Check out the new design

Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo * - Indise ng mga Salin

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Salin ng mga Kahulugan Surah: As-Sāffāt   Ayah:

As-Swâffât

وَٱلصَّٰٓفَّٰتِ صَفّٗا
Na (ba anzelu) baye batelemi na milongo,
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱلزَّٰجِرَٰتِ زَجۡرٗا
Mpe na baye bazali kotindika na makasi (mapata).[1]
[1] Mpe biloko misusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱلتَّٰلِيَٰتِ ذِكۡرًا
Na baye batangaka bokundoli.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّ إِلَٰهَكُمۡ لَوَٰحِدٞ
Ya soló, Nzambe na bino azali moko.
Ang mga Tafsir na Arabe:
رَّبُّ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ وَمَا بَيۡنَهُمَا وَرَبُّ ٱلۡمَشَٰرِقِ
Nkolo wa likolo na mabele, na maye manso mazuami kati na yango mibale mpe Nkolo wa moniele.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا زَيَّنَّا ٱلسَّمَآءَ ٱلدُّنۡيَا بِزِينَةٍ ٱلۡكَوَاكِبِ
Ya sólo, tobongisaki mapata ya nsé na bonzenga ya minzoto.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَحِفۡظٗا مِّن كُلِّ شَيۡطَٰنٖ مَّارِدٖ
Mpe ebatelami na mabe ya satana motomboki.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَّا يَسَّمَّعُونَ إِلَى ٱلۡمَلَإِ ٱلۡأَعۡلَىٰ وَيُقۡذَفُونَ مِن كُلِّ جَانِبٖ
Mpo bakoka koyoka te epai ya ba anzelu ya likolo, kasi bakobwakelamaka mabanga ngambu inso,
Ang mga Tafsir na Arabe:
دُحُورٗاۖ وَلَهُمۡ عَذَابٞ وَاصِبٌ
Bakobenganama mpe bakozala na etumbu ya libela.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا مَنۡ خَطِفَ ٱلۡخَطۡفَةَ فَأَتۡبَعَهُۥ شِهَابٞ ثَاقِبٞ
Longola sé oyo akolinga kozua (sango) na lolenge ya moyibi, kasi bakolandisaka kobengana ye na libanga ya moto.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَهُمۡ أَشَدُّ خَلۡقًا أَم مَّنۡ خَلَقۡنَآۚ إِنَّا خَلَقۡنَٰهُم مِّن طِينٖ لَّازِبِۭ
Tuna bango, soki kokela bango ezali makasi koleka manso tokela? Te, ya soló, tokelaki bango na mabele ya potopoto oyo ekangaka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
بَلۡ عَجِبۡتَ وَيَسۡخَرُونَ
Kasi soki ozali kokamwa mpe bazali koseka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِذَا ذُكِّرُواْ لَا يَذۡكُرُونَ
Mpe soki bapesami malendisi (kurani), baboyi kokanisa yango. (kotanga yango)
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِذَا رَأَوۡاْ ءَايَةٗ يَسۡتَسۡخِرُونَ
Mpe soki bamoni elembo, bakomi kosalela yango litio.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقَالُوٓاْ إِنۡ هَٰذَآ إِلَّا سِحۡرٞ مُّبِينٌ
Mpe balobi: Oyo ezali bonganga (bondoki) ya polele.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَبۡعُوثُونَ
Soki tokufi tokomi mabele, mpe mikuwa, boye tokosekwisama lisusu?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَوَءَابَآؤُنَا ٱلۡأَوَّلُونَ
Na bankoko na biso ya kala?
