisa butu na bango nakotelema mpe kofukamela Nkolo na bango.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَا ٱصۡرِفۡ عَنَّا عَذَابَ جَهَنَّمَۖ إِنَّ عَذَابَهَا كَانَ غَرَامًا
65. Mpe baye bazali koloba: Nkolo tiya biso mosika na etumbu ya lifelo, mpo ya soló etumbu na yango ekozala ya libela.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِنَّهَا سَآءَتۡ مُسۡتَقَرّٗا وَمُقَامٗا
66. Ya soló, yango ezali esika mabe тропа kovanda.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ إِذَآ أَنفَقُواْ لَمۡ يُسۡرِفُواْ وَلَمۡ يَقۡتُرُواْ وَكَانَ بَيۡنَ ذَٰلِكَ قَوَامٗا
67. Мре baye bazali kokaba to kobimisa тре bazali kolekisa ndelo te mpe batiki kokaba te, kasi bazali na kati kati.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ لَا يَدۡعُونَ مَعَ ٱللَّهِ إِلَٰهًا ءَاخَرَ وَلَا يَقۡتُلُونَ ٱلنَّفۡسَ ٱلَّتِي حَرَّمَ ٱللَّهُ إِلَّا بِٱلۡحَقِّ وَلَا يَزۡنُونَۚ وَمَن يَفۡعَلۡ ذَٰلِكَ يَلۡقَ أَثَامٗا
68. Mpe baye bazali kobondela Allah mpe kosangisa ye na banzambe misusu te, mpe bazali koboma molimo oyo Allah apekisaki te, longola sé ezala na nzela ya bosôló, mpe bazali kosala ekobo te. Kasi oyo akosala yango akozua etumbu.
Tefsiri na arapskom jeziku:
يُضَٰعَفۡ لَهُ ٱلۡعَذَابُ يَوۡمَ ٱلۡقِيَٰمَةِ وَيَخۡلُدۡ فِيهِۦ مُهَانًا
69. Bakobakiselaka ye etumbu o mokolo mwa suka, mpe akotikalaka libela okati na yango mpe azingami na kozanga lokumu.
Tefsiri na arapskom jeziku:
إِلَّا مَن تَابَ وَءَامَنَ وَعَمِلَ عَمَلٗا صَٰلِحٗا فَأُوْلَٰٓئِكَ يُبَدِّلُ ٱللَّهُ سَيِّـَٔاتِهِمۡ حَسَنَٰتٖۗ وَكَانَ ٱللَّهُ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
70. Longola sé oyo akotubela mpe andimi mpe alandisi kosala misala milamu, Allah akobongolaka mabe na bango ekomi bolamu. Mpe Allah azali molimbisi atonda mawa.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَمَن تَابَ وَعَمِلَ صَٰلِحٗا فَإِنَّهُۥ يَتُوبُ إِلَى ٱللَّهِ مَتَابٗا
71. Mpe oyo akotubela mpe asali mosala ya malamu, ya solo Allah akondimelaka ye bozongi.
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ لَا يَشۡهَدُونَ ٱلزُّورَ وَإِذَا مَرُّواْ بِٱللَّغۡوِ مَرُّواْ كِرَامٗا
72. Mpe baye batatolaka na lokuta te, mpe soki bakutani na makambo mazanga ntina, bapesi yango mokongo,
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ إِذَا ذُكِّرُواْ بِـَٔايَٰتِ رَبِّهِمۡ لَمۡ يَخِرُّواْ عَلَيۡهَا صُمّٗا وَعُمۡيَانٗا
73. Мре baye soki bakundoli bango mikapo mia Nkolo wa bango, bakozangaka koyoka mpe kornona yango te,
Tefsiri na arapskom jeziku:
وَٱلَّذِينَ يَقُولُونَ رَبَّنَا هَبۡ لَنَا مِنۡ أَزۡوَٰجِنَا وَذُرِّيَّٰتِنَا قُرَّةَ أَعۡيُنٖ وَٱجۡعَلۡنَا لِلۡمُتَّقِينَ إِمَامًا
74. Mpe baye balobaka ete: Nkolo, pesa biso bosepelisi miso bolamu kowuta epai ya basi na biso mpe mabota na biso, mpe otia biso bakambi ya baye bazali kobanga,
Tefsiri na arapskom jeziku:
أُوْلَٰٓئِكَ يُجۡزَوۡنَ ٱلۡغُرۡفَةَ بِمَا صَبَرُواْ وَيُلَقَّوۡنَ فِيهَا تَحِيَّةٗ وَسَلَٰمًا
75. Bango wana nde lifuta na bango ekozala esika ya likolo (o paladizo) mpo été bakangaki mitema, mpe bakokutana na losako mpe kimia o kati na yango,
Tefsiri na arapskom jeziku:
خَٰلِدِينَ فِيهَاۚ حَسُنَتۡ مُسۡتَقَرّٗا وَمُقَامٗا
76. Libela kati na yango, boye bolamu kani bakozuaka o esika ena bakozalaka!
Tefsiri na arapskom jeziku:
قُلۡ مَا يَعۡبَؤُاْ بِكُمۡ رَبِّي لَوۡلَا دُعَآؤُكُمۡۖ فَقَدۡ كَذَّبۡتُمۡ فَسَوۡفَ يَكُونُ لِزَامَۢا
77. Loba: Nkolo wa ngai akomitungisa тропа bino te wana bozangi losambo na bino, mpo bozwaka(ntoma) lokuta, na yango etumbu ekotika bino te, mpe ekozalaka seko na seko.
Tefsiri na arapskom jeziku:
 
Prijevod značenja Sura: Sura el-Furkan
Indeks sura Broj stranice
 
Prijevod značenja časnog Kur'ana - الترجمة اللينغالا - Sadržaj prijevodā

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

Zatvaranje