《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 图勒   段:

At-Tûr (NGOMBA)

وَٱلطُّورِ
1. Na ngomba ya at’tur.(1)
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
阿拉伯语经注:
وَكِتَٰبٖ مَّسۡطُورٖ
2. Na buku oyo ekomama (na ba anzelu).
阿拉伯语经注:
فِي رَقّٖ مَّنشُورٖ
3. Likolo ya ekomami ya polele.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡبَيۡتِ ٱلۡمَعۡمُورِ
4. Na ndako oyo etondama.
阿拉伯语经注:
وَٱلسَّقۡفِ ٱلۡمَرۡفُوعِ
5. Mpe na likolo lolenge etombwama.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡبَحۡرِ ٱلۡمَسۡجُورِ
6. Мре na ebale ya kotonda.
阿拉伯语经注:
إِنَّ عَذَابَ رَبِّكَ لَوَٰقِعٞ
7. Ya soló, etumbu ya Nkolo nayo ekokokisama.
阿拉伯语经注:
مَّا لَهُۥ مِن دَافِعٖ
8. Ekozala na moto ya kopekisa yango te.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ تَمُورُ ٱلسَّمَآءُ مَوۡرٗا
9. Mokolo likolo likoningana.
阿拉伯语经注:
وَتَسِيرُ ٱلۡجِبَالُ سَيۡرٗا
10. Mpe bangomba bikotambola.
阿拉伯语经注:
فَوَيۡلٞ يَوۡمَئِذٖ لِّلۡمُكَذِّبِينَ
11. Mpasi ekozalaka mokolo wana epai ya babuki lokuta.
阿拉伯语经注:
ٱلَّذِينَ هُمۡ فِي خَوۡضٖ يَلۡعَبُونَ
12. Baye bazalaki na komibuaka na kati ya masano.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ يُدَعُّونَ إِلَىٰ نَارِ جَهَنَّمَ دَعًّا
13. Mokolo oyo bakobendaka bango na makasi na lifelo.
阿拉伯语经注:
هَٰذِهِ ٱلنَّارُ ٱلَّتِي كُنتُم بِهَا تُكَذِّبُونَ
14. Oyo nde lifelo oyo bozalaki kotiyela yango tembe.
阿拉伯语经注:
أَفَسِحۡرٌ هَٰذَآ أَمۡ أَنتُمۡ لَا تُبۡصِرُونَ
15. Boye oyo mpe ezali kindoki to bozali kornona malamu te?
阿拉伯语经注:
ٱصۡلَوۡهَا فَٱصۡبِرُوٓاْ أَوۡ لَا تَصۡبِرُواْ سَوَآءٌ عَلَيۡكُمۡۖ إِنَّمَا تُجۡزَوۡنَ مَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
16. Bôžika kati na yango, bozala na bozeli to te, bokozala sé ndenge moko. Bokofutama sé kolandana na oyo bozalaki kosala.
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَنَعِيمٖ
17. Ya sôló, babangi bakozalaka o kati ya lola na bolamu na bango.
阿拉伯语经注:
فَٰكِهِينَ بِمَآ ءَاتَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ وَوَقَىٰهُمۡ رَبُّهُمۡ عَذَابَ ٱلۡجَحِيمِ
18. Bakomisepelisa na oyo Nkolo wa bango akopesa bango, mpe Nkolo wa bango akobatela bango na etumbu ya lifelo.
阿拉伯语经注:
كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَا كُنتُمۡ تَعۡمَلُونَ
19. Bolia bomela na mposa na biso, тропа lifuta ya maye bosalaki.
阿拉伯语经注:
مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ سُرُرٖ مَّصۡفُوفَةٖۖ وَزَوَّجۡنَٰهُم بِحُورٍ عِينٖ
20. Mpe bayekami likolo ya bambeto ebongisama kitoko, mpe tokobalisa bango basi ya kitoko ya miso ya minene ya moyindo.
阿拉伯语经注:
وَٱلَّذِينَ ءَامَنُواْ وَٱتَّبَعَتۡهُمۡ ذُرِّيَّتُهُم بِإِيمَٰنٍ أَلۡحَقۡنَا بِهِمۡ ذُرِّيَّتَهُمۡ وَمَآ أَلَتۡنَٰهُم مِّنۡ عَمَلِهِم مِّن شَيۡءٖۚ كُلُّ ٱمۡرِيِٕۭ بِمَا كَسَبَ رَهِينٞ
21. Mpe тропа baye bandima mpe mabota na bango elandi bango na bondimi; tokolandisela bango mabota na bango, mpe tokokutolaka maye basalaki ata токе te okati ya misala mia bango. Moto nyoso akotunamaka na makambo naye.
