Check out the new design

വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ * - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: വാഖിഅഃ   ആയത്ത്:

Al-Wâqi-a

إِذَا وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ
Tango likambo monene ekokweya,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَيۡسَ لِوَقۡعَتِهَا كَاذِبَةٌ
Koya na yango ezali lokuta te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
خَافِضَةٞ رَّافِعَةٌ
Akokitisaka (basusu) mpe akotombolaka (basusu)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِذَا رُجَّتِ ٱلۡأَرۡضُ رَجّٗا
Tango mabele makoninganaka makasi,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَبُسَّتِ ٱلۡجِبَالُ بَسّٗا
Mpe tango bangomba bikokutoamaka mike mike,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَكَانَتۡ هَبَآءٗ مُّنۢبَثّٗا
Mpe mikokoma putulu mizali kopanzana.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكُنتُمۡ أَزۡوَٰجٗا ثَلَٰثَةٗ
Mpe bokozalaka lisanga misato:
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَيۡمَنَةِ
Bato ya ngambu ya loboko ya mobali bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mobali!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡمَشۡـَٔمَةِ
Mpe bato ya ngambu ya loboko ya mwasi bango ba nani bato ya ngambu ya loboko ya mwasi!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَٱلسَّٰبِقُونَ ٱلسَّٰبِقُونَ
Bato ya liboso (baye balandaki mibeko mia Allah na mabele) bakozalaka bato ya liboso na mokolo ya suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أُوْلَٰٓئِكَ ٱلۡمُقَرَّبُونَ
Baye wana nde bakozalaka pene na Allah.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
O kati ya bilanga (bia lola) ya bolamu.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Bazali ebele oyo baponami kowuta na bato ya liboso,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَقَلِيلٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Мре moke okati ya bato ya sima.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
عَلَىٰ سُرُرٖ مَّوۡضُونَةٖ
(Bakolala) likolo lia bambeto bibongisami na wolo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
مُّتَّكِـِٔينَ عَلَيۡهَا مُتَقَٰبِلِينَ
Bayekami likolo na yango bazali kotalana. (na kimia)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
يَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ وِلۡدَٰنٞ مُّخَلَّدُونَ
Kati na yango bilenge mibali bakozalaka wana тропа kosalela bango libela na libela,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بِأَكۡوَابٖ وَأَبَارِيقَ وَكَأۡسٖ مِّن مَّعِينٖ
Mpe bakopo na bitiyelo, mpe nkeni mitondi na masanga ya elengi. (тропа bomeli).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَّا يُصَدَّعُونَ عَنۡهَا وَلَا يُنزِفُونَ
(Masanga wana) ekolangwisaka bango te mpe ekopesaka bango mutu pasi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَفَٰكِهَةٖ مِّمَّا يَتَخَيَّرُونَ
Mpe (bakoliaka) bambuma oyo bakolingaka,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَحۡمِ طَيۡرٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ
Mpe (bakoliaka) lolenge nyoso ya mișuni ya bandeke oyo balingi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَحُورٌ عِينٞ
Mpe bakozalaka na basi ya miso ya minene mpe ya kitoko na kotala,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
كَأَمۡثَٰلِ ٱللُّؤۡلُوِٕ ٱلۡمَكۡنُونِ
Lokola mabanga kitoko ya ebale ezali kongenga,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
جَزَآءَۢ بِمَا كَانُواْ يَعۡمَلُونَ
Lifuta тропа maye basalaki.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَا يَسۡمَعُونَ فِيهَا لَغۡوٗا وَلَا تَأۡثِيمًا
Okati na yango, bakoyoka maloba mabe te, mpe ya pamba pamba te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِلَّا قِيلٗا سَلَٰمٗا سَلَٰمٗا
Bakolobaka se: Liloba ya kimia na kimia.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلۡيَمِينِ
Mpe bato ya loboko ya mobali, ba nani yango bato ya loboko ya mobali!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِي سِدۡرٖ مَّخۡضُودٖ
Bakofanda na nsé ya banzete oyo bizanga nzube. Sidr,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَطَلۡحٖ مَّنضُودٖ
Na banzete ya makemba na bitabe,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَظِلّٖ مَّمۡدُودٖ
Na nsé ya malili ya monene,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَمَآءٖ مَّسۡكُوبٖ
(pene) na mayi oyo ezali kolekana ya libela,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَفَٰكِهَةٖ كَثِيرَةٖ
Mpe bambuma ebele,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَّا مَقۡطُوعَةٖ وَلَا مَمۡنُوعَةٖ
Babuki yango te mpe epekisami te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَفُرُشٖ مَّرۡفُوعَةٍ
