《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 嘎姆勒   段:

Al-Qamar (Sanza)

ٱقۡتَرَبَتِ ٱلسَّاعَةُ وَٱنشَقَّ ٱلۡقَمَرُ
1. Ngonga epusani mpe sanza epasuki.
阿拉伯语经注:
وَإِن يَرَوۡاْ ءَايَةٗ يُعۡرِضُواْ وَيَقُولُواْ سِحۡرٞ مُّسۡتَمِرّٞ
2. Mpe soki bamoni elembo bazali koboya mpe balobi ete: Oyo ezali bonganga ya makasi.
阿拉伯语经注:
وَكَذَّبُواْ وَٱتَّبَعُوٓاْ أَهۡوَآءَهُمۡۚ وَكُلُّ أَمۡرٖ مُّسۡتَقِرّٞ
3. Mpe baboyi kondima balandi makambo na bango moko, nzoka nde likambo nyoso lizali na suka na yango.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّنَ ٱلۡأَنۢبَآءِ مَا فِيهِ مُزۡدَجَرٌ
4. Mpe basango bisilaki koyela bango, basango ya kopekisa bango (mabe),
阿拉伯语经注:
حِكۡمَةُۢ بَٰلِغَةٞۖ فَمَا تُغۡنِ ٱلنُّذُرُ
5. Wana ezali bwanya (bolamu), kasi makebisi esali bango eloko te.
阿拉伯语经注:
فَتَوَلَّ عَنۡهُمۡۘ يَوۡمَ يَدۡعُ ٱلدَّاعِ إِلَىٰ شَيۡءٖ نُّكُرٍ
6. Mitiya mosika na bango, mokolo oyo mobengi akobengaka epai (ya likambo) linene.
阿拉伯语经注:
خُشَّعًا أَبۡصَٰرُهُمۡ يَخۡرُجُونَ مِنَ ٱلۡأَجۡدَاثِ كَأَنَّهُمۡ جَرَادٞ مُّنتَشِرٞ
7. Bakobima na malita bilongi ya kokitisama, bakopanzana lokola bamakonko.
阿拉伯语经注:
مُّهۡطِعِينَ إِلَى ٱلدَّاعِۖ يَقُولُ ٱلۡكَٰفِرُونَ هَٰذَا يَوۡمٌ عَسِرٞ
8. Bakokamata bango kokende mbangu epai ya molobeli, bapagano bakoloba ete: Oyo ezali mokolo ya mpasi mpe mindondo.
阿拉伯语经注:
۞ كَذَّبَتۡ قَبۡلَهُمۡ قَوۡمُ نُوحٖ فَكَذَّبُواْ عَبۡدَنَا وَقَالُواْ مَجۡنُونٞ وَٱزۡدُجِرَ
9. Bato ya Nûh bagangaki na lokuta liboso na bango, baboyaki kondimela mowumbu na biso mpe balobaki ete: Oyo azali ligboma mpe bamitiaki mosika naye.
阿拉伯语经注:
فَدَعَا رَبَّهُۥٓ أَنِّي مَغۡلُوبٞ فَٱنتَصِرۡ
10. Abengaki Nkolo wa ye (alobi): Ya soló nazali na bokoki te, sunga ngai (na bokasi bwa yo)
阿拉伯语经注:
فَفَتَحۡنَآ أَبۡوَٰبَ ٱلسَّمَآءِ بِمَآءٖ مُّنۡهَمِرٖ
11. Мре tofungolaki bizibeli ya likolo mayi ebele.
阿拉伯语经注:
وَفَجَّرۡنَا ٱلۡأَرۡضَ عُيُونٗا فَٱلۡتَقَى ٱلۡمَآءُ عَلَىٰٓ أَمۡرٖ قَدۡ قُدِرَ
12. Мре topanzaki mabele na miluka mpe mayi makutanaki na mobeko oyo etiyamaki.
阿拉伯语经注:
وَحَمَلۡنَٰهُ عَلَىٰ ذَاتِ أَلۡوَٰحٖ وَدُسُرٖ
13. Mpe tomemaki ye na mabaya na sete oyo esalaki masuwa.
阿拉伯语经注:
تَجۡرِي بِأَعۡيُنِنَا جَزَآءٗ لِّمَن كَانَ كُفِرَ
14. Etambolaki na miso na biso,mpe tofutaki baye baboyaki kondima mbano na bango.
阿拉伯语经注:
وَلَقَد تَّرَكۡنَٰهَآ ءَايَةٗ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
15. Mpe totikaki yango ezala elembo, boye moto azali kaka kokanisa te?
阿拉伯语经注:
فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
16. Lolenge nini etumbu na makebisi na ngai ezalaki?
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
17. Mpe tosilaki kotia kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa?
阿拉伯语经注:
