Check out the new design

Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. * - Ishakiro ry'ibisobanuro

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Baqarat   Umurongo:
ٱلۡحَجُّ أَشۡهُرٞ مَّعۡلُومَٰتٞۚ فَمَن فَرَضَ فِيهِنَّ ٱلۡحَجَّ فَلَا رَفَثَ وَلَا فُسُوقَ وَلَا جِدَالَ فِي ٱلۡحَجِّۗ وَمَا تَفۡعَلُواْ مِنۡ خَيۡرٖ يَعۡلَمۡهُ ٱللَّهُۗ وَتَزَوَّدُواْ فَإِنَّ خَيۡرَ ٱلزَّادِ ٱلتَّقۡوَىٰۖ وَٱتَّقُونِ يَٰٓأُوْلِي ٱلۡأَلۡبَٰبِ
Hajj ezali na basanza biye biyebani, oyo akosala hajj asangana na mwasi te, mpe asala mabe te, aswana te. Mpe na maye bozali kosala ya malamu Allah ayebi yango. Mpe bomilengele, komilengela ya malamu ezali nde bobangi. Bobanga ngai eh bino baye botondi na mayele!
Ibisobanuro by'icyarabu:
لَيۡسَ عَلَيۡكُمۡ جُنَاحٌ أَن تَبۡتَغُواْ فَضۡلٗا مِّن رَّبِّكُمۡۚ فَإِذَآ أَفَضۡتُم مِّنۡ عَرَفَٰتٖ فَٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ عِندَ ٱلۡمَشۡعَرِ ٱلۡحَرَامِۖ وَٱذۡكُرُوهُ كَمَا هَدَىٰكُمۡ وَإِن كُنتُم مِّن قَبۡلِهِۦ لَمِنَ ٱلضَّآلِّينَ
Ezali lisumu te mpona bino koluka bolamu epai ya Nkolo wa bino.[1] Mpe soki bowuti na arafât,[2] bobondela Allah na bisika bisantu. Mpe bokanisa ye na ntina ete asili kokamba bino na nzela ya semba, pamba te bino bozalaki liboso babungi nzela.
[1] Na tango ya mobembo esantu na Makkah.
[2] Ezali esika oyo bamizilima basanganaka na mokolo ya libua na sanza ya hajj pona mabondeli.
Ibisobanuro by'icyarabu:
ثُمَّ أَفِيضُواْ مِنۡ حَيۡثُ أَفَاضَ ٱلنَّاسُ وَٱسۡتَغۡفِرُواْ ٱللَّهَۚ إِنَّ ٱللَّهَ غَفُورٞ رَّحِيمٞ
Sima, boleka na bisika biye bato balekaki, mpe bosenga Allah bolimbisi, ya sôló Allah azali molimbisi moyoki mawa.
Ibisobanuro by'icyarabu:
فَإِذَا قَضَيۡتُم مَّنَٰسِكَكُمۡ فَٱذۡكُرُواْ ٱللَّهَ كَذِكۡرِكُمۡ ءَابَآءَكُمۡ أَوۡ أَشَدَّ ذِكۡرٗاۗ فَمِنَ ٱلنَّاسِ مَن يَقُولُ رَبَّنَآ ءَاتِنَا فِي ٱلدُّنۡيَا وَمَا لَهُۥ فِي ٱلۡأٓخِرَةِ مِنۡ خَلَٰقٖ
Mpe soki bosilisi mabondeli na bino ya hajj, bokanisa Allah ndenge bokanisaka baboti na bino, to bokanisa (Allah) makasi koleka. Mpe ezali na bato basusu awa na mokili balobaka ete: Eh Nkolo! Pesa biso bomengo ya nsé. Mpe bango bakozala na eloko te na mokolo ya suka.
Ibisobanuro by'icyarabu:
وَمِنۡهُم مَّن يَقُولُ رَبَّنَآ ءَاتِنَا فِي ٱلدُّنۡيَا حَسَنَةٗ وَفِي ٱلۡأٓخِرَةِ حَسَنَةٗ وَقِنَا عَذَابَ ٱلنَّارِ
Mpe basusu okati na bango, bazali koloba: Eh Nkolo na biso! pesa biso bomengo ya malamu awa na nsé, mpe bombela biso bomengo ya malamu okati ya lola, mpe obatela biso na etumbu ya móto ya lifelo.
Ibisobanuro by'icyarabu:
أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ نَصِيبٞ مِّمَّا كَسَبُواْۚ وَٱللَّهُ سَرِيعُ ٱلۡحِسَابِ
Ba oyo wana nde bazali na mbano na maye basalaki; mpe Allah azali lombango na kofuta.
Ibisobanuro by'icyarabu:
 
Ibisobanuro by'amagambo Isura: Al Baqarat
Urutonde rw'amasura numero y'urupapuro
 
Ibisobanuro bya qoran ntagatifu - Ibisobanuro bya Qur'an mu rurimi rw'ilingala - Muhammad Balngugu. - Ishakiro ry'ibisobanuro

Byasobanuwe na Zakariya Muhammad Balngugu.

Gufunga