阿拉伯语经注:
وَأَمۡدَدۡنَٰهُم بِفَٰكِهَةٖ وَلَحۡمٖ مِّمَّا يَشۡتَهُونَ
22. Mpe tokopesaka bango bambuma mpe mișuni (ya kolia) oyo bakolinga.
阿拉伯语经注:
يَتَنَٰزَعُونَ فِيهَا كَأۡسٗا لَّا لَغۡوٞ فِيهَا وَلَا تَأۡثِيمٞ
23. Nkeni moko ekotambola kati kati na bango, ekopesa bilobela lobela te mpe lisumu te.
阿拉伯语经注:
۞ وَيَطُوفُ عَلَيۡهِمۡ غِلۡمَانٞ لَّهُمۡ كَأَنَّهُمۡ لُؤۡلُؤٞ مَّكۡنُونٞ
24. Okati na bango, bilenge mibali bakotelamaka тропа kosalela bango, bazali kongenga lokola mabanga kitoko na bongengi.
阿拉伯语经注:
وَأَقۡبَلَ بَعۡضُهُمۡ عَلَىٰ بَعۡضٖ يَتَسَآءَلُونَ
25. Mpe bakobalukaka bango na bango bazali kotunana.
阿拉伯语经注:
قَالُوٓاْ إِنَّا كُنَّا قَبۡلُ فِيٓ أَهۡلِنَا مُشۡفِقِينَ
26. Bakoloba ete: Ya soló, tofandaki okati ya mabota ma biso na bobangi (Allah)
阿拉伯语经注:
فَمَنَّ ٱللَّهُ عَلَيۡنَا وَوَقَىٰنَا عَذَابَ ٱلسَّمُومِ
27. Yango Allah apesi biso mpe abateli biso na etumbu ya lifelo.
阿拉伯语经注:
إِنَّا كُنَّا مِن قَبۡلُ نَدۡعُوهُۖ إِنَّهُۥ هُوَ ٱلۡبَرُّ ٱلرَّحِيمُ
28. Ya sólo, tozalaki kobondela ye, ya sólo, ye azali malamu mpe atonda mawa.
阿拉伯语经注:
فَذَكِّرۡ فَمَآ أَنتَ بِنِعۡمَتِ رَبِّكَ بِكَاهِنٖ وَلَا مَجۡنُونٍ
29. Kundola тропа bolamu ya Nkolo nayo, ozali nganga te mpe ozali ligboma te.
阿拉伯语经注:
أَمۡ يَقُولُونَ شَاعِرٞ نَّتَرَبَّصُ بِهِۦ رَيۡبَ ٱلۡمَنُونِ
30. То bazali koloba ete: Azali mokomi ntoki, tozela likama naye ya liwa.
阿拉伯语经注:
قُلۡ تَرَبَّصُواْ فَإِنِّي مَعَكُم مِّنَ ٱلۡمُتَرَبِّصِينَ
31. Loba: Bozela, ngai mpe na bino mpe tozali kozela.
阿拉伯语经注:
أَمۡ تَأۡمُرُهُمۡ أَحۡلَٰمُهُم بِهَٰذَآۚ أَمۡ هُمۡ قَوۡمٞ طَاغُونَ
32. То boye bamposa na bango ezali kotinda na lolenge wana, to boye bazali nde batomboki?
阿拉伯语经注:
أَمۡ يَقُولُونَ تَقَوَّلَهُۥۚ بَل لَّا يُؤۡمِنُونَ
33. To bazali koloba ete: Asalaki yango na ndenge naye moko? Kasi bazali kondima na yango te.
阿拉伯语经注:
فَلۡيَأۡتُواْ بِحَدِيثٖ مِّثۡلِهِۦٓ إِن كَانُواْ صَٰدِقِينَ
34. (Malamu) baya na makambo mosusu ezala lokola yango, soki ya soló, bazali na bosembo.