Ang mga Tafsir na Arabe:
قُلۡ نَعَمۡ وَأَنتُمۡ دَٰخِرُونَ
Loba: Iyo, bino mpe lokola bokokitisama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَإِنَّمَا هِيَ زَجۡرَةٞ وَٰحِدَةٞ فَإِذَا هُمۡ يَنظُرُونَ
Mpe ekozalaka sé bolengisi moko ya makasi, mpe bakomi kotala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقَالُواْ يَٰوَيۡلَنَا هَٰذَا يَوۡمُ ٱلدِّينِ
Mpe bakomi koloba: Eh mawa na biso! Oyo nde mokolo mwa mbano (ya suka mpe lifuti)
Ang mga Tafsir na Arabe:
هَٰذَا يَوۡمُ ٱلۡفَصۡلِ ٱلَّذِي كُنتُم بِهِۦ تُكَذِّبُونَ
Oyo nde mokolo mwa bokati makambo moye botiaki tembe тропа yango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
۞ ٱحۡشُرُواْ ٱلَّذِينَ ظَلَمُواْ وَأَزۡوَٰجَهُمۡ وَمَا كَانُواْ يَعۡبُدُونَ
Bosangisa babubi na baninga na bango тре baye banso bazalaki kobondela bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
مِن دُونِ ٱللَّهِ فَٱهۡدُوهُمۡ إِلَىٰ صِرَٰطِ ٱلۡجَحِيمِ
Na botiki Allah, mpe bokamba bango na nzela ya lifelo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقِفُوهُمۡۖ إِنَّهُم مَّسۡـُٔولُونَ
Mpe botelemisa bango mpo bakoka kotunama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَا لَكُمۡ لَا تَنَاصَرُونَ
Mpona nini bozali komisunga te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
بَلۡ هُمُ ٱلۡيَوۡمَ مُسۡتَسۡلِمُونَ
Kasi lelo bakoluka kozala na botosi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
Mpe basusu bakobongola bilongi epai ya baninga mpe bakomi komitunana.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالُوٓاْ إِنَّكُمۡ كُنتُمۡ تَأۡتُونَنَا عَنِ ٱلۡيَمِينِ
Bakolobaka: Ezali bino nde bobengaki biso na makasi. (na bopengwi)
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالُواْ بَل لَّمۡ تَكُونُواْ مُؤۡمِنِينَ
(Bakonzi) bakolobaka: Bino moko boboyaki kondima.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَا كَانَ لَنَا عَلَيۡكُم مِّن سُلۡطَٰنِۭۖ بَلۡ كُنتُمۡ قَوۡمٗا طَٰغِينَ
Tozalaki na bokoki epai na bino te, bino moko nde bozalaki bato ya mabe.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَحَقَّ عَلَيۡنَا قَوۡلُ رَبِّنَآۖ إِنَّا لَذَآئِقُونَ
Liloba lia Nkolo wa biso lizali ya soló. Sólo tokomema. (etumbu)
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَأَغۡوَيۡنَٰكُمۡ إِنَّا كُنَّا غَٰوِينَ
Tomemaki bino na libungi, kasi ya soló, tomibungisaki biso moko.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَإِنَّهُمۡ يَوۡمَئِذٖ فِي ٱلۡعَذَابِ مُشۡتَرِكُونَ
Mokolo mona bakosanganaka (bango) banso na etumbu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَفۡعَلُ بِٱلۡمُجۡرِمِينَ
Lolenge wana nde tokosalaka na batomboki.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُمۡ كَانُوٓاْ إِذَا قِيلَ لَهُمۡ لَآ إِلَٰهَ إِلَّا ٱللَّهُ يَسۡتَكۡبِرُونَ
Ya soló, bazalaki soki bayebisi bango nzambe mosusu ya kobondela na bosóló azali te sé Allah, basali lolendo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَيَقُولُونَ أَئِنَّا لَتَارِكُوٓاْ ءَالِهَتِنَا لِشَاعِرٖ مَّجۡنُونِۭ
Mpe bazali koloba: Totika banzambe na biso тропа molobi ntôki oyo тре azali moto ya ligboma?
Ang mga Tafsir na Arabe:
بَلۡ جَآءَ بِٱلۡحَقِّ وَصَدَّقَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Kasi ayaki na bosóló, batindami balobaki bosembo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّكُمۡ لَذَآئِقُواْ ٱلۡعَذَابِ ٱلۡأَلِيمِ
Ya sólo penza, bokomeka etumbu ya makasi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَا تُجۡزَوۡنَ إِلَّا مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
Mpe bokofutama sé kolandana na maye bozalaki kosala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah ba oyo baponama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أُوْلَٰٓئِكَ لَهُمۡ رِزۡقٞ مَّعۡلُومٞ
Bango nde bakozalaka na bolamu oyo eyebani.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَوَٰكِهُ وَهُم مُّكۡرَمُونَ
(Bakoliaka) mbuma mpe bakosepelisaka bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فِي جَنَّٰتِ ٱلنَّعِيمِ
Okati na bilanga (lola) bilamu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
عَلَىٰ سُرُرٖ مُّتَقَٰبِلِينَ
Likolo lia bambeto bizali ya kotalana.
