Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Al Qalam   Verset:
إِنَّا بَلَوۡنَٰهُمۡ كَمَا بَلَوۡنَآ أَصۡحَٰبَ ٱلۡجَنَّةِ إِذۡ أَقۡسَمُواْ لَيَصۡرِمُنَّهَا مُصۡبِحِينَ
17. Ya soló, tomekaki bango lolenge tomekaki bato ya elanga tango bakanaki ete bakobuka yango lobi na tongo,
Les exégèses en arabe:
وَلَا يَسۡتَثۡنُونَ
18. Bazangaki koloba: Na bolingi ya Allah. (In cha Allah)
Les exégèses en arabe:
فَطَافَ عَلَيۡهَا طَآئِفٞ مِّن رَّبِّكَ وَهُمۡ نَآئِمُونَ
19. Mabe kowuta epai ya Nkolo nayo ekwelaki yango bazali kolala,
Les exégèses en arabe:
فَأَصۡبَحَتۡ كَٱلصَّرِيمِ
20. Na tongo ekomi lokola eloko ezalaki te.
Les exégèses en arabe:
فَتَنَادَوۡاْ مُصۡبِحِينَ
21. O mokolo molandi: Babiangani bango na bango.
Les exégèses en arabe:
أَنِ ٱغۡدُواْ عَلَىٰ حَرۡثِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰرِمِينَ
22. Bökende noki na bilanga na bino soki bolingi kobuka mbuma.
Les exégèses en arabe:
فَٱنطَلَقُواْ وَهُمۡ يَتَخَٰفَتُونَ
23. Basololi kati na bango na bango na nsé tango babimaki тропа kokende,
Les exégèses en arabe:
أَن لَّا يَدۡخُلَنَّهَا ٱلۡيَوۡمَ عَلَيۡكُم مِّسۡكِينٞ
24. Mobola moko te akotela bino lelo na elanga,
Les exégèses en arabe:
وَغَدَوۡاْ عَلَىٰ حَرۡدٖ قَٰدِرِينَ
25. Mpe bakendeki na tango ya malamu na mokano nyoso ete bakoka kopimela babola.
Les exégèses en arabe:
فَلَمَّا رَأَوۡهَا قَالُوٓاْ إِنَّا لَضَآلُّونَ
26. Mpe tango bamoni (elanga) yango, balobi: Ya soló tobungi nzela na biso,
Les exégèses en arabe:
بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ
27. То yango; Kasi tozali na eloko te.
Les exégèses en arabe:
قَالَ أَوۡسَطُهُمۡ أَلَمۡ أَقُل لَّكُمۡ لَوۡلَا تُسَبِّحُونَ
28. Moto ya bosembo kati na bango alobi: Nayebisaki bino te ete: Soki bosanzolaki lukumu ya Allah?
Les exégèses en arabe:
قَالُواْ سُبۡحَٰنَ رَبِّنَآ إِنَّا كُنَّا ظَٰلِمِينَ
29. Balobi: Lokumu na Nkolo wa biso, ya sólo tozalaki bato mabe.
Les exégèses en arabe:
فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَلَٰوَمُونَ
30. Batalani bango na bango, bakomi koloba: Yo nde osali mabe,
Les exégèses en arabe:
قَالُواْ يَٰوَيۡلَنَآ إِنَّا كُنَّا طَٰغِينَ
31. Mpe balobaki ete: Eh biso mpasi! Ya sólo, tozalaki batomboki.
Les exégèses en arabe:
عَسَىٰ رَبُّنَآ أَن يُبۡدِلَنَا خَيۡرٗا مِّنۡهَآ إِنَّآ إِلَىٰ رَبِّنَا رَٰغِبُونَ
32. Tozali kolikia na Nkolo wa biso été abongola eloko ya malamu тропа biso, tozali kolikia pene na Nkolo wa biso.
Les exégèses en arabe:
كَذَٰلِكَ ٱلۡعَذَابُۖ وَلَعَذَابُ ٱلۡأٓخِرَةِ أَكۡبَرُۚ لَوۡ كَانُواْ يَعۡلَمُونَ
33. Lolenge wana nde etumbu ezalaki, kasi etumbu ya mokolo ya suka eleki monene. Soki bazali koyeba.
Les exégèses en arabe:
إِنَّ لِلۡمُتَّقِينَ عِندَ رَبِّهِمۡ جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
34. Ya soló, babangi (Allah) bakozalaka epai ya Nkolo na bango na lola ya kitoko.
Les exégèses en arabe:
أَفَنَجۡعَلُ ٱلۡمُسۡلِمِينَ كَٱلۡمُجۡرِمِينَ
35. Boye tokozua bandimi ndenge moko na batomboki?
Les exégèses en arabe:
مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
36. Boni bozali kokata likambo na lolenge wana?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَكُمۡ كِتَٰبٞ فِيهِ تَدۡرُسُونَ
37. To boye bozali na buku eye bozali koyekola,
Les exégèses en arabe:
إِنَّ لَكُمۡ فِيهِ لَمَا تَخَيَّرُونَ
38. Ete ya sólo, bokozua nyoso oyo bokolinga.
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَكُمۡ أَيۡمَٰنٌ عَلَيۡنَا بَٰلِغَةٌ إِلَىٰ يَوۡمِ ٱلۡقِيَٰمَةِ إِنَّ لَكُمۡ لَمَا تَحۡكُمُونَ
39. To boye bolapelaki biso bandai ya bosôló kino mokolo ya suka, mpo topesa bino maye bolingi?
Les exégèses en arabe:
سَلۡهُمۡ أَيُّهُم بِذَٰلِكَ زَعِيمٌ
40. Tuna bango, nani kati na bango azali nkumu na yango?
Les exégèses en arabe:
أَمۡ لَهُمۡ شُرَكَآءُ فَلۡيَأۡتُواْ بِشُرَكَآئِهِمۡ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ
41. To boye bazali na basangani? Baya na bango soki bazali koloba bosôló.
Les exégèses en arabe:
يَوۡمَ يُكۡشَفُ عَن سَاقٖ وَيُدۡعَوۡنَ إِلَى ٱلسُّجُودِ فَلَا يَسۡتَطِيعُونَ
42. Mokolo oyo lokolo ekomonamaka, mpe bakobengaka bango ete bafukama elongi na mabele kasi bakokokaka kofukama te.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Al Qalam
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture