Check out the new design

Kilniojo Korano reikšmių vertimas - Vertimas į ngalų k. - Muchamed Balingugu * - Vertimų turinys

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

Reikšmių vertimas Sūra: Al-Kalam   Aja (Korano eilutė):

Al-Qalam

نٓۚ وَٱلۡقَلَمِ وَمَا يَسۡطُرُونَ
1. Nún(1), (nalapi) na ekomeli na oyo ezali kokoma.
1 Bótala na suratu Al-Baqarah mokapo: 1.
Tafsyrai arabų kalba:
مَآ أَنتَ بِنِعۡمَةِ رَبِّكَ بِمَجۡنُونٖ
2. Yo (Muhammad) na ngrásia y a Nkolo nayo ozali libgoma te.
Tafsyrai arabų kalba:
وَإِنَّ لَكَ لَأَجۡرًا غَيۡرَ مَمۡنُونٖ
3. Mpe ya sôló, ozali na lifuta oyo esilaka te,
Tafsyrai arabų kalba:
وَإِنَّكَ لَعَلَىٰ خُلُقٍ عَظِيمٖ
4. Mpe ya sôló, ozali na ezaleli ya malamu.
Tafsyrai arabų kalba:
فَسَتُبۡصِرُ وَيُبۡصِرُونَ
5. Yo okomona mpe bango bakomona,
Tafsyrai arabų kalba:
بِأَييِّكُمُ ٱلۡمَفۡتُونُ
6. Nani kati na bino amekami?
Tafsyrai arabų kalba:
إِنَّ رَبَّكَ هُوَ أَعۡلَمُ بِمَن ضَلَّ عَن سَبِيلِهِۦ وَهُوَ أَعۡلَمُ بِٱلۡمُهۡتَدِينَ
7. Ya sôló, Nkolo wa yo ayebi malamu oyo abunga nzela naye, mpe ayebi malamu baye bazali na bokambami.
Tafsyrai arabų kalba:
فَلَا تُطِعِ ٱلۡمُكَذِّبِينَ
8. Kaši kotosa bato ya lokuta te.
Tafsyrai arabų kalba:
وَدُّواْ لَوۡ تُدۡهِنُ فَيُدۡهِنُونَ
9. Bakosepela ozala malamu na bango mpo bazala mpe malamu nayo.
Tafsyrai arabų kalba:
وَلَا تُطِعۡ كُلَّ حَلَّافٖ مَّهِينٍ
10. Mpe kotosa moko te na bango, bazali kolapa na ntina te.
Tafsyrai arabų kalba:
هَمَّازٖ مَّشَّآءِۭ بِنَمِيمٖ
11. Bato ya songi songi, bazali kokosela bato makambo.
Tafsyrai arabų kalba:
مَّنَّاعٖ لِّلۡخَيۡرِ مُعۡتَدٍ أَثِيمٍ
12. Baye bapekisaka bolamu ya bato, bazali kolekisa ndelo mpe basali na masumu,
Tafsyrai arabų kalba:
عُتُلِّۭ بَعۡدَ ذَٰلِكَ زَنِيمٍ
13. Bazali na mitema makasi mpe bazali na lolendo.
Tafsyrai arabų kalba:
أَن كَانَ ذَا مَالٖ وَبَنِينَ
14. Ata soki azali na misolo ebele na bana ebele, (alingi kobonguana te)
Tafsyrai arabų kalba:
إِذَا تُتۡلَىٰ عَلَيۡهِ ءَايَٰتُنَا قَالَ أَسَٰطِيرُ ٱلۡأَوَّلِينَ
15. Soki batangeli ye mikapo mia biso, alobi: Wana ezali sé masapo ya bankoko ya kala.
Tafsyrai arabų kalba:
سَنَسِمُهُۥ عَلَى ٱلۡخُرۡطُومِ
16. Tokomonisa elembo naye likolo na zolo.
Tafsyrai arabų kalba:
 
Reikšmių vertimas Sūra: Al-Kalam
Sūrų turinys Puslapio numeris
 
Kilniojo Korano reikšmių vertimas - Vertimas į ngalų k. - Muchamed Balingugu - Vertimų turinys

Išvertė Zakarija Muchamed Balingugu.

Uždaryti