Ang mga Tafsir na Arabe:
يُطَافُ عَلَيۡهِم بِكَأۡسٖ مِّن مَّعِينِۭ
Bakolekiselaka bango коро etondi na mayi ya miluka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
بَيۡضَآءَ لَذَّةٖ لِّلشَّٰرِبِينَ
Ya pembe elengi тропа komela.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَا فِيهَا غَوۡلٞ وَلَا هُمۡ عَنۡهَا يُنزَفُونَ
Ekosalaka bango mabe te, mpe ekolangwisaka te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَعِندَهُمۡ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ عِينٞ
Bakozala na basi ya kitoko pembeni na bango, basi ya miso minene ya kotalatala pembeni te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
كَأَنَّهُنَّ بَيۡضٞ مَّكۡنُونٞ
Bazali lokola pembe ya likei oyo ebatelami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
Basusu bakobaluka kot ala baninga na kotunana.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالَ قَآئِلٞ مِّنۡهُمۡ إِنِّي كَانَ لِي قَرِينٞ
Moko wa bango akolobaka: Ya soló, nazalaki na moninga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
يَقُولُ أَءِنَّكَ لَمِنَ ٱلۡمُصَدِّقِينَ
Akoloba ete: Boye ozalaki okati ya bandimi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَءِذَا مِتۡنَا وَكُنَّا تُرَابٗا وَعِظَٰمًا أَءِنَّا لَمَدِينُونَ
Tango tokokufa mpe tokomi mabele na mikuwa, boye tokotunamaka?
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالَ هَلۡ أَنتُم مُّطَّلِعُونَ
Akolobaka: Boye bolingi kotala na likolo?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱطَّلَعَ فَرَءَاهُ فِي سَوَآءِ ٱلۡجَحِيمِ
Mpe akotalaka likolo mpe akomonaka ye na lifelo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالَ تَٱللَّهِ إِن كِدتَّ لَتُرۡدِينِ
Mpe akoloba: Na nkombo ya Allah, yo nde osali ete ngai nazanga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَوۡلَا نِعۡمَةُ رَبِّي لَكُنتُ مِنَ ٱلۡمُحۡضَرِينَ
Soki ezalaka bolamu bwa Nkolo wa ngai te, mbele nalingaki kozala o kati ya bato ya etumbu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَفَمَا نَحۡنُ بِمَيِّتِينَ
Ezali solo te ete tokokufa te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا مَوۡتَتَنَا ٱلۡأُولَىٰ وَمَا نَحۡنُ بِمُعَذَّبِينَ
Sé ezala kokufa ya biso ya yambo mpe tokozuaka etumbu te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡفَوۡزُ ٱلۡعَظِيمُ
Ya soló, oyo nde elonga enene.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لِمِثۡلِ هَٰذَا فَلۡيَعۡمَلِ ٱلۡعَٰمِلُونَ
Na lolenge ya boye nde esengeli na baye balingi kosala basala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَذَٰلِكَ خَيۡرٞ نُّزُلًا أَمۡ شَجَرَةُ ٱلزَّقُّومِ
Boye wana ezali esika ya malamu тропа kofanda to ezali nzete ya zaqqüm? (ezali nzete wana mbuma na yango ezali bololo ezali o kati ya lifelo, yango nde bilei ya bato ya mabe),
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا جَعَلۡنَٰهَا فِتۡنَةٗ لِّلظَّٰلِمِينَ
Totiyaki yango ezala komekama тропа babubi,
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهَا شَجَرَةٞ تَخۡرُجُ فِيٓ أَصۡلِ ٱلۡجَحِيمِ
Ezali nzete eye ebotaka o kati ya lifelo,
Ang mga Tafsir na Arabe:
طَلۡعُهَا كَأَنَّهُۥ رُءُوسُ ٱلشَّيَٰطِينِ
Mbuma na yango ezali lokola mitu ya basatana.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَإِنَّهُمۡ لَأٓكِلُونَ مِنۡهَا فَمَالِـُٔونَ مِنۡهَا ٱلۡبُطُونَ
Ya soló, esengeli na bango kólia yango тре kotondisa mabumu na bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
ثُمَّ إِنَّ لَهُمۡ عَلَيۡهَا لَشَوۡبٗا مِّنۡ حَمِيمٖ
Sima bakomela mayi ya tofina ya moto.
