Check out the new design

Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo * - Indise ng mga Salin

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Baqarah   Ayah:
قُلۡنَا ٱهۡبِطُواْ مِنۡهَا جَمِيعٗاۖ فَإِمَّا يَأۡتِيَنَّكُم مِّنِّي هُدٗى فَمَن تَبِعَ هُدَايَ فَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
38. Mpe tolobaki: Bokita bino banso, kowuta nakati na yango!(1) mpe ya sôló tango inso bokambami ekokomela bino uta epayi na ngai, ba oyo bakolanda bokambami bwa ngai, bakozala na bobangi te, mpe bakozala na mawa te.
1 Lola.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ وَكَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَآ أُوْلَٰٓئِكَ أَصۡحَٰبُ ٱلنَّارِۖ هُمۡ فِيهَا خَٰلِدُونَ
39. mpe baye bapengwa mpe bazali kobuka lokuta na mikapo na biso, bango nde bato ya lifelo. Bakozala seko o kati na yango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَوۡفُواْ بِعَهۡدِيٓ أُوفِ بِعَهۡدِكُمۡ وَإِيَّٰيَ فَٱرۡهَبُونِ
40. Eh bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai oyo napesaki bino, mpe bokokisa elaka na ngai na kokisa elaka na bino. Mpe ngai nde esengeli bobanga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَءَامِنُواْ بِمَآ أَنزَلۡتُ مُصَدِّقٗا لِّمَا مَعَكُمۡ وَلَا تَكُونُوٓاْ أَوَّلَ كَافِرِۭ بِهِۦۖ وَلَا تَشۡتَرُواْ بِـَٔايَٰتِي ثَمَنٗا قَلِيلٗا وَإِيَّٰيَ فَٱتَّقُونِ
41. Mpe bondima maye nakitisaki, ezali kondima na maye bozali nayango, mpe bozala te bato ya liboso mpona koboya yango. Mpe boteka te mikapo mia ngai na ntalo moke, mpe nga nde esengeli bobanga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَا تَلۡبِسُواْ ٱلۡحَقَّ بِٱلۡبَٰطِلِ وَتَكۡتُمُواْ ٱلۡحَقَّ وَأَنتُمۡ تَعۡلَمُونَ
42. Mpe bosangisa bosembo na lokuta te, mpe bozali kobomba bosembo mpe na bino bozali koyeba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَ وَٱرۡكَعُواْ مَعَ ٱلرَّٰكِعِينَ
43. Mpe botelemisa losambo, mpe bobimisa zakat(1), mpe bogumbama elongo na bagumbami.
1 Zakat: Ezali likabo oyo bato ya bozwi bapesaka babola mbala moko na mbula.
Ang mga Tafsir na Arabe:
۞ أَتَأۡمُرُونَ ٱلنَّاسَ بِٱلۡبِرِّ وَتَنسَوۡنَ أَنفُسَكُمۡ وَأَنتُمۡ تَتۡلُونَ ٱلۡكِتَٰبَۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
44. Bozali kotinda bato na bolamu mpe bozali komibosana bino moko, mpe bino bozali kotanga buku? Boye bozali na bososoli te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَٱسۡتَعِينُواْ بِٱلصَّبۡرِ وَٱلصَّلَوٰةِۚ وَإِنَّهَا لَكَبِيرَةٌ إِلَّا عَلَى ٱلۡخَٰشِعِينَ
45. Boluka lisalisi na koyika mpiko mpe na losambo, pamba te yango ezali mpasi te epai ya babangi (Allah).
Ang mga Tafsir na Arabe:
ٱلَّذِينَ يَظُنُّونَ أَنَّهُم مُّلَٰقُواْ رَبِّهِمۡ وَأَنَّهُمۡ إِلَيۡهِ رَٰجِعُونَ
46. Baye bazali kolikia ete ya sôló bakokutana na Nkolo na bango, mpe ya sôló epai naye nde bakozongaka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
يَٰبَنِيٓ إِسۡرَٰٓءِيلَ ٱذۡكُرُواْ نِعۡمَتِيَ ٱلَّتِيٓ أَنۡعَمۡتُ عَلَيۡكُمۡ وَأَنِّي فَضَّلۡتُكُمۡ عَلَى ٱلۡعَٰلَمِينَ
47. Eh bino bana ya Isalayele! Bokanisa bolamu na ngai napesaki epai na bino, mpe ya sôló ngai napesa bino lokumu likolo ya mokili mobimba(1).
1 Na tango na Bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَٱتَّقُواْ يَوۡمٗا لَّا تَجۡزِي نَفۡسٌ عَن نَّفۡسٖ شَيۡـٔٗا وَلَا يُقۡبَلُ مِنۡهَا شَفَٰعَةٞ وَلَا يُؤۡخَذُ مِنۡهَا عَدۡلٞ وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
48. Mpe bobanga mokolo moye molimo moko mokosalisaka mosusu ata na eloko moko te, mpe bobondeli ekondimama te, mpe bosikoli ekoyambama te, mpe bakozua lisungi te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
 
Salin ng mga Kahulugan Surah: Al-Baqarah
Indise ng mga Surah Numero ng Pahina
 
Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo - Indise ng mga Salin

Isinalin ito sa Wikang Ngogo ni Zakaria Muhammad

Isara