Check out the new design

ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ * - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ   អាយ៉ាត់:
فِي ٱلدُّنۡيَا وَٱلۡأٓخِرَةِۗ وَيَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡيَتَٰمَىٰۖ قُلۡ إِصۡلَاحٞ لَّهُمۡ خَيۡرٞۖ وَإِن تُخَالِطُوهُمۡ فَإِخۡوَٰنُكُمۡۚ وَٱللَّهُ يَعۡلَمُ ٱلۡمُفۡسِدَ مِنَ ٱلۡمُصۡلِحِۚ وَلَوۡ شَآءَ ٱللَّهُ لَأَعۡنَتَكُمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ عَزِيزٌ حَكِيمٞ
Kati na mokili mpe na mokolo ya suka. Mpe bazali kotuna yo mpona bana bitike. Loba ete: Kosalisa bango ezali na bolamu mingi, soki bosangani na bango, bazali bandeko na bino. Mpe Allah ayebi mobebisi mpe mobongisi. Mpe soki Allah alingaki, nde apesaki bino pasi. Ya sôló Allah azali na bokasi atonda bwanya.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تَنكِحُواْ ٱلۡمُشۡرِكَٰتِ حَتَّىٰ يُؤۡمِنَّۚ وَلَأَمَةٞ مُّؤۡمِنَةٌ خَيۡرٞ مِّن مُّشۡرِكَةٖ وَلَوۡ أَعۡجَبَتۡكُمۡۗ وَلَا تُنكِحُواْ ٱلۡمُشۡرِكِينَ حَتَّىٰ يُؤۡمِنُواْۚ وَلَعَبۡدٞ مُّؤۡمِنٌ خَيۡرٞ مِّن مُّشۡرِكٖ وَلَوۡ أَعۡجَبَكُمۡۗ أُوْلَٰٓئِكَ يَدۡعُونَ إِلَى ٱلنَّارِۖ وَٱللَّهُ يَدۡعُوٓاْ إِلَى ٱلۡجَنَّةِ وَٱلۡمَغۡفِرَةِ بِإِذۡنِهِۦۖ وَيُبَيِّنُ ءَايَٰتِهِۦ لِلنَّاسِ لَعَلَّهُمۡ يَتَذَكَّرُونَ
Mpe bobala te basi oyo basangisi (Allah) kino bakondima, mowumbu ya mwasi mondimi aleki mosangisi (Allah) ya mwasi ata soki asepelisi bino. Bobalisa te na mibali basangisi (Allah) tee kino bandima, mowumbu ya mobali mondimi aleki mopengwi, ata soki asepelisi bino. Baye wana bazali kobenga bato na nzela ya móto. Mpe Allah azali kobenga na lola mpe bolimbisi na ndingisa naye. Mpe azali kolimbola bilembo bia ye na bato mpo bakoka kokanisa.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَيَسۡـَٔلُونَكَ عَنِ ٱلۡمَحِيضِۖ قُلۡ هُوَ أَذٗى فَٱعۡتَزِلُواْ ٱلنِّسَآءَ فِي ٱلۡمَحِيضِ وَلَا تَقۡرَبُوهُنَّ حَتَّىٰ يَطۡهُرۡنَۖ فَإِذَا تَطَهَّرۡنَ فَأۡتُوهُنَّ مِنۡ حَيۡثُ أَمَرَكُمُ ٱللَّهُۚ إِنَّ ٱللَّهَ يُحِبُّ ٱلتَّوَّٰبِينَ وَيُحِبُّ ٱلۡمُتَطَهِّرِينَ
Mpe bazali kotuna yo mpona makila.[1] Loba ete: Yango ezali mbindo. Bozelisa basi o tango wana, mpe bopusana kosangana na bango te kino bakokoma mpeto. Soki bakomi mpeto, bosangana na bango nzoto na bolandi mibeko ya Allah, ya sôló Allah alingaka baye basengaka tubela mpe bamipetolaka.
[1] Ya ekila ya mwasi.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
نِسَآؤُكُمۡ حَرۡثٞ لَّكُمۡ فَأۡتُواْ حَرۡثَكُمۡ أَنَّىٰ شِئۡتُمۡۖ وَقَدِّمُواْ لِأَنفُسِكُمۡۚ وَٱتَّقُواْ ٱللَّهَ وَٱعۡلَمُوٓاْ أَنَّكُم مُّلَٰقُوهُۗ وَبَشِّرِ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Basi na bino bazali bilanga bia bino. Bokota o bilanga bia bino ndenge nyonso bolingi,[1] mpe bosala misala ya malamu mpona milimo na bino. Mpe bobanga Allah, mpe boyeba ete ya sôló bokokutana naye. Pesa sango ya malamu epai ya bandimi.
[1] Kasi na sima na bango te.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
وَلَا تَجۡعَلُواْ ٱللَّهَ عُرۡضَةٗ لِّأَيۡمَٰنِكُمۡ أَن تَبَرُّواْ وَتَتَّقُواْ وَتُصۡلِحُواْ بَيۡنَ ٱلنَّاسِۚ وَٱللَّهُ سَمِيعٌ عَلِيمٞ
Mpe botia nkombo ya Allah te mpona kolapalapa na bino mpo na koluka nzela ya komipekisa kosala (misala) ya malamu, mpe kobanga mpe kobongisa okati na bato. Mpe Allah azali moyoki moyebi ya manso.
តាហ្វសៀរជាភាសា​អារ៉ាប់ជាច្រេីន:
 
ការបកប្រែអត្ថន័យ ជំពូក​: អាល់ហ្ពាក៏រ៉ោះ
សន្ទស្សន៍នៃជំពូក លេខ​ទំព័រ
 
ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ - សន្ទស្សន៍នៃការបកប្រែ

ការបកប្រែដោយហ្សាការីយ៉ា ម៉ូហាំម៉ាត់ជាភាសា Ngogo.

បិទ