阿拉伯语经注:
أَمۡ خُلِقُواْ مِنۡ غَيۡرِ شَيۡءٍ أَمۡ هُمُ ٱلۡخَٰلِقُونَ
35. To bakelamaki kowuta na eloko moko te, to bango nde bakeli.
阿拉伯语经注:
أَمۡ خَلَقُواْ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضَۚ بَل لَّا يُوقِنُونَ
36. To bango nde bakela likolo na nsé? Kasi bazali kondima te?
阿拉伯语经注:
أَمۡ عِندَهُمۡ خَزَآئِنُ رَبِّكَ أَمۡ هُمُ ٱلۡمُصَۜيۡطِرُونَ
37. To bazali na sanduku ya bozui ya Nkolo nayo, to baleki ye na nyoso?
阿拉伯语经注:
أَمۡ لَهُمۡ سُلَّمٞ يَسۡتَمِعُونَ فِيهِۖ فَلۡيَأۡتِ مُسۡتَمِعُهُم بِسُلۡطَٰنٖ مُّبِينٍ
38. To bazali na emateli ya likolo mpo baya koyokamela? Kasi moyokameli na bango aya na elembo na yango ya polele.
阿拉伯语经注:
أَمۡ لَهُ ٱلۡبَنَٰتُ وَلَكُمُ ٱلۡبَنُونَ
39. To (Allah) azali na bana basi mpe bino bozali na bana mibali?!
阿拉伯语经注:
أَمۡ تَسۡـَٔلُهُمۡ أَجۡرٗا فَهُم مِّن مَّغۡرَمٖ مُّثۡقَلُونَ
40. To azali kosenga bango lifuta oyo ezali kopesa bango pasi тропа kofuta?
阿拉伯语经注:
أَمۡ عِندَهُمُ ٱلۡغَيۡبُ فَهُمۡ يَكۡتُبُونَ
41. To bazali na boyebi ya mabombami nde bazali кокота yango?
阿拉伯语经注:
أَمۡ يُرِيدُونَ كَيۡدٗاۖ فَٱلَّذِينَ كَفَرُواْ هُمُ ٱلۡمَكِيدُونَ
42. To bazali kosala likita ya mabe? Kasi likita ya bapengwi ezongelaka sé bango moko.
阿拉伯语经注:
أَمۡ لَهُمۡ إِلَٰهٌ غَيۡرُ ٱللَّهِۚ سُبۡحَٰنَ ٱللَّهِ عَمَّا يُشۡرِكُونَ
43. To bazali na nzambe mosusu na botiki Allah? Lokumu na Allah aleki oyo bazali kosangisa.
阿拉伯语经注:
وَإِن يَرَوۡاْ كِسۡفٗا مِّنَ ٱلسَّمَآءِ سَاقِطٗا يَقُولُواْ سَحَابٞ مَّرۡكُومٞ
44. Mpe soki bamoni ndambu ya likolo ekweyi (etumbu enene), balobi: Wana ezali nde mapata ekangama.
阿拉伯语经注:
فَذَرۡهُمۡ حَتَّىٰ يُلَٰقُواْ يَوۡمَهُمُ ٱلَّذِي فِيهِ يُصۡعَقُونَ
45. Tika bango kino bakokutanaka na mokolo na bango oyo bakobetamaka na nkake.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ لَا يُغۡنِي عَنۡهُمۡ كَيۡدُهُمۡ شَيۡـٔٗا وَلَا هُمۡ يُنصَرُونَ
46. Mokolo oyo likita ya mabe na bango likosalisa bango na eloko moko te, mpe bakozuaka lisungi te.
阿拉伯语经注:
وَإِنَّ لِلَّذِينَ ظَلَمُواْ عَذَابٗا دُونَ ذَٰلِكَ وَلَٰكِنَّ أَكۡثَرَهُمۡ لَا يَعۡلَمُونَ
47. Ya soló, babubi bakozala na etumbu mosusu likolo ya oyo ya liboso, kasi ebele na bango bazali koyeba te.
阿拉伯语经注:
وَٱصۡبِرۡ لِحُكۡمِ رَبِّكَ فَإِنَّكَ بِأَعۡيُنِنَاۖ وَسَبِّحۡ بِحَمۡدِ رَبِّكَ حِينَ تَقُومُ
48. Mpe kanga motema тропа kozela motindo ya Nkolo nayo, mpo ete ya sólo, yo ozali na nsé ya ebateli na biso. Mpe sanzola lokumu ya Nkolo nayo tango ozali kotelema.
阿拉伯语经注:
وَمِنَ ٱلَّيۡلِ فَسَبِّحۡهُ وَإِدۡبَٰرَ ٱلنُّجُومِ
49. Mpe kumisa ye (Allah) okati ya eteni ya butu, mpe otango minzoto mizali kolimwa.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 图勒
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