O likolo lia bambeto ya likolo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّآ أَنشَأۡنَٰهُنَّ إِنشَآءٗ
Biso nde tokelaki bango na bokeli,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَجَعَلۡنَٰهُنَّ أَبۡكَارًا
Mpe tosalaki bango bayebi mibali te,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
عُرُبًا أَتۡرَابٗا
Bazali bambula ndenge moko.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لِّأَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Mpona bato ya loboko ya mobali.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Baponami ebele bazuami okati ya baye baleka liboso,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَثُلَّةٞ مِّنَ ٱلۡأٓخِرِينَ
Bazali mpe ebele okati ya bato ya suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ مَآ أَصۡحَٰبُ ٱلشِّمَالِ
Мре bato ya ngambu ya loboko ya mwasi, ba nani yango wana!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِي سَمُومٖ وَحَمِيمٖ
Bakozalaka na kati ya mopepe ya moto ya lifelo, mpe na mayi ya moto makasi koleka,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَظِلّٖ مِّن يَحۡمُومٖ
Mpe na nsé ya elili ya milinga ya moyindo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَّا بَارِدٖ وَلَا كَرِيمٍ
(kati na yango) malili te mpe kitoko te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّهُمۡ كَانُواْ قَبۡلَ ذَٰلِكَ مُتۡرَفِينَ
Bazalaki liboso na bomoyi ya kitoko.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكَانُواْ يُصِرُّونَ عَلَى ٱلۡحِنثِ ٱلۡعَظِيمِ
Bazalaki kosala masumu minene mpe kosangisa Allah mingi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَكَانُواْ يَقُولُونَ أَئِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
(Bazali koloba): Soki tokufi tokomi mikuwa mpe putulu, boye tokosekwisamaka lisusu?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Na bankoko ya biso ya yambo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
قُلۡ إِنَّ ٱلۡأَوَّلِينَ وَٱلۡأٓخِرِينَ
Loba: Ya soló, ba oyo ya liboso na ya suka,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَمَجۡمُوعُونَ إِلَىٰ مِيقَٰتِ يَوۡمٖ مَّعۡلُومٖ
Bakosangisama na bokutani ya mokolo moyebani.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ثُمَّ إِنَّكُمۡ أَيُّهَا ٱلضَّآلُّونَ ٱلۡمُكَذِّبُونَ
Na yango bino babungi baye boboyaki kondima (na mokolo ya suka),
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَأٓكِلُونَ مِن شَجَرٖ مِّن زَقُّومٖ
Bokoliaka ya soló, bitape bia nzete ya zaqqúm[1].
[1] Zaqqúm: Bótala na suratu As-Swâffât mokapo: 62.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Mabumu na bino makotondaka na yango.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَشَٰرِبُونَ عَلَيۡهِ مِنَ ٱلۡحَمِيمِ
Sima bokomelaka mayi ya moto ya makasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَشَٰرِبُونَ شُرۡبَ ٱلۡهِيمِ
Bokomelaka (yango) lolenge ibili amelaka na mposa (nyoso).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
هَٰذَا نُزُلُهُمۡ يَوۡمَ ٱلدِّينِ
Wana nde bilei oyo bakoyambaka bango na yango o mokolo ya suka.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
نَحۡنُ خَلَقۡنَٰكُمۡ فَلَوۡلَا تُصَدِّقُونَ
Biso nde tokela bino, kasi тропа nini bozali kondima na mokolo ya suka te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَرَءَيۡتُم مَّا تُمۡنُونَ
Boye bozali kornona te mayi oyo bozali kobimisa yango na mokongo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ءَأَنتُمۡ تَخۡلُقُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
Bino nde bokela yango to biso nde bakeli?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
نَحۡنُ قَدَّرۡنَا بَيۡنَكُمُ ٱلۡمَوۡتَ وَمَا نَحۡنُ بِمَسۡبُوقِينَ
Biso nde tosila кокота liwa kati na bino, mpe eloko moko ekopekisa biso te,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
عَلَىٰٓ أَن نُّبَدِّلَ أَمۡثَٰلَكُمۡ وَنُنشِئَكُمۡ فِي مَا لَا تَعۡلَمُونَ
Mpo totiya na esika na bino (bato) misusu lokola bino, mpe tobotisa bino na lolenge oyo boyebi te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَلَقَدۡ عَلِمۡتُمُ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُولَىٰ فَلَوۡلَا تَذَكَّرُونَ
Mpe bosilaki koyeba bokeli bwa liboso; boye bozali kokanisa te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَرَءَيۡتُم مَّا تَحۡرُثُونَ
Boye bozali kornona biloko oyo bozali kobimisa yango (nanse ya mabele)?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ءَأَنتُمۡ تَزۡرَعُونَهُۥٓ أَمۡ نَحۡنُ ٱلزَّٰرِعُونَ
Ezali bino nde bolonaka yango to biso nde baloni?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَوۡ نَشَآءُ لَجَعَلۡنَٰهُ حُطَٰمٗا فَظَلۡتُمۡ تَفَكَّهُونَ
Soki tolingaki, nde tokomisaki yango makala, nde botikalaki kokamwa. (mpe kobeta misapi sima)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّا لَمُغۡرَمُونَ
