クルアーンの対訳 - الترجمة اللينغالا * - 対訳の目次

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

対訳 章: 星章   節:

An-Najm (MONZOTO)

وَٱلنَّجۡمِ إِذَا هَوَىٰ
1. Na monzoto tango ekweyaka.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَا ضَلَّ صَاحِبُكُمۡ وَمَا غَوَىٰ
2. Moninga na bino abungi te mpe akosami te.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَا يَنطِقُ عَنِ ٱلۡهَوَىٰٓ
3. Mpe azali koloba makambo na makanisi naye te.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنۡ هُوَ إِلَّا وَحۡيٞ يُوحَىٰ
4. Ezali sé emoniseli ezali kokitela ye.
アラビア語 クルアーン注釈:
عَلَّمَهُۥ شَدِيدُ ٱلۡقُوَىٰ
5. (Anzelu Djibril) oyo atonda bokasi nde atangisaki ye yango.
アラビア語 クルアーン注釈:
ذُو مِرَّةٖ فَٱسۡتَوَىٰ
6. Oyo azali na bokasi sima amilakisi na lolenge naye ya anzelu.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَهُوَ بِٱلۡأُفُقِ ٱلۡأَعۡلَىٰ
7. Mpe atelemaki na kongombela ya likolo koleka.
アラビア語 クルアーン注釈:
ثُمَّ دَنَا فَتَدَلَّىٰ
8. Sima apusanaki pene mpe akitaki na nsé koleka.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَكَانَ قَابَ قَوۡسَيۡنِ أَوۡ أَدۡنَىٰ
9. Ezalaki bongo na ntaka mibale to mpe mua moke na yango.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَأَوۡحَىٰٓ إِلَىٰ عَبۡدِهِۦ مَآ أَوۡحَىٰ
10. Amoniselaki mowumbu naye maye amonisaki.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَا كَذَبَ ٱلۡفُؤَادُ مَا رَأَىٰٓ
11. Motema ekosaki te oyo emonaki.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَفَتُمَٰرُونَهُۥ عَلَىٰ مَا يَرَىٰ
12. Boye bokoboyela ye na oyo amonaki?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلَقَدۡ رَءَاهُ نَزۡلَةً أُخۡرَىٰ
13. Мре amonaki ye lisusu tango akitaki тропа mbala ya mibale .
アラビア語 クルアーン注釈:
عِندَ سِدۡرَةِ ٱلۡمُنتَهَىٰ
14. Pene na sidr muntaha(1).
1 Sidr muntaha: Ezali nzete oyo ezuami likolo ya mapata sambo.
アラビア語 クルアーン注釈:
عِندَهَا جَنَّةُ ٱلۡمَأۡوَىٰٓ
15. Mpembeni na yango nde paladizo ya seko ezuami.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِذۡ يَغۡشَى ٱلسِّدۡرَةَ مَا يَغۡشَىٰ
16. Tango nzete ya sidr ezipamaki na oyo ezipi yango.
アラビア語 クルアーン注釈:
مَا زَاغَ ٱلۡبَصَرُ وَمَا طَغَىٰ
17. Miso ebungi te, elekisi mpe ndelote.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَقَدۡ رَأَىٰ مِنۡ ءَايَٰتِ رَبِّهِ ٱلۡكُبۡرَىٰٓ
18. Ya soló, amonaki bikamuiseli minene ya Nkolo naye.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَفَرَءَيۡتُمُ ٱللَّٰتَ وَٱلۡعُزَّىٰ
19. Bopesa ngai sango ya Láta(2) na Uzza(1)?
1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَنَوٰةَ ٱلثَّالِثَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰٓ
20. Mpe mosusu ya misato Manáta(1).
1 Láta, Uzza, Manâta: Ezalaki bakombo ya banzambe ya bapagano. Boye bakoki kosunga bino to kosala bino mabe?
アラビア語 クルアーン注釈:
أَلَكُمُ ٱلذَّكَرُ وَلَهُ ٱلۡأُنثَىٰ
21. Boye bokozala na mwana mobali mpe ye azala na mwana mwasi?
アラビア語 クルアーン注釈:
تِلۡكَ إِذٗا قِسۡمَةٞ ضِيزَىٰٓ
22. Wana ezali bokaboli ya mabe.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنۡ هِيَ إِلَّآ أَسۡمَآءٞ سَمَّيۡتُمُوهَآ أَنتُمۡ وَءَابَآؤُكُم مَّآ أَنزَلَ ٱللَّهُ بِهَا مِن سُلۡطَٰنٍۚ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّ وَمَا تَهۡوَى ٱلۡأَنفُسُۖ وَلَقَدۡ جَآءَهُم مِّن رَّبِّهِمُ ٱلۡهُدَىٰٓ