Ang mga Tafsir na Arabe:
ثُمَّ إِنَّ مَرۡجِعَهُمۡ لَإِلَى ٱلۡجَحِيمِ
Sima lifelo nde esika ya bozongi na bango ya sólo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُمۡ أَلۡفَوۡاْ ءَابَآءَهُمۡ ضَآلِّينَ
Ya soló, bakutaki batata na bango na libungi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَهُمۡ عَلَىٰٓ ءَاثَٰرِهِمۡ يُهۡرَعُونَ
Mpe balandaki sé nzele na bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ ضَلَّ قَبۡلَهُمۡ أَكۡثَرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Мре liboso na bango, ebele ya bankoko na bango basilaki kobunga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ أَرۡسَلۡنَا فِيهِم مُّنذِرِينَ
Tosilaki kotindela bango bakebisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱنظُرۡ كَيۡفَ كَانَ عَٰقِبَةُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tala lolenge ezalaki тропа baye bakebisamaki.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ نَادَىٰنَا نُوحٞ فَلَنِعۡمَ ٱلۡمُجِيبُونَ
Mpe ya soló, Nûh abengaki biso тре toyanolaki ye kitoko.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَنَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥ مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki ye elongo na libota lia ye na etumbu ya monene.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَجَعَلۡنَا ذُرِّيَّتَهُۥ هُمُ ٱلۡبَاقِينَ
Mpe totiyaki ete libota lia ye bazala bakitani.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
سَلَٰمٌ عَلَىٰ نُوحٖ فِي ٱلۡعَٰلَمِينَ
Kimia ezala likolo ya Nûh kati na mokili mobimba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya soló, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso, baye bandima.
Ang mga Tafsir na Arabe:
ثُمَّ أَغۡرَقۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima tobomaki basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
۞ وَإِنَّ مِن شِيعَتِهِۦ لَإِبۡرَٰهِيمَ
Mpe ya soló, Ibrâhîm azalaki moko kati na baye balandaki ye na lingomba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِذۡ جَآءَ رَبَّهُۥ بِقَلۡبٖ سَلِيمٍ
Tango ayaki epai ya Nkolo waye na motema mosantu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِذۡ قَالَ لِأَبِيهِ وَقَوۡمِهِۦ مَاذَا تَعۡبُدُونَ
Tango alobaki na tata waye тре bato naye: Bozali kobondela nini?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَئِفۡكًا ءَالِهَةٗ دُونَ ٱللَّهِ تُرِيدُونَ
Na libungi na bino boluki banzambe mosusu botiki Allah?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَمَا ظَنُّكُم بِرَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Bozali kokanisa nini тропа Nkolo wa molongo?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَنَظَرَ نَظۡرَةٗ فِي ٱلنُّجُومِ
Sima atalaki minzoto na bokebi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَقَالَ إِنِّي سَقِيمٞ
Mpe alobaki ete: Ya soló ngai nazui malali.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَتَوَلَّوۡاْ عَنۡهُ مُدۡبِرِينَ
Bapesi ye mokongo bakei.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَرَاغَ إِلَىٰٓ ءَالِهَتِهِمۡ فَقَالَ أَلَا تَأۡكُلُونَ
Apusani ngambu ya banzambe na bango alobi: Boliaka te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَا لَكُمۡ لَا تَنطِقُونَ
Boye bozali koloba te тропа nini?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَرَاغَ عَلَيۡهِمۡ ضَرۡبَۢا بِٱلۡيَمِينِ
Akei kobeta bango mbata na loboko ya mobali.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَأَقۡبَلُوٓاْ إِلَيۡهِ يَزِفُّونَ
Sima bato bayaki epai naye na lombango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالَ أَتَعۡبُدُونَ مَا تَنۡحِتُونَ
Ayebisi bango: Boye bozali kobondela bikeko biye bosali bino moko?
