《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 * - 译解目录

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

含义的翻译 章: 拉哈迈尼   段:

Ar-Rahmân (ATONDA NGOLU)

ٱلرَّحۡمَٰنُ
1. Ar-Rahmân(1),
1 Ar-Rahmân: Bótala suratu Ar-Ra’d mokapo: 30.
阿拉伯语经注:
عَلَّمَ ٱلۡقُرۡءَانَ
2. Atangisaki kurani.
阿拉伯语经注:
خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ
3. Akela moto.
阿拉伯语经注:
عَلَّمَهُ ٱلۡبَيَانَ
4. Atangisa ye koloba polele.
阿拉伯语经注:
ٱلشَّمۡسُ وَٱلۡقَمَرُ بِحُسۡبَانٖ
5. Moyi na sanza etambolaka na bolamu oyo etiyama.
阿拉伯语经注:
وَٱلنَّجۡمُ وَٱلشَّجَرُ يَسۡجُدَانِ
6. Mpe minzoto na banzete egumbamelaka (Nkolo wa bango),
阿拉伯语经注:
وَٱلسَّمَآءَ رَفَعَهَا وَوَضَعَ ٱلۡمِيزَانَ
7. Мре atombola likolo mpe atiyela emekeli,
阿拉伯语经注:
أَلَّا تَطۡغَوۡاْ فِي ٱلۡمِيزَانِ
8. Mpo ete bolekisa ndelo te na emekeli.
阿拉伯语经注:
وَأَقِيمُواْ ٱلۡوَزۡنَ بِٱلۡقِسۡطِ وَلَا تُخۡسِرُواْ ٱلۡمِيزَانَ
9. Mpe bopesa kilo na bosembo, kasi bobebisa emekeli te.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡأَرۡضَ وَضَعَهَا لِلۡأَنَامِ
10. Mpe atiya mabele тропа bikelamu ya bomoi,
阿拉伯语经注:
فِيهَا فَٰكِهَةٞ وَٱلنَّخۡلُ ذَاتُ ٱلۡأَكۡمَامِ
11. Okati na yango, okokuta bambuma na ba nagh’l(1) ekangama,
1 Nagh’l: Bótala suratu Al-Kahf mokapo: 32.
阿拉伯语经注:
وَٱلۡحَبُّ ذُو ٱلۡعَصۡفِ وَٱلرَّيۡحَانُ
12. Mpe bambuma bibatelami na efandelo na yango, na banzete ya malasi.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
13. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya? (moto mpe elima).
阿拉伯语经注:
خَلَقَ ٱلۡإِنسَٰنَ مِن صَلۡصَٰلٖ كَٱلۡفَخَّارِ
14. Akela moto na mabele ya potopoto lokola mb eki,
阿拉伯语经注:
وَخَلَقَ ٱلۡجَآنَّ مِن مَّارِجٖ مِّن نَّارٖ
15. Mpe akela bilima kowuta na moto ezanga milinga.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
16. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
رَبُّ ٱلۡمَشۡرِقَيۡنِ وَرَبُّ ٱلۡمَغۡرِبَيۡنِ
17. Nkolo ya moniele mibale mpe Nkolo ya biloli mibale.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
18. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
مَرَجَ ٱلۡبَحۡرَيۡنِ يَلۡتَقِيَانِ
19. Atika bibale mibale bileka na bokutani.
阿拉伯语经注:
بَيۡنَهُمَا بَرۡزَخٞ لَّا يَبۡغِيَانِ
20. Kati kati na yango mondelo ezali mpo bisangana te.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
21. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
يَخۡرُجُ مِنۡهُمَا ٱللُّؤۡلُؤُ وَٱلۡمَرۡجَانُ
22. Yango mibale bizali kobimisa lulu’u na mardjânu. (mpalata na mabanga ya kongenga).
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
23. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
وَلَهُ ٱلۡجَوَارِ ٱلۡمُنشَـَٔاتُ فِي ٱلۡبَحۡرِ كَٱلۡأَعۡلَٰمِ
24. Manso ya ye; masuwa maye mazali kotambola likolo ya ebale lokola bangomba.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
25. B olámu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
كُلُّ مَنۡ عَلَيۡهَا فَانٖ
26. Nyoso oyo ezali likolo ya mokili ekolimwa (na bokufi).
阿拉伯语经注:
وَيَبۡقَىٰ وَجۡهُ رَبِّكَ ذُو ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ
27. Ekotikala sé elongi ya Nkolo nayo atonda lukumu mpe boboto.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
28. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
يَسۡـَٔلُهُۥ مَن فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِۚ كُلَّ يَوۡمٍ هُوَ فِي شَأۡنٖ
29. Baye bazali kati na likolo na mabele bazali kosenga ye, mikolo minso azali kokokisa eloko ya sika.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
30. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
سَنَفۡرُغُ لَكُمۡ أَيُّهَ ٱلثَّقَلَانِ
31. Kala mingi te tokokataka makambo na bino, oh bino mibale! (moto mpe elima)
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
32. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
يَٰمَعۡشَرَ ٱلۡجِنِّ وَٱلۡإِنسِ إِنِ ٱسۡتَطَعۡتُمۡ أَن تَنفُذُواْ مِنۡ أَقۡطَارِ ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَٱلۡأَرۡضِ فَٱنفُذُواْۚ لَا تَنفُذُونَ إِلَّا بِسُلۡطَٰنٖ
33. Eh lisanga ya bilima mpe bato! Soki bokoki kobima na makambo ya likolo mpe ya nsé, bosala. Kasi bokokoka kosala yango te sé na makoki ya (Allah).
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
34. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
يُرۡسَلُ عَلَيۡكُمَا شُوَاظٞ مِّن نَّارٖ وَنُحَاسٞ فَلَا تَنتَصِرَانِ
35. Bakobwakela bino moto ya milinga ya nkoni to ya mabende mpe bokosungama te.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
36. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فَإِذَا ٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَكَانَتۡ وَرۡدَةٗ كَٱلدِّهَانِ
37. Mpe tango likolo ekopasuka likokomaka na langi ya motané.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
38. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُسۡـَٔلُ عَن ذَنۢبِهِۦٓ إِنسٞ وَلَا جَآنّٞ
39. O mokolo yango, bato na bilima bakotunama te тропа masumu na bango(1).