كَذَّبَتۡ عَادٞ فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
18. Ba Aad, baboyaki kondimela (bantoma na bango), boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?
阿拉伯语经注:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ رِيحٗا صَرۡصَرٗا فِي يَوۡمِ نَحۡسٖ مُّسۡتَمِرّٖ
19. Ya soló, totindelaki bango mopepe ya makasi koleka ya kozongelama.
阿拉伯语经注:
تَنزِعُ ٱلنَّاسَ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلٖ مُّنقَعِرٖ
20. Ezali kopikola bato lokola biteni ya nagh’l(1) oyo bapikoli.
1 Nagh’l: Bótala suratu Al-Kahf mokapo: 32. Na Al-Isrá: 91.
阿拉伯语经注:
فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
21. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
22. Мре tosilaki kotiya kurani ezala pete na bokundoli, boye ezali na moto oyo akoki kokanisa?
阿拉伯语经注:
كَذَّبَتۡ ثَمُودُ بِٱلنُّذُرِ
23. Ba Thamúd baboyaki kondimela makebisi.
阿拉伯语经注:
فَقَالُوٓاْ أَبَشَرٗا مِّنَّا وَٰحِدٗا نَّتَّبِعُهُۥٓ إِنَّآ إِذٗا لَّفِي ضَلَٰلٖ وَسُعُرٍ
24. Mpe balobaki: Tolanda sé moto moko okati na biso? Noki te tokobunga mpe tokokweya na mabe.
阿拉伯语经注:
أَءُلۡقِيَ ٱلذِّكۡرُ عَلَيۡهِ مِنۢ بَيۡنِنَا بَلۡ هُوَ كَذَّابٌ أَشِرٞ
25. Boye baponaki ntoma sé ye kati na biso nyoso? Te; azali sé moto ya lokuta mpe lolendo monene.
阿拉伯语经注:
سَيَعۡلَمُونَ غَدٗا مَّنِ ٱلۡكَذَّابُ ٱلۡأَشِرُ
26. Bakoyebaka lobi: Nani atondi na lokuta mpe lolendo.
阿拉伯语经注:
إِنَّا مُرۡسِلُواْ ٱلنَّاقَةِ فِتۡنَةٗ لَّهُمۡ فَٱرۡتَقِبۡهُمۡ وَٱصۡطَبِرۡ
27. Ya sólo, totindelaki bango náqah(1) lokola ekamwiseli mpe komekama, kengele bango mpe kanga motema.
1 Náqah: Bótala suratu Al-A’ráf mokapo: 73.
阿拉伯语经注:
وَنَبِّئۡهُمۡ أَنَّ ٱلۡمَآءَ قِسۡمَةُۢ بَيۡنَهُمۡۖ كُلُّ شِرۡبٖ مُّحۡتَضَرٞ
28. Mpe yebisa bango été mayi ekabuani na biteni mibale kati na bango, bakozala na ntango na bango ya komela, ye mpe na ngonga naye.
阿拉伯语经注:
فَنَادَوۡاْ صَاحِبَهُمۡ فَتَعَاطَىٰ فَعَقَرَ
29. Мре babengaki moninga na bango azui mbeli babomi ye mpe basasi ye.
阿拉伯语经注:
فَكَيۡفَ كَانَ عَذَابِي وَنُذُرِ
30. Boye etumbu na makebisi na ngai ezalaki boni?
阿拉伯语经注:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ صَيۡحَةٗ وَٰحِدَةٗ فَكَانُواْ كَهَشِيمِ ٱلۡمُحۡتَظِرِ
31. Ya soló, totindelaki bango bogangi moko, mpe bango wana bakomi lokola banzete ekawuka.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
32. Mpe tosilaki kotiya kurani ezala pete тропа bokundoli, boye moto azali te тропа kokanisa?
阿拉伯语经注:
كَذَّبَتۡ قَوۡمُ لُوطِۭ بِٱلنُّذُرِ
33. Bato ya Loth baboyaki kondimela makebisi.
阿拉伯语经注:
إِنَّآ أَرۡسَلۡنَا عَلَيۡهِمۡ حَاصِبًا إِلَّآ ءَالَ لُوطٖۖ نَّجَّيۡنَٰهُم بِسَحَرٖ
34. Ya sólo, totindelaki bango mopepe ya makasijongola sé libota lia Loth liye tobikisaki ye yambo tongo etana.
阿拉伯语经注:
نِّعۡمَةٗ مِّنۡ عِندِنَاۚ كَذَٰلِكَ نَجۡزِي مَن شَكَرَ
35. Na bolamu kowuta epai na biso. Lolenge wana nde tofutaka oyo azali kotondo (Allah)
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ أَنذَرَهُم بَطۡشَتَنَا فَتَمَارَوۡاْ بِٱلنُّذُرِ
36. Mpe asilaki kokebisa bango тропа etumbu na biso, kasi bazangaki kondimela makebisi.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ رَٰوَدُوهُ عَن ضَيۡفِهِۦ فَطَمَسۡنَآ أَعۡيُنَهُمۡ فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ
37. Mpe balingaki kokweisa bapaya naye, kasi tokangaki miso na bango, bomeka etumbu na ngai na makebisi na ngai.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ صَبَّحَهُم بُكۡرَةً عَذَابٞ مُّسۡتَقِرّٞ
38. Мре etumbu ya makasi ezuaki bango na ntongo.