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَٱللَّهُ خَلَقَكُمۡ وَمَا تَعۡمَلُونَ
Kasi Allah nde akela bino na maye bozali kosala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَالُواْ ٱبۡنُواْ لَهُۥ بُنۡيَٰنٗا فَأَلۡقُوهُ فِي ٱلۡجَحِيمِ
Balobaki ete: Botimola libulu ya moto mpe bobwaka ye na kati.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَأَرَادُواْ بِهِۦ كَيۡدٗا فَجَعَلۡنَٰهُمُ ٱلۡأَسۡفَلِينَ
Basalelaki ye likita kasi tokweisaki bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَقَالَ إِنِّي ذَاهِبٌ إِلَىٰ رَبِّي سَيَهۡدِينِ
Mpe alobaki ete: Ya soló, ngai nakei epai ya Nkolo wa ngai akokamba ngai.
Ang mga Tafsir na Arabe:
رَبِّ هَبۡ لِي مِنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Nkolo, Pesa ngai (mwana) o kati ya bato ya malamu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَبَشَّرۡنَٰهُ بِغُلَٰمٍ حَلِيمٖ
Mpe topesaki ye sango elamu ya mwana mobali ya boboto mingi (Ismail).
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَلَمَّا بَلَغَ مَعَهُ ٱلسَّعۡيَ قَالَ يَٰبُنَيَّ إِنِّيٓ أَرَىٰ فِي ٱلۡمَنَامِ أَنِّيٓ أَذۡبَحُكَ فَٱنظُرۡ مَاذَا تَرَىٰۚ قَالَ يَٰٓأَبَتِ ٱفۡعَلۡ مَا تُؤۡمَرُۖ سَتَجِدُنِيٓ إِن شَآءَ ٱللَّهُ مِنَ ٱلصَّٰبِرِينَ
Мре tango (Ismail) akolaki (Ibrâhîm) alobi: Eh mwana wa ngai! Namoni na ndoto ete nazali kokata yo kingo, omoni ndenge nini? (Ismâîl) alobi: Eh tata wa ngai wa bolingo! Sala lolenge batindi yo, okokuta ngai na bolingi ya Allah, okati ya bakangi mitema.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَلَمَّآ أَسۡلَمَا وَتَلَّهُۥ لِلۡجَبِينِ
Sima ya bango banso mibale kotosa (mibeko mia Allah), alalisi ye mpo ete aboma ye.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَنَٰدَيۡنَٰهُ أَن يَٰٓإِبۡرَٰهِيمُ
Mpe tobelelaki ye ete: Oh Ibrâhîm!
Ang mga Tafsir na Arabe:
قَدۡ صَدَّقۡتَ ٱلرُّءۡيَآۚ إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Osili kokokisa (elaka) ya ndoto, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّ هَٰذَا لَهُوَ ٱلۡبَلَٰٓؤُاْ ٱلۡمُبِينُ
Ya soló, wana ezalaki momekano mwa polele.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَفَدَيۡنَٰهُ بِذِبۡحٍ عَظِيمٖ
Mpe topesaki ye ebwele ya kitoko тропа kosasa.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِبۡرَٰهِيمَ
Kimia ezala likolo ya Ibrâhîm.