1 Mokapo oyo elakisi ete bakotunama te omokolo ya suka mpamba te masumu na bango eyebani.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
40. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
يُعۡرَفُ ٱلۡمُجۡرِمُونَ بِسِيمَٰهُمۡ فَيُؤۡخَذُ بِٱلنَّوَٰصِي وَٱلۡأَقۡدَامِ
41. Batomboki bakoyebanaka na bilembo na bango тре bakozuaka bango na suki ya ebandeli ya mutu тре makolo na bango.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
42. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
هَٰذِهِۦ جَهَنَّمُ ٱلَّتِي يُكَذِّبُ بِهَا ٱلۡمُجۡرِمُونَ
43. Oyo nde lifelo тропа batomboki oyo batiyaki tembe na yango.
阿拉伯语经注:
يَطُوفُونَ بَيۡنَهَا وَبَيۡنَ حَمِيمٍ ءَانٖ
44. Bakobalukaka kati na yango na kati ya mayi ya moto ya makasi.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
45. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
وَلِمَنۡ خَافَ مَقَامَ رَبِّهِۦ جَنَّتَانِ
46. Kasi oyo abangaki kotelema liboso ya Nkolo naye, akozala na bilanga mibale. (ya lola),
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
47. Bolamu nini y a Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
ذَوَاتَآ أَفۡنَانٖ
48. Okati na yango ezali na bolamu mibale,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
49. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِمَا عَيۡنَانِ تَجۡرِيَانِ
50. O kati na yango (bakokutaka) miluka mibale mizali kotiola,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
51. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِمَا مِن كُلِّ فَٰكِهَةٖ زَوۡجَانِ
52. O kati na yango okokuta bambuma mibale mibale.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
53. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ فُرُشِۭ بَطَآئِنُهَا مِنۡ إِسۡتَبۡرَقٖۚ وَجَنَى ٱلۡجَنَّتَيۡنِ دَانٖ
54. Bakoyekama na matoko ya epeda (ya kilo kitoko) mpe bambuma ya bilanga mibale bikozala pembeni na bango тропа kobuka.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
55. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِنَّ قَٰصِرَٰتُ ٱلطَّرۡفِ لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٞ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنّٞ
56. Bakokuta o kati na yango basi kitoko ya miso ya minene baye batalaka pembeni te, mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
57. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
كَأَنَّهُنَّ ٱلۡيَاقُوتُ وَٱلۡمَرۡجَانُ
58. Kitoko na bango ezali lokola mabanga ya ebale bazali kongenga.
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
59. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
هَلۡ جَزَآءُ ٱلۡإِحۡسَٰنِ إِلَّا ٱلۡإِحۡسَٰنُ
60. Boye bolamu efutamaka te sé na bolamu?
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
61. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
وَمِن دُونِهِمَا جَنَّتَانِ
62. Mpe ezali na bilanga misusu mibale likolo ya oyo ya liboso,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
63. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
مُدۡهَآمَّتَانِ
64. Bizali na langi ya mpondu ya moyindo,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
65. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِمَا عَيۡنَانِ نَضَّاخَتَانِ
66. Okati na yango ezali na miluka mibale ya bosepelisi,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
67. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِمَا فَٰكِهَةٞ وَنَخۡلٞ وَرُمَّانٞ
68. Okati na yango ezali na bambuma, na ba nagh’l(1) na rummân(2),
1 Nagh’l: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99.
2 Rummán: Bótala suratu Al-An’ám mokapo: 99
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
69. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
فِيهِنَّ خَيۡرَٰتٌ حِسَانٞ
70. Okati na yango ezali na basi kitoko mpe malamu,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
71. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
حُورٞ مَّقۡصُورَٰتٞ فِي ٱلۡخِيَامِ
72. Basi ya miso minene kitoko bafandi nakati ya bièma,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
73. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
لَمۡ يَطۡمِثۡهُنَّ إِنسٞ قَبۡلَهُمۡ وَلَا جَآنّٞ
74. Mobali moko te kati ya bato to bilima asimba bango,
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
75. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
مُتَّكِـِٔينَ عَلَىٰ رَفۡرَفٍ خُضۡرٖ وَعَبۡقَرِيٍّ حِسَانٖ
76. Bakoyekama na bikata(1) ya langi ya pondu na bitoko ya kitoko.
1 Bikata: Ekata: Ezali: (Coussin).
阿拉伯语经注:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكُمَا تُكَذِّبَانِ
77. Bolamu nini ya Nkolo na bino oyo bozali koboya?
阿拉伯语经注:
تَبَٰرَكَ ٱسۡمُ رَبِّكَ ذِي ٱلۡجَلَٰلِ وَٱلۡإِكۡرَامِ
78. Tika ete epambolama nkombo ya Nkolo nayo oyo atonda lokumu mpe boboto.
阿拉伯语经注:
 
含义的翻译 章: 拉哈迈尼
章节目录 页码
 
《古兰经》译解 - 林加拉语翻译 - 译解目录

古兰经林加拉文译解,扎凯里雅·穆罕默德·比里昂乌翻译

关闭