23. Wana ezali sé bankombo oyo bopesa yango bino moko na batata mpe bankoko na bino, Allah akitisela yango elembetele te. Bazali kolanda sé makanisi na bamposa, nzoka nde bokambi esilaki koyela bango kowuta epai ya Nkolo na bango.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَمۡ لِلۡإِنسَٰنِ مَا تَمَنَّىٰ
24. To boye moto alingi azua nyoso lolenge azali kokanisa?
アラビア語 クルアーン注釈:
فَلِلَّهِ ٱلۡأٓخِرَةُ وَٱلۡأُولَىٰ
25. Bomoyi ya nsé na oyo ya lobi, ezali epai ya Allah.
アラビア語 クルアーン注釈:
۞ وَكَم مِّن مَّلَكٖ فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ لَا تُغۡنِي شَفَٰعَتُهُمۡ شَيۡـًٔا إِلَّا مِنۢ بَعۡدِ أَن يَأۡذَنَ ٱللَّهُ لِمَن يَشَآءُ وَيَرۡضَىٰٓ
26. Boni kati ya ba anzelu na likolo kosengela na bango bato ekosalisa te, sé sima ya ndingisa ya Allah na oyo alingi mpe asepeli.
アラビア語 クルアーン注釈:
إِنَّ ٱلَّذِينَ لَا يُؤۡمِنُونَ بِٱلۡأٓخِرَةِ لَيُسَمُّونَ ٱلۡمَلَٰٓئِكَةَ تَسۡمِيَةَ ٱلۡأُنثَىٰ
27. Ya soló, baye bazali kondima na mokolo ya suka te, bapesi ba anzelu bankombo ya basi.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَمَا لَهُم بِهِۦ مِنۡ عِلۡمٍۖ إِن يَتَّبِعُونَ إِلَّا ٱلظَّنَّۖ وَإِنَّ ٱلظَّنَّ لَا يُغۡنِي مِنَ ٱلۡحَقِّ شَيۡـٔٗا
28. Kasi bazali na boyebi te, bazali sé kolanda makanisi. Mpe makanisi esalaka bosembo eloko te.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَأَعۡرِضۡ عَن مَّن تَوَلَّىٰ عَن ذِكۡرِنَا وَلَمۡ يُرِدۡ إِلَّا ٱلۡحَيَوٰةَ ٱلدُّنۡيَا
29. Mitiya mosika na oyo akoboya bokundoli bwa biso, mpe bazali sé kolinga bomoyi ya mokili.
アラビア語 クルアーン注釈:
ذَٰلِكَ مَبۡلَغُهُم مِّنَ ٱلۡعِلۡمِۚ إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱهۡتَدَىٰ
30. Kuna nde esika mayele na bango ekendeke. Ya sólo, Nkolo nayo ayebi malamu nani abungi nzela naye, mpe ayebi nani oyo akambami.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَلِلَّهِ مَا فِي ٱلسَّمَٰوَٰتِ وَمَا فِي ٱلۡأَرۡضِ لِيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَسَٰٓـُٔواْ بِمَا عَمِلُواْ وَيَجۡزِيَ ٱلَّذِينَ أَحۡسَنُواْ بِٱلۡحُسۡنَى
31. Mpe maye manso mazali na likolo mpe na nsé ezali ya Allah, mpo afuta baye basali mabe mpo na misala na bango, mpe afuta baye basali malamu тропа misala na bango.
アラビア語 クルアーン注釈:
ٱلَّذِينَ يَجۡتَنِبُونَ كَبَٰٓئِرَ ٱلۡإِثۡمِ وَٱلۡفَوَٰحِشَ إِلَّا ٱللَّمَمَۚ إِنَّ رَبَّكَ وَٰسِعُ ٱلۡمَغۡفِرَةِۚ هُوَ أَعۡلَمُ بِكُمۡ إِذۡ أَنشَأَكُم مِّنَ ٱلۡأَرۡضِ وَإِذۡ أَنتُمۡ أَجِنَّةٞ فِي بُطُونِ أُمَّهَٰتِكُمۡۖ فَلَا تُزَكُّوٓاْ أَنفُسَكُمۡۖ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَنِ ٱتَّقَىٰٓ
32. Baye bazali komitiya mosika na masumu ya minene, bazali sé kokweya na mwa mabunga ya mike mike, ya sólo Nkolo wa yo azali na bolimbisi bonene. Azali na boyebi koleka bino, ayebi malamu lolenge akelaki bino kowuta na mabele,mpe tango oyo bozalaki litono ya makila okati ya mabumu ya bamama na bino. Bomikumisa te na kondima, ye nde ayebi nani azali kobanga ye mpenza.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَفَرَءَيۡتَ ٱلَّذِي تَوَلَّىٰ
33. Omoni te oyo azali kopesa mokongo?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَعۡطَىٰ قَلِيلٗا وَأَكۡدَىٰٓ
34. Mpe apesaka sé moke (suka na yango) akati kopesa.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَعِندَهُۥ عِلۡمُ ٱلۡغَيۡبِ فَهُوَ يَرَىٰٓ
35. Boye azali na boyebi ya mabombami nde azali kornona?
アラビア語 クルアーン注釈:
أَمۡ لَمۡ يُنَبَّأۡ بِمَا فِي صُحُفِ مُوسَىٰ