Ang mga Tafsir na Arabe:
كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Lolenge wana nde tofutaka babongisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, ye azalaki okati ya bawumbu na biso bandimi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَبَشَّرۡنَٰهُ بِإِسۡحَٰقَ نَبِيّٗا مِّنَ ٱلصَّٰلِحِينَ
Mpe topesaki ye sango elamu ya kobotama ya Is’háq, ntoma okati ya (bato) malamu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَبَٰرَكۡنَا عَلَيۡهِ وَعَلَىٰٓ إِسۡحَٰقَۚ وَمِن ذُرِّيَّتِهِمَا مُحۡسِنٞ وَظَالِمٞ لِّنَفۡسِهِۦ مُبِينٞ
Mpe topambolaki ye na Is’háq, na libota lia bango mibale oyo ezalaki na (bato ya malamu) mpe oyo akomibuba etali sé ye moko.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ مَنَنَّا عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Mpe ya sólo, tosilaki kopesa na Mûssa na Hânına bolamu na biso.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَنَجَّيۡنَٰهُمَا وَقَوۡمَهُمَا مِنَ ٱلۡكَرۡبِ ٱلۡعَظِيمِ
Mpe tobikisaki bango mibale elongo na bato na bango na etumbu ya monene.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَنَصَرۡنَٰهُمۡ فَكَانُواْ هُمُ ٱلۡغَٰلِبِينَ
Mpe tolongisaki bango, mpe bango nde bazalaki balongi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَءَاتَيۡنَٰهُمَا ٱلۡكِتَٰبَ ٱلۡمُسۡتَبِينَ
Mpe topesaki bango buku ya polele.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَهَدَيۡنَٰهُمَا ٱلصِّرَٰطَ ٱلۡمُسۡتَقِيمَ
Mpe tokambaki bango mibale na nzela ya semba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِمَا فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe nkombo ya bango mibale ezala bokanisi тропа basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
سَلَٰمٌ عَلَىٰ مُوسَىٰ وَهَٰرُونَ
Kimia ezala likolo ya Mûssa na Háruna.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُمَا مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya soló, bango mibale bazalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّ إِلۡيَاسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Мре ya sólo IL’YÁS azalaki moko okati ya batindami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِذۡ قَالَ لِقَوۡمِهِۦٓ أَلَا تَتَّقُونَ
Tango alobaki na bato naye: Boye bokobanga te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَتَدۡعُونَ بَعۡلٗا وَتَذَرُونَ أَحۡسَنَ ٱلۡخَٰلِقِينَ
Boye bozali kokumisa ba’alan (nkombo ya ekeko), mpe botiki mokeli malamu?
Ang mga Tafsir na Arabe:
ٱللَّهَ رَبَّكُمۡ وَرَبَّ ءَابَآئِكُمُ ٱلۡأَوَّلِينَ
Allah nde Nkolo wa bino, mpe Nkolo ya bankoko ya bino ya kala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَكَذَّبُوهُ فَإِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Baboyaki kondimela ye, kasi bakomemama o kati ya etumbu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَتَرَكۡنَا عَلَيۡهِ فِي ٱلۡأٓخِرِينَ
Mpe totikaki nkombo naye ezala bokundoli epai ya basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
سَلَٰمٌ عَلَىٰٓ إِلۡ يَاسِينَ
Kimia ezala likolo ya Il’yâsîn na balandi ye.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّا كَذَٰلِكَ نَجۡزِي ٱلۡمُحۡسِنِينَ
Ya sólo, lolenge wana nde tofutaka babongisi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُۥ مِنۡ عِبَادِنَا ٱلۡمُؤۡمِنِينَ
Ya sólo, ye azalaki okati ya bawumbu na biso ya bandimi.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّ لُوطٗا لَّمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Mpe ya sólo, Loth azalaki okati ya batindami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِذۡ نَجَّيۡنَٰهُ وَأَهۡلَهُۥٓ أَجۡمَعِينَ
Tango tolongisaki ye na libota lia ye mobimba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا عَجُوزٗا فِي ٱلۡغَٰبِرِينَ
Longola sé mobange ya mwasi azalaki okati ya batikali.
Ang mga Tafsir na Arabe:
ثُمَّ دَمَّرۡنَا ٱلۡأٓخَرِينَ
Sima tobebisaki basusu.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّكُمۡ لَتَمُرُّونَ عَلَيۡهِم مُّصۡبِحِينَ
Ya soló, bino bozali koleka pembeni na bango na tongo (nzela ya mobembo).
