Check out the new design

Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. * - Ishakiro ry'ibisobanuro

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Baqarat   Umurongo:
۞ مَا نَنسَخۡ مِنۡ ءَايَةٍ أَوۡ نُنسِهَا نَأۡتِ بِخَيۡرٖ مِّنۡهَآ أَوۡ مِثۡلِهَآۗ أَلَمۡ تَعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٌ
106. Soki tobongoli mokapo to tolongoli yango, tokoya na mosusu koleka, to lokola yango. Boye oyebi te ya sôló Allah azali na makoki ya biloko binso?
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَلَمۡ تَعۡلَمۡ أَنَّ ٱللَّهَ لَهُۥ مُلۡكُ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۗ وَمَا لَكُم مِّن دُونِ ٱللَّهِ مِن وَلِيّٖ وَلَا نَصِيرٍ
107. Boye oyebi te ete ya sôló Allah azali na bokonzi ya likolo na mabele, mpe bozali na mobateli mosusu te, mpe mosalisi te liboso ya Allah?
Ibisobanuro by'icyarabu:
أَمۡ تُرِيدُونَ أَن تَسۡـَٔلُواْ رَسُولَكُمۡ كَمَا سُئِلَ مُوسَىٰ مِن قَبۡلُۗ وَمَن يَتَبَدَّلِ ٱلۡكُفۡرَ بِٱلۡإِيمَٰنِ فَقَدۡ ضَلَّ سَوَآءَ ٱلسَّبِيلِ
108. To boye, bolingi kotuna motindami na bino ndenge moko Mûssa atunamaka liboso? Mpe moto oyo akobalola kondima na bopengwi ya sôló ye wana asili kobunga nzela.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَدَّ كَثِيرٞ مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ لَوۡ يَرُدُّونَكُم مِّنۢ بَعۡدِ إِيمَٰنِكُمۡ كُفَّارًا حَسَدٗا مِّنۡ عِندِ أَنفُسِهِم مِّنۢ بَعۡدِ مَا تَبَيَّنَ لَهُمُ ٱلۡحَقُّۖ فَٱعۡفُواْ وَٱصۡفَحُواْ حَتَّىٰ يَأۡتِيَ ٱللَّهُ بِأَمۡرِهِۦٓۗ إِنَّ ٱللَّهَ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٞ
109. Mpe ebele okati ya bato ya buku,(1) bazali kolinga kozongisa bino na sima ya bondimi bwa bino bapengwi na likunya kowuta epai na bango, na sima ya koyebisa bango bosembo, bolimbisa mpe bobosana, kino mibeko mia Allah mikoya, ya sôló Allah azali na bokoki likolo ya biloko binso.
1 Bayuda na baklisto.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَأَقِيمُواْ ٱلصَّلَوٰةَ وَءَاتُواْ ٱلزَّكَوٰةَۚ وَمَا تُقَدِّمُواْ لِأَنفُسِكُم مِّنۡ خَيۡرٖ تَجِدُوهُ عِندَ ٱللَّهِۗ إِنَّ ٱللَّهَ بِمَا تَعۡمَلُونَ بَصِيرٞ
110. Mpe botelemisa losambo, mpe bopesa zakat.(1) mpe bolamu nyoso bokobimisa mpo nabino, bokokuta yango epai ya Allah, ya sôló Allah azali komona manso bozali kosala.
1 Botala na mokapo, 43 na 83.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَقَالُواْ لَن يَدۡخُلَ ٱلۡجَنَّةَ إِلَّا مَن كَانَ هُودًا أَوۡ نَصَٰرَىٰۗ تِلۡكَ أَمَانِيُّهُمۡۗ قُلۡ هَاتُواْ بُرۡهَٰنَكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
111. Mpe balobaki: Moto moko akokota lola te sé azala moyuda to moklisto. Wana ezali makanisi na bango ya lokuta, loba: Bopesa bilembetele bia bino soki bozali na bosembo.
Ibisobanuro by'icyarabu:
بَلَىٰۚ مَنۡ أَسۡلَمَ وَجۡهَهُۥ لِلَّهِ وَهُوَ مُحۡسِنٞ فَلَهُۥٓ أَجۡرُهُۥ عِندَ رَبِّهِۦ وَلَا خَوۡفٌ عَلَيۡهِمۡ وَلَا هُمۡ يَحۡزَنُونَ
112. Te, kasi oyo akomisokia epai na Allah, mpe azali mobongisi, ya sôló ye akozala na lifuta epai ya Nkolo naye. Bobangi mpe mawa ekozala te mpo na bango.
Ibisobanuro by'icyarabu:
 
Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Baqarat
Urutonde rw'amasura numero y'urupapuro
 
Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. - Ishakiro ry'ibisobanuro

Byasobanuwe na Zakariya Muhammad Balngugu.

Gufunga