Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   អាយ៉ាត់:
قُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ مِنۡهَا جَمِيعٗاۖ فَإِمَّا يَأۡتِيَنَّكُم مِّنِّي هُدٗى فَمَن تَبِعَ هُدَايَ فَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
Mpe tolobaki: Bokita bino banso, kowuta nakati na yango![1] mpe ya sôló tango inso bokambami ekokomela bino uta epayi na ngai, ba oyo bakolanda bokambami bwa ngai, bakozala na bobangi te, mpe bakozala na mawa te.
[1] Lola.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
mpe baye bapengwa mpe bazali kobuka lokuta na mikapo na biso, bango nde bato ya lifelo. Bakozala seko o kati na yango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَوۡفُواْ بِعَهۡدِيٓ أُوفِ بِعَهۡدِكُمۡ وَإِيَّٰيَ فَٱرۡهَبُونِ
Eh bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai oyo napesaki bino, mpe bokokisa elaka na ngai na kokisa elaka na bino. Mpe ngai nde esengeli bobanga.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَءَامِنُواْ بِمَآ أَنزَلۡتُ مُصَدِّقٗا لِّمَا مَعَكُمۡ وَلَا تَكُونُوٓاْ أَوَّلَ كَافِرِۭ بِهِۦۖ وَلَا تَشۡتَرُواْ بِـَٔايَٰتِي ثَمَنٗا قَلِيلٗا وَإِيَّٰيَ فَٱتَّقُونِ
Mpe bondima maye nakitisaki, ezali kondima na maye bozali nayango, mpe bozala te bato ya liboso mpona koboya yango. Mpe boteka te mikapo mia ngai na ntalo moke, mpe nga nde esengeli bobanga.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تَلۡبِسُواْ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُواْ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
Mpe bosangisa bosembo na lokuta te, mpe bozali kobomba bosembo mpe na bino bozali koyeba.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱرۡكَعُواْ مَعَ ٱلرَّٰكِعِينَ
Mpe botelemisa losambo, mpe bobimisa zakat[1], mpe bogumbama elongo na bagumbami.
[1] Zakat: Ezali likabo oyo bato ya bozwi bapesaka babola mbala moko na mbula.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
۞ أَتَأۡمُرُونَ ٱلنَّاسَ بِٱلۡبِرِّ وَتَنسَوۡنَ أَنفُسَكُمۡ وَأَنتُمۡ تَتۡلُونَ ٱلۡكِتَٰبَۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Bozali kotinda bato na bolamu mpe bozali komibosana bino moko, mpe bino bozali kotanga buku? Boye bozali na bososoli te?
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَٱسۡتَعِينُواْ بِٱلصَّبۡرِ وَٱلصَّلَوٰةِۚ وَإِنَّهَا لَكَبِيرَةٌ إِلَّا عَلَى ٱلۡخَٰشِعِينَ
Boluka lisalisi na koyika mpiko mpe na losambo, pamba te yango ezali mpasi te epai ya babangi (Allah).
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
ٱلَّذِينَ يَظُنُّونَ أَنَّهُم مُّلَٰقُواْ رَبِّهِمۡ وَأَنَّهُمۡ إِلَيۡهِ رَٰجِعُونَ
Baye bazali kolikia ete ya sôló bakokutana na Nkolo na bango, mpe ya sôló epai naye nde bakozongaka.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَنِّي فَضَّلۡتُكُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
Eh bino bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai napesaki epai na bino, mpe ya sôló ngai napesa bino lokumu likolo ya mokili mobimba[1].
[1] Na tango na Bango.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا لَّا تَجۡزِي نَفۡسٌ عَن نَّفۡسٖ شَيۡـٔٗا وَلَا يُقۡبَلُ مِنۡهَا شَفَٰعَةٞ وَلَا يُؤۡخَذُ مِنۡهَا عَدۡلٞ وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisaka mosusu ata na eloko moko te, mpe bobondeli ekondimama te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bakozua lisungi te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