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَبِٱلَّيۡلِۚ أَفَلَا تَعۡقِلُونَ
Mpe kati na butu, boye bozali kokanisa te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّ يُونُسَ لَمِنَ ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Mpe ya soló, Yûnus azalaki moko o kati ya batindami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِذۡ أَبَقَ إِلَى ٱلۡفُلۡكِ ٱلۡمَشۡحُونِ
Tango akimaki akei komata na masuwa oyo etondaki mingi, (elingaki kozinda)
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَسَاهَمَ فَكَانَ مِنَ ٱلۡمُدۡحَضِينَ
Mpe aponamaki été abwakama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱلۡتَقَمَهُ ٱلۡحُوتُ وَهُوَ مُلِيمٞ
Mpe mbisi emelaki ye mpo été atikaki bato na ndingisa ya Allah te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَلَوۡلَآ أَنَّهُۥ كَانَ مِنَ ٱلۡمُسَبِّحِينَ
Soki azalaki te moko o kati ya bakumisi Allah,
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَلَبِثَ فِي بَطۡنِهِۦٓ إِلَىٰ يَوۡمِ يُبۡعَثُونَ
Mbele alingaki kotikala okati ya libumu lia ye (mbisi) kino o mokolo mwa lisekwa.
Ang mga Tafsir na Arabe:
۞ فَنَبَذۡنَٰهُ بِٱلۡعَرَآءِ وَهُوَ سَقِيمٞ
Tobimisaki ye na mabele bolumbu mpe na nsoni.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَنۢبَتۡنَا عَلَيۡهِ شَجَرَةٗ مِّن يَقۡطِينٖ
Mpe tobotisaki matiti ya maboke likolo naye. (esika afandaki)
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَرۡسَلۡنَٰهُ إِلَىٰ مِاْئَةِ أَلۡفٍ أَوۡ يَزِيدُونَ
Mpe na sima totindaki ye epai ya bato nkama nkoto to mpe ebele koleka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَـَٔامَنُواْ فَمَتَّعۡنَٰهُمۡ إِلَىٰ حِينٖ
Mpe bandimaki, kasi topesaki bango bosepeli ya mwa ngonga ya moke.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَٱسۡتَفۡتِهِمۡ أَلِرَبِّكَ ٱلۡبَنَاتُ وَلَهُمُ ٱلۡبَنُونَ
Tuna bango motuna, boye Nkolo wayo azalaka na bana basi mpe bango bazali na bana mibali?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَمۡ خَلَقۡنَا ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ إِنَٰثٗا وَهُمۡ شَٰهِدُونَ
То boye, tokelaki ba anzelu bazala basi mpe bango bazali kornona?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَلَآ إِنَّهُم مِّنۡ إِفۡكِهِمۡ لَيَقُولُونَ
Ya soló, bazali koloba sé na lokuta na bango.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَدَ ٱللَّهُ وَإِنَّهُمۡ لَكَٰذِبُونَ
(Bazali koloba) ete: Allah abota, ya solo bazali na lokuta.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَصۡطَفَى ٱلۡبَنَاتِ عَلَى ٱلۡبَنِينَ
Boye akopona bana basi koleka bana mibali?
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَا لَكُمۡ كَيۡفَ تَحۡكُمُونَ
Mpona nini bozali kokata likambo na lolenge wana?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَفَلَا تَذَكَّرُونَ
Boye bozali kokanisa te?
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَمۡ لَكُمۡ سُلۡطَٰنٞ مُّبِينٞ
То bozali na bilembetele bisusu bia polele?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَأۡتُواْ بِكِتَٰبِكُمۡ إِن كُنتُمۡ صَٰدِقِينَ
Boya na buku na bino, soki bozali koloba bosôló.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَجَعَلُواْ بَيۡنَهُۥ وَبَيۡنَ ٱلۡجِنَّةِ نَسَبٗاۚ وَلَقَدۡ عَلِمَتِ ٱلۡجِنَّةُ إِنَّهُمۡ لَمُحۡضَرُونَ
Mpe bati bondeko kati naye na bilima, kasi bilima bayebi ete bazali (bapengwi) mpe ete bakomemama (na etumbu).