阿拉伯语经注:
فَذُوقُواْ عَذَابِي وَنُذُرِ
39. Bomeka etumbu na ngai mpe makebisi na ngai.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ يَسَّرۡنَا ٱلۡقُرۡءَانَ لِلذِّكۡرِ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
40. Mpe totiyaki kurani ezala pete тропа bokundoli,boye ezali na moto te ya kokanisa?
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ جَآءَ ءَالَ فِرۡعَوۡنَ ٱلنُّذُرُ
41. Mpe ya soló, makebisi makomelaka bato ya falo.
阿拉伯语经注:
كَذَّبُواْ بِـَٔايَٰتِنَا كُلِّهَا فَأَخَذۡنَٰهُمۡ أَخۡذَ عَزِيزٖ مُّقۡتَدِرٍ
42. Baboyaki kondima na bilembo bia biso nionso, mpe tozuaki bango na bozwi ya oyo azali na nguya atonda makoki.
阿拉伯语经注:
أَكُفَّارُكُمۡ خَيۡرٞ مِّنۡ أُوْلَٰٓئِكُمۡ أَمۡ لَكُم بَرَآءَةٞ فِي ٱلزُّبُرِ
43. Boye bapengwi na bino bazali malamu koleka ba oyo kuna? То ezali na eloko ya kobatela bino okati ya makomi?
阿拉伯语经注:
أَمۡ يَقُولُونَ نَحۡنُ جَمِيعٞ مُّنتَصِرٞ
44. Bazali koloba: Tozali lisanga (makasi) tokolonga.
阿拉伯语经注:
سَيُهۡزَمُ ٱلۡجَمۡعُ وَيُوَلُّونَ ٱلدُّبُرَ
45. Lisanga na bango ekopanzana mpe bakokima.
阿拉伯语经注:
بَلِ ٱلسَّاعَةُ مَوۡعِدُهُمۡ وَٱلسَّاعَةُ أَدۡهَىٰ وَأَمَرُّ
46. Ngonga moko ya mpamba nde elaka na bango, mpe yango ezali nsomo mpe bololo.
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلۡمُجۡرِمِينَ فِي ضَلَٰلٖ وَسُعُرٖ
47. Ya soló batomboki bazali na libungi mpe na kati ya moto.
阿拉伯语经注:
يَوۡمَ يُسۡحَبُونَ فِي ٱلنَّارِ عَلَىٰ وُجُوهِهِمۡ ذُوقُواْ مَسَّ سَقَرَ
48. Mokolo oyo bakobendamaka na bilongi na bango okati ya moto, bomeka etumbu ya lifelo.
阿拉伯语经注:
إِنَّا كُلَّ شَيۡءٍ خَلَقۡنَٰهُ بِقَدَرٖ
49. Ya soló, tokelaki biloko binso na bokoki.
阿拉伯语经注:
وَمَآ أَمۡرُنَآ إِلَّا وَٰحِدَةٞ كَلَمۡحِۭ بِٱلۡبَصَرِ
50. Mpe mitindo mia biso mizalaka sé liloba moko, ezali sé lokola kobuka liso.
阿拉伯语经注:
وَلَقَدۡ أَهۡلَكۡنَآ أَشۡيَاعَكُمۡ فَهَلۡ مِن مُّدَّكِرٖ
51. Mpe tosilaki koboma bato liboso lokola bino, boye ezali na moto yakokanisa te?
阿拉伯语经注:
وَكُلُّ شَيۡءٖ فَعَلُوهُ فِي ٱلزُّبُرِ
52. Mpe biloko binso biye bisalama bisila kokomama kati na (buku)
阿拉伯语经注:
وَكُلُّ صَغِيرٖ وَكَبِيرٖ مُّسۡتَطَرٌ
53. ( Biloko) nyoso, ezala ya moke to ya monene ekomama.
阿拉伯语经注:
إِنَّ ٱلۡمُتَّقِينَ فِي جَنَّٰتٖ وَنَهَرٖ
54. Ya sólo, babangi (Allah) bakozalaka na kati ya lola mpe mpene ya mingala ezali koleka na nsé na yango.
阿拉伯语经注:
فِي مَقۡعَدِ صِدۡقٍ عِندَ مَلِيكٖ مُّقۡتَدِرِۭ
55. Mpe esika ya bosembo yakofanda pene na mokonzi wa bokoki (Allah).
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 嘎姆勒
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