Check out the new design

《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 艾哈拉布   段:
مِّنَ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ رِجَالٞ صَدَقُواْ مَا عَٰهَدُواْ ٱللَّهَ عَلَيۡهِۖ فَمِنۡهُم مَّن قَضَىٰ نَحۡبَهُۥ وَمِنۡهُم مَّن يَنتَظِرُۖ وَمَا بَدَّلُواْ تَبۡدِيلٗا
23. O kati ya bandimi, ezali na mibali ya bosembo, baye bakokisaki elaka na bango epai ya Allah. Basusu kati na bango mokano ya liwa ekomeli bango, basusu bazali kozela mpe oyo ya bango, kasi babongolaki te.
阿拉伯语经注:
لِّيَجۡزِيَ ٱللَّهُ ٱلصَّٰدِقِينَ بِصِدۡقِهِمۡ وَيُعَذِّبَ ٱلۡمُنَٰفِقِينَ إِن شَآءَ أَوۡ يَتُوبَ عَلَيۡهِمۡۚ إِنَّ ٱللَّهَ كَانَ غَفُورٗا رَّحِيمٗا
24. Mpo Allah afuta baye bazali koloba solo na bosôló bwa bango, mpe apesa etumbu na bato ya bilongi mibale soki alingi, to akolimbisa bango. Ya soló Allah azali molimbisi atonda ngolu.
阿拉伯语经注:
وَرَدَّ ٱللَّهُ ٱلَّذِينَ كَفَرُواْ بِغَيۡظِهِمۡ لَمۡ يَنَالُواْ خَيۡرٗاۚ وَكَفَى ٱللَّهُ ٱلۡمُؤۡمِنِينَ ٱلۡقِتَالَۚ وَكَانَ ٱللَّهُ قَوِيًّا عَزِيزٗا
25. Mpe Allah azongisaki mabe na bango (bapengwi), mpe bazuaki litomba moko te. Kasi Allah akoki na bandimi na bitumba (mpe asalisaka bango), mpe Allah azali makasi atonda nguya.
阿拉伯语经注:
وَأَنزَلَ ٱلَّذِينَ ظَٰهَرُوهُم مِّنۡ أَهۡلِ ٱلۡكِتَٰبِ مِن صَيَاصِيهِمۡ وَقَذَفَ فِي قُلُوبِهِمُ ٱلرُّعۡبَ فَرِيقٗا تَقۡتُلُونَ وَتَأۡسِرُونَ فَرِيقٗا
26. Mpe Allah, akitisaki basungi na bango ya bayuda okati na bandako na bango, kasi bazuaki bolamu te kati ya bato babuku mpe akotisaki bobangi ya makasi kati na mitema mia bango, bobomaki basusu kati na bango, mpe basusu bokangaki na boloko.
阿拉伯语经注:
وَأَوۡرَثَكُمۡ أَرۡضَهُمۡ وَدِيَٰرَهُمۡ وَأَمۡوَٰلَهُمۡ وَأَرۡضٗا لَّمۡ تَطَـُٔوهَاۚ وَكَانَ ٱللَّهُ عَلَىٰ كُلِّ شَيۡءٖ قَدِيرٗا
27. Mpe akitanisaki bino mabele na bango, bandako na bomengo na bango, mpe mabele mosusu oyo naino bonyati yango te, mpe Allah azali na makoki likolo ya biloko binso.
阿拉伯语经注:
يَٰٓأَيُّهَا ٱلنَّبِيُّ قُل لِّأَزۡوَٰجِكَ إِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا وَزِينَتَهَا فَتَعَالَيۡنَ أُمَتِّعۡكُنَّ وَأُسَرِّحۡكُنَّ سَرَاحٗا جَمِيلٗا
28. Eh ntoma! Loba na basi nayo: Soki bolingi bomoyi ya mokili na bisengo bia yango, boya napesa bino yango mpe nakabwana na bino na lolenge ya malamu.
阿拉伯语经注:
وَإِن كُنتُنَّ تُرِدۡنَ ٱللَّهَ وَرَسُولَهُۥ وَٱلدَّارَ ٱلۡأٓخِرَةَ فَإِنَّ ٱللَّهَ أَعَدَّ لِلۡمُحۡسِنَٰتِ مِنكُنَّ أَجۡرًا عَظِيمٗا
29. Kasi soki bolingi Allah na motindami waye, na efandelo ya mokolo ya suka, ya soló Allah abombeli babongisi kati na bino (basi) lifuta linene.
阿拉伯语经注:
يَٰنِسَآءَ ٱلنَّبِيِّ مَن يَأۡتِ مِنكُنَّ بِفَٰحِشَةٖ مُّبَيِّنَةٖ يُضَٰعَفۡ لَهَا ٱلۡعَذَابُ ضِعۡفَيۡنِۚ وَكَانَ ذَٰلِكَ عَلَى ٱللَّهِ يَسِيرٗا
30. Eh basi ya ntoma! Oyó kati na bino akoya na mabe oyo ezali polele na bilembo bimonani, tokobakisela ye etumbu mbala mibale. Mpe wana ezali pete тропа Allah.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 艾哈拉布
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 穆罕默德·比里昂乌 - 译解目录

扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译。

关闭