Ang mga Tafsir na Arabe:
سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يَصِفُونَ
Nkembo na Allah wa likolo, mpona maye bazali koloba,
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Longola sé bawumbu ya Allah baye baponama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَإِنَّكُمۡ وَمَا تَعۡبُدُونَ
Ya soló, bino na baye bozali kobondela.
Ang mga Tafsir na Arabe:
مَآ أَنتُمۡ عَلَيۡهِ بِفَٰتِنِينَ
Bozali na nguya ya kobungisa moto moko te.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِلَّا مَنۡ هُوَ صَالِ ٱلۡجَحِيمِ
Longola sé oyo akozikisama na moto.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَمَا مِنَّآ إِلَّا لَهُۥ مَقَامٞ مَّعۡلُومٞ
Moko te okati na biso, sé azali na esika eyebani.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلصَّآفُّونَ
Mpe ya soló, tozali komitelemisa na milongo.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّا لَنَحۡنُ ٱلۡمُسَبِّحُونَ
Mpe ya soló, biso nde tozali kopesa lokumu (ya Allah).
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِن كَانُواْ لَيَقُولُونَ
Ata soki bazalaki koloba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَوۡ أَنَّ عِندَنَا ذِكۡرٗا مِّنَ ٱلۡأَوَّلِينَ
Soki tokanisaka bato ya kala.
Ang mga Tafsir na Arabe:
لَكُنَّا عِبَادَ ٱللَّهِ ٱلۡمُخۡلَصِينَ
Tolingaki kozala bawumbu ya Allah baye baponama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَكَفَرُواْ بِهِۦۖ فَسَوۡفَ يَعۡلَمُونَ
Bapengwaki na yango, kasi bakomonaka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَلَقَدۡ سَبَقَتۡ كَلِمَتُنَا لِعِبَادِنَا ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Na yango, tosilaka kopesa liloba lia biso epai ya bawumbu na biso batindami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
إِنَّهُمۡ لَهُمُ ٱلۡمَنصُورُونَ
Ya sólo, ezali bango nde bakosalisama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَإِنَّ جُندَنَا لَهُمُ ٱلۡغَٰلِبُونَ
Mpe ya soló, basoda na biso nde bakolonga.
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينٖ
Mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَبۡصِرۡهُمۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Мре tala bango, mosika te bakomona.
Ang mga Tafsir na Arabe:
أَفَبِعَذَابِنَا يَسۡتَعۡجِلُونَ
Nini boye bazali kowelisa etumbu na biso?
Ang mga Tafsir na Arabe:
فَإِذَا نَزَلَ بِسَاحَتِهِمۡ فَسَآءَ صَبَاحُ ٱلۡمُنذَرِينَ
Tango bakokweyaka na bisika bia bango, tango wana ekozala mabe тропа bango oyo basilaki kokebisama.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَتَوَلَّ عَنۡهُمۡ حَتَّىٰ حِينٖ
Mpe mitiya mosika na bango, kino ngonga moko boye.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَأَبۡصِرۡ فَسَوۡفَ يُبۡصِرُونَ
Mpe tala, kala mingi te bakomonaka.
Ang mga Tafsir na Arabe:
سُبۡحَٰنَ رَبِّكَ رَبِّ ٱلۡعِزَّةِ عَمَّا يَصِفُونَ
Nkembo ya Nkolo wayo, Nkolo ya nguya тропа maye bazali koloba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَسَلَٰمٌ عَلَى ٱلۡمُرۡسَلِينَ
Kimia ezala likolo lia batindami.
Ang mga Tafsir na Arabe:
وَٱلۡحَمۡدُ لِلَّهِ رَبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
Mpe lokumu ya Allah, Nkolo wa molongo mobimba.
Ang mga Tafsir na Arabe:
 
Salin ng mga Kahulugan Surah: As-Sāffāt
Indise ng mga Surah Numero ng Pahina
 
Salin ng mga Kahulugan ng Marangal na Qur'an - Salin sa Wikang Lingala ni Muhammad Balngogo - Indise ng mga Salin

Isinalin ito sa Wikang Ngogo ni Zakaria Muhammad

Isara