36. To boye bayebisaki ye te na ntina ya makomi ya Mûssa?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَإِبۡرَٰهِيمَ ٱلَّذِي وَفَّىٰٓ
37. Na ya Ibrâhîm oyo akokisaki elaka,
アラビア語 クルアーン注釈:
أَلَّا تَزِرُ وَازِرَةٞ وِزۡرَ أُخۡرَىٰ
38. Moto moko te akomema lisumu ya moninga,
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَن لَّيۡسَ لِلۡإِنسَٰنِ إِلَّا مَا سَعَىٰ
39. Kasi ya soló, moto akozuaka sé na molende naye.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّ سَعۡيَهُۥ سَوۡفَ يُرَىٰ
40. Mpe ya sólo, molende naye ekomonana,
アラビア語 クルアーン注釈:
ثُمَّ يُجۡزَىٰهُ ٱلۡجَزَآءَ ٱلۡأَوۡفَىٰ
41. Sima, akofutama mpenza malamu.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّ إِلَىٰ رَبِّكَ ٱلۡمُنتَهَىٰ
42. Mpe ya sólo, nyoso ekosukisama epai ya Nkolo wayo,
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥ هُوَ أَضۡحَكَ وَأَبۡكَىٰ
43. Mpe ye nde asekisaka mpe alelisaka,
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥ هُوَ أَمَاتَ وَأَحۡيَا
44. Мре ye nde abomaka mpe apesaka bomoyi?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥ خَلَقَ ٱلزَّوۡجَيۡنِ ٱلذَّكَرَ وَٱلۡأُنثَىٰ
45. Mpe ye nde akela balongani mibale, mwasi na mobali,
アラビア語 クルアーン注釈:
مِن نُّطۡفَةٍ إِذَا تُمۡنَىٰ
46. Kowuta na litanga ya mayi ya mokongo tango babwaki yango .
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّ عَلَيۡهِ ٱلنَّشۡأَةَ ٱلۡأُخۡرَىٰ
47. Mpe kokela ya mbala ya mibale ezali sé epai naye.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥ هُوَ أَغۡنَىٰ وَأَقۡنَىٰ
48. Mpe ye nde apesaka moto bomengo, mpe ye nde apesaka bobola.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥ هُوَ رَبُّ ٱلشِّعۡرَىٰ
49. Mpe ye nde Nkolo ya ach-chi’râ(1).
1 Ach-chi’rá: Ezali: Monzoto oyo bazalaki kokumisa na boyinga Allah nde akela yango.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنَّهُۥٓ أَهۡلَكَ عَادًا ٱلۡأُولَىٰ
50. Ye nde abomaka bato ya liboso na (mboka) Aad,
アラビア語 クルアーン注釈:
وَثَمُودَاْ فَمَآ أَبۡقَىٰ
51. Na Thamûd, moko atikala te.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَقَوۡمَ نُوحٖ مِّن قَبۡلُۖ إِنَّهُمۡ كَانُواْ هُمۡ أَظۡلَمَ وَأَطۡغَىٰ
52. Mpe liboso na bango, bato ya Nûh bazalaki babubi mpe balekisaki ndelo.
アラビア語 クルアーン注釈:
وَٱلۡمُؤۡتَفِكَةَ أَهۡوَىٰ
53. Lolenge moko na mboka oyo ebalusamaki (mutafikah mboka ya Loth),
アラビア語 クルアーン注釈:
فَغَشَّىٰهَا مَا غَشَّىٰ
54. Azipaki yango ndenge azipaki etumbu ya makasi.
アラビア語 クルアーン注釈:
فَبِأَيِّ ءَالَآءِ رَبِّكَ تَتَمَارَىٰ
55. Bolamu nini ya Allah oyo ozali kotiela yango tembe?
アラビア語 クルアーン注釈:
هَٰذَا نَذِيرٞ مِّنَ ٱلنُّذُرِ ٱلۡأُولَىٰٓ
56. Oyo azali mokebisi lokola bakebisi ya yambo.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَزِفَتِ ٱلۡأٓزِفَةُ
57. Ngonga esili kobeleme.
アラビア語 クルアーン注釈:
لَيۡسَ لَهَا مِن دُونِ ٱللَّهِ كَاشِفَةٌ
58. Mosusu azali te oyo akofungola yango na botiki Allah.
アラビア語 クルアーン注釈:
أَفَمِنۡ هَٰذَا ٱلۡحَدِيثِ تَعۡجَبُونَ
59. Boye bozali kokamwa na masolo oyo? (kurani)
アラビア語 クルアーン注釈:
وَتَضۡحَكُونَ وَلَا تَبۡكُونَ
60. Mpe bozali koseka na esika ya kolela?
アラビア語 クルアーン注釈:
وَأَنتُمۡ سَٰمِدُونَ
61. Kasi bozali sé kosakana?
アラビア語 クルアーン注釈:
فَٱسۡجُدُواْۤ لِلَّهِۤ وَٱعۡبُدُواْ۩
62. Bogumbama тропа Allah mpe bobondela (ye).
アラビア語 クルアーン注釈:
 
対訳 章: 星章
章名の目次 ページ番号
 
クルアーンの対訳 - الترجمة اللينغالا - 対訳の目次

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

閉じる