Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   អាយ៉ាត់:
وَٱقۡتُلُوهُمۡ حَيۡثُ ثَقِفۡتُمُوهُمۡ وَأَخۡرِجُوهُم مِّنۡ حَيۡثُ أَخۡرَجُوكُمۡۚ وَٱلۡفِتۡنَةُ أَشَدُّ مِنَ ٱلۡقَتۡلِۚ وَلَا تُقَٰتِلُوهُمۡ عِندَ ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِ حَتَّىٰ يُقَٰتِلُوكُمۡ فِيهِۖ فَإِن قَٰتَلُوكُمۡ فَٱقۡتُلُوهُمۡۗ كَذَٰلِكَ جَزَآءُ ٱلۡكَٰفِرِينَ
Mpe boboma bango o esika nyoso bokuti bango, mpe bobimisa bango bisika biye babimisaki bino. Mpe komekama ezali mabe koleka koboma. Mpe bobundisa bango te pembeni ya ndako esantu,[1] sé soki babundisi bino okati na yango. Mpe soki babundisi bino boboma bango, na boye nde lifuta ya bapagano.
[1] Makkah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
فَإِنِ ٱنتَهَوۡاْ فَإِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Mpe soki batiki, ya sôló Allah azali molimbisi atonda mawa.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَقَٰتِلُوهُمۡ حَتَّىٰ لَا تَكُونَ فِتۡنَةٞ وَيَكُونَ ٱلدِّينُ لِلَّهِۖ فَإِنِ ٱنتَهَوۡاْ فَلَا عُدۡوَٰنَ إِلَّا عَلَى ٱلظَّٰلِمِينَ
Mpe bobundisa bango kino komekama ekosila, mpo ete lingomba ezala bobele ya Allah, kasi soki batiki, botika kobunda, longola sé babubi soki babundisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ٱلشَّهۡرُ ٱلۡحَرَامُ بِٱلشَّهۡرِ ٱلۡحَرَامِ وَٱلۡحُرُمَٰتُ قِصَاصٞۚ فَمَنِ ٱعۡتَدَىٰ عَلَيۡكُمۡ فَٱعۡتَدُواْ عَلَيۡهِ بِمِثۡلِ مَا ٱعۡتَدَىٰ عَلَيۡكُمۡۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ مَعَ ٱلۡمُتَّقِينَ
Sanza esantu na sanza esantu, mpe biloko bisantu ezali na mibeko lolenge moko, moto oyo akobundisa bino, bobundisa ye lolenge abundisi bino kasi bolekisa te. Mpe bobanga Allah mpe boyeba ete ya sôló Allah azali elongo na baye bazali kobanga.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَنفِقُواْ فِي سَبِيلِ ٱللَّهِ وَلَا تُلۡقُواْ بِأَيۡدِيكُمۡ إِلَى ٱلتَّهۡلُكَةِ وَأَحۡسِنُوٓاْۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Mpe bobimisa na nzela ya Allah kasi bomibebisa te na maboko na bino moko, mpe bobongisa. Ya sôló Allah alingaka babongisi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَتِمُّواْ ٱلۡحَجَّ وَٱلۡعُمۡرَةَ لِلَّهِۚ فَإِنۡ أُحۡصِرۡتُمۡ فَمَا ٱسۡتَيۡسَرَ مِنَ ٱلۡهَدۡيِۖ وَلَا تَحۡلِقُواْ رُءُوسَكُمۡ حَتَّىٰ يَبۡلُغَ ٱلۡهَدۡيُ مَحِلَّهُۥۚ فَمَن كَانَ مِنكُم مَّرِيضًا أَوۡ بِهِۦٓ أَذٗى مِّن رَّأۡسِهِۦ فَفِدۡيَةٞ مِّن صِيَامٍ أَوۡ صَدَقَةٍ أَوۡ نُسُكٖۚ فَإِذَآ أَمِنتُمۡ فَمَن تَمَتَّعَ بِٱلۡعُمۡرَةِ إِلَى ٱلۡحَجِّ فَمَا ٱسۡتَيۡسَرَ مِنَ ٱلۡهَدۡيِۚ فَمَن لَّمۡ يَجِدۡ فَصِيَامُ ثَلَٰثَةِ أَيَّامٖ فِي ٱلۡحَجِّ وَسَبۡعَةٍ إِذَا رَجَعۡتُمۡۗ تِلۡكَ عَشَرَةٞ كَامِلَةٞۗ ذَٰلِكَ لِمَن لَّمۡ يَكُنۡ أَهۡلُهُۥ حَاضِرِي ٱلۡمَسۡجِدِ ٱلۡحَرَامِۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّ ٱللَّهَ شَدِيدُ ٱلۡعِقَابِ
Mpe bosala hajj[1] na umra[2] mpona Allah. Mpe soki bozui mpasi mpona kokokisa yango, bobimisa likabo na ndenge bokoki. Kasi bokata basuki ya mitu na bino te liboso ete nyama ekoma na esika ya kosasa. Soki moko kati na bino azali na bokono too azali koyoka mpasi na mutu naye (mpe esengeli akata suki), afuta lomande na kokanga ngizi too apesa mabonza too afuta mbeka sima ya kosala umra, otango bokozwa kimia, moto nionso oyo azwi mpasi te sima ya umra liboso ya kosala hajj esengeli naye kobonzela Allah oyo akokoka. Na oyo azali na makoki wana te akanga ngizi mikolo misato na tango azali na hajj, mpe mikolo sambo tango bokozonga, wana nde mikolo zomi ya kokoka. Wana ezali mpona moto oyo libota naye ezali te zingazinga na ndako esantu ya Makkah. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló Allah azali makasi na etumbu.
[1] Mobembo enene esantu na ndako ya esantu ya Makkah.
[2] Mobembo ya moke na ndako ya esantu ya Makkah.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