Tala biso tokomi na banyongo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
بَلۡ نَحۡنُ مَحۡرُومُونَ
Kasi bapimeli nde biso.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلۡمَآءَ ٱلَّذِي تَشۡرَبُونَ
Boye bozali kornona mayi oyo bozali komela?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ءَأَنتُمۡ أَنزَلۡتُمُوهُ مِنَ ٱلۡمُزۡنِ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنزِلُونَ
Bino nde bokitisaka yango kowuta na mapata to biso nde bakitisi?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَوۡ نَشَآءُ جَعَلۡنَٰهُ أُجَاجٗا فَلَوۡلَا تَشۡكُرُونَ
Soki tolingaki, nde tokomisaki yango mungwa mungwa, boye тропа nini bozali kopesa matondo te? (epai ya Allah).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱلنَّارَ ٱلَّتِي تُورُونَ
Boye bozali kornona moto oyo bozali kopelisa te?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
ءَأَنتُمۡ أَنشَأۡتُمۡ شَجَرَتَهَآ أَمۡ نَحۡنُ ٱلۡمُنشِـُٔونَ
Bino nde bokela nzete yango to biso nde bakeli?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
نَحۡنُ جَعَلۡنَٰهَا تَذۡكِرَةٗ وَمَتَٰعٗا لِّلۡمُقۡوِينَ
Totiyaki yango ezala bokundoli (тропа lolenge lifelo ekozala), mpe esalisa baye bazali na mposa na yango (тропа baye bazali na mobembo)
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
۞ فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَوَٰقِعِ ٱلنُّجُومِ
(Te) nalapi na bisika minzoto mikweyaka,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَإِنَّهُۥ لَقَسَمٞ لَّوۡ تَعۡلَمُونَ عَظِيمٌ
Ya sôló, ezali kolapa ya monene soki boyebaka,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّهُۥ لَقُرۡءَانٞ كَرِيمٞ
Ya soló, kurani oyo ezali na lokumu,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فِي كِتَٰبٖ مَّكۡنُونٖ
Ebatelami kati na buku.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
لَّا يَمَسُّهُۥٓ إِلَّا ٱلۡمُطَهَّرُونَ
Basimbaka yango te sé na bapetoami,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
تَنزِيلٞ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Ekita kowuta epai ya Nkolo ya mokili.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
أَفَبِهَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ أَنتُم مُّدۡهِنُونَ
Boye bozali kozua liloba oyo na lokuta?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَتَجۡعَلُونَ رِزۡقَكُمۡ أَنَّكُمۡ تُكَذِّبُونَ
Boye na lolenge wana nde bokozala na botondi na bozui na bino, ete boboya kondima na kurani?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَوۡلَآ إِذَا بَلَغَتِ ٱلۡحُلۡقُومَ
Tango mpema ekomata tii na mongongo,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَنتُمۡ حِينَئِذٖ تَنظُرُونَ
Mpe tango wana bozali kotala.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَنَحۡنُ أَقۡرَبُ إِلَيۡهِ مِنكُمۡ وَلَٰكِن لَّا تُبۡصِرُونَ
Mpe biso tozali pembeni naye koleka bino, kasi bozali kornona te.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَلَوۡلَآ إِن كُنتُمۡ غَيۡرَ مَدِينِينَ
Boye soki boyebi ete bozali na nsé ya mibeko na biso te (bokosekwisama te, to mpe bokofutama te).
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
تَرۡجِعُونَهَآ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Bozongisa yango (molimo) soki bozali na bosembo?
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُقَرَّبِينَ
Soki akozala na molongo ya bato ya pembeni ya (Allah),
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَرَوۡحٞ وَرَيۡحَانٞ وَجَنَّتُ نَعِيمٖ
(Na yango akozala): Na bopemi mpe ngrásia okati ya lola ya esengo.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
Mpe soki azali o kati ya bato ya loboko ya mobali,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَسَلَٰمٞ لَّكَ مِنۡ أَصۡحَٰبِ ٱلۡيَمِينِ
(Bakoyambaka ye na liloba ya): Kimia ezala nayo, mpo ozali ngambu ya loboko ya mobali!
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَأَمَّآ إِن كَانَ مِنَ ٱلۡمُكَذِّبِينَ ٱلضَّآلِّينَ
Kasi soki azalaki okati ya baye baboyaki mpe babungi,
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَنُزُلٞ مِّنۡ حَمِيمٖ
Akokitisama okati ya mayi ya moto ya makasi.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
وَتَصۡلِيَةُ جَحِيمٍ
Mpe akozikisama okati ya moto.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ حَقُّ ٱلۡيَقِينِ
Wana nde likambo ya soló.
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya monene
അറബി ഖുർആൻ വിവരണങ്ങൾ:
 
പരിഭാഷ അദ്ധ്യായം: വാഖിഅഃ
സൂറത്തുകളുടെ സൂചിക പേജ് നമ്പർ
 
വിശുദ്ധ ഖുർആൻ പരിഭാഷ - ലിംഗാലാ വിവർത്തനം - മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ - വിവർത്തനങ്ങളുടെ സൂചിക

വിവർത്തനം ചെയ്തത് സക്കറിയ മുഹമ്മദ് ബാലിൻഗോഗോ.

അടക്കുക