Check out the new design

Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû * - Lexique des traductions

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Traduction des sens Sourate: Al Inshiqâq   Verset:

Al-Inshiqâq

إِذَا ٱلسَّمَآءُ ٱنشَقَّتۡ
Ntango mapata mako pasuka,
Les exégèses en arabe:
وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
Mpe makotosa Nkolo na yango, mpe ekosala maye esengeli esala,
Les exégèses en arabe:
وَإِذَا ٱلۡأَرۡضُ مُدَّتۡ
Mpe ntango mabele makolalisama,
Les exégèses en arabe:
وَأَلۡقَتۡ مَا فِيهَا وَتَخَلَّتۡ
Mpe makosanza maye manso mazwami okati na yango mpe makotikala mpamba,
Les exégèses en arabe:
وَأَذِنَتۡ لِرَبِّهَا وَحُقَّتۡ
Mpe makotosa Nkolo na yango mpe ekosala oyo esengeli esala,
Les exégèses en arabe:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلۡإِنسَٰنُ إِنَّكَ كَادِحٌ إِلَىٰ رَبِّكَ كَدۡحٗا فَمُلَٰقِيهِ
Oh yo moto! Ozali koyika mpiko тропа Nkolo nayo ntango nyoso yeba ete okokutana naye.
Les exégèses en arabe:
فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ
Moto oyo akoyamba buku naye na loboko naye ya mobali.
Les exégèses en arabe:
فَسَوۡفَ يُحَاسَبُ حِسَابٗا يَسِيرٗا
Akosambisama na ndenge ya malamu.
Les exégèses en arabe:
وَيَنقَلِبُ إِلَىٰٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورٗا
Mpe akozonga o’libota naye na esengo.
Les exégèses en arabe:
وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ وَرَآءَ ظَهۡرِهِۦ
Kasi na moto oyo akoyamba buku naye nasima ya mokongo naye,
Les exégèses en arabe:
فَسَوۡفَ يَدۡعُواْ ثُبُورٗا
Akomisengela mabe,
Les exégèses en arabe:
وَيَصۡلَىٰ سَعِيرًا
Мре akozikisama okati ya moto ya makasi,
Les exégèses en arabe:
إِنَّهُۥ كَانَ فِيٓ أَهۡلِهِۦ مَسۡرُورًا
Ya soló, ye na mokili azalaki na esengo o’kati na libota naye.
Les exégèses en arabe:
إِنَّهُۥ ظَنَّ أَن لَّن يَحُورَ
Azalaki kokanisa te ete akosekwisama.
Les exégèses en arabe:
بَلَىٰٓۚ إِنَّ رَبَّهُۥ كَانَ بِهِۦ بَصِيرٗا
Kasi ya sólo, Nkolo naye azalaki kotala ye.
Les exégèses en arabe:
فَلَآ أُقۡسِمُ بِٱلشَّفَقِ
Te na lapi na ngonga ya mpokwa,
Les exégèses en arabe:
وَٱلَّيۡلِ وَمَا وَسَقَ
Mpe na lapi na butu na molili na yango,
Les exégèses en arabe:
وَٱلۡقَمَرِ إِذَا ٱتَّسَقَ
Mpe na lapi na nsanza ntango ekomaka mobimba,
Les exégèses en arabe:
لَتَرۡكَبُنَّ طَبَقًا عَن طَبَقٖ
Ya sólo, bokolekanaka biteni na biteni.
Les exégèses en arabe:
فَمَا لَهُمۡ لَا يُؤۡمِنُونَ
Mpona nini bazali kondima te,
Les exégèses en arabe:
وَإِذَا قُرِئَ عَلَيۡهِمُ ٱلۡقُرۡءَانُ لَا يَسۡجُدُونَۤ۩
Mpe mpona nini bafukamaka te ntango kurani ezali kotangama likolo na bango?
Les exégèses en arabe:
بَلِ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ يُكَذِّبُونَ
Kasi bapengwi bazali kozwa yango lokuta.
Les exégèses en arabe:
وَٱللَّهُ أَعۡلَمُ بِمَا يُوعُونَ
Nzoka Allah ayebi maye bazali kobomba.
Les exégèses en arabe:
فَبَشِّرۡهُم بِعَذَابٍ أَلِيمٍ
Pesa bango sango ya etumbu ya makasi.
Les exégèses en arabe:
 
Traduction des sens Sourate: Al Inshiqâq
Lexique des sourates Numéro de la page
 
Traduction des sens du Noble Coran - La traduction en lingala - Muhammad Bânghûghû - Lexique des traductions

Traduit par Zakariyâ Muhammad Bânghûghû.

Fermeture