قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا * - ترجمے کی لسٹ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ حاقہ   آیت:

Al-Hâqqah (MOKOLO YA SÓLÓ)

ٱلۡحَآقَّةُ
1. Mokolo ya Sólo.
عربی تفاسیر:
مَا ٱلۡحَآقَّةُ
2. Nini nde mokolo ya Sólo?
عربی تفاسیر:
وَمَآ أَدۡرَىٰكَ مَا ٱلۡحَآقَّةُ
3. Eloko nini ekolakisa yo mokolo ya sólo nde nini?
عربی تفاسیر:
كَذَّبَتۡ ثَمُودُ وَعَادُۢ بِٱلۡقَارِعَةِ
4. Bato ya mboka Thamúd na Aad baboyaki kondimela likambo ya somo.
عربی تفاسیر:
فَأَمَّا ثَمُودُ فَأُهۡلِكُواْ بِٱلطَّاغِيَةِ
5. Mpona bato ya Thamúd, babebisamaki na tangba ya makasi.
عربی تفاسیر:
وَأَمَّا عَادٞ فَأُهۡلِكُواْ بِرِيحٖ صَرۡصَرٍ عَاتِيَةٖ
6. Mpe mpona bato ya aad, babebisamaki na mopepe ya makasi,
عربی تفاسیر:
سَخَّرَهَا عَلَيۡهِمۡ سَبۡعَ لَيَالٖ وَثَمَٰنِيَةَ أَيَّامٍ حُسُومٗاۖ فَتَرَى ٱلۡقَوۡمَ فِيهَا صَرۡعَىٰ كَأَنَّهُمۡ أَعۡجَازُ نَخۡلٍ خَاوِيَةٖ
7. Mabe wana ekwelaki bango butu sambo na mikolo mwambe, okomona sé bibembe ya bato, bakomi lokola biteni ya nagh’l(1) ya kokata kata.
1 Nagh’l: Bótala Al-An’ám: 99.
عربی تفاسیر:
فَهَلۡ تَرَىٰ لَهُم مِّنۢ بَاقِيَةٖ
8. Boye okomona ata eloko etikali?
عربی تفاسیر:
وَجَآءَ فِرۡعَوۡنُ وَمَن قَبۡلَهُۥ وَٱلۡمُؤۡتَفِكَٰتُ بِٱلۡخَاطِئَةِ
9. Falo na baye bazalaki liboso naye na bato ya mboka bikweisama, bayaki na mabe.
عربی تفاسیر:
فَعَصَوۡاْ رَسُولَ رَبِّهِمۡ فَأَخَذَهُمۡ أَخۡذَةٗ رَّابِيَةً
10. Mpe baboyaki kondima na motindami ya Nkolo na bango, kasi azuisaki bango kozuama ya mawa te.
عربی تفاسیر:
إِنَّا لَمَّا طَغَا ٱلۡمَآءُ حَمَلۡنَٰكُمۡ فِي ٱلۡجَارِيَةِ
11. Ya soló, tango mayi etondaki, biso nde tomatisaki bino okati ya masuwa.
عربی تفاسیر:
لِنَجۡعَلَهَا لَكُمۡ تَذۡكِرَةٗ وَتَعِيَهَآ أُذُنٞ وَٰعِيَةٞ
12. Mpo totiya yango etikala elembo mpo bato bakoka kokanisa.
عربی تفاسیر:
فَإِذَا نُفِخَ فِي ٱلصُّورِ نَفۡخَةٞ وَٰحِدَةٞ
13. Mpe tango bakofula na kelelo mbala moko,
عربی تفاسیر:
وَحُمِلَتِ ٱلۡأَرۡضُ وَٱلۡجِبَالُ فَدُكَّتَا دَكَّةٗ وَٰحِدَةٗ
14. Mabele na bangomba bikotombwana nako pasuka mbala moko,
عربی تفاسیر:
فَيَوۡمَئِذٖ وَقَعَتِ ٱلۡوَاقِعَةُ
15. Mokolo wana ekozala bokweisami ya suka.
عربی تفاسیر:
وَٱنشَقَّتِ ٱلسَّمَآءُ فَهِيَ يَوۡمَئِذٖ وَاهِيَةٞ
16. Likolo likopasuka mpe langi na yango ekobongwanaka.
عربی تفاسیر:
وَٱلۡمَلَكُ عَلَىٰٓ أَرۡجَآئِهَاۚ وَيَحۡمِلُ عَرۡشَ رَبِّكَ فَوۡقَهُمۡ يَوۡمَئِذٖ ثَمَٰنِيَةٞ
17. Mpe ba anzelu (basantu) bakozalaka pembeni ya mapata (bazali na bobangi ya Nkolo wa bango) mpe ba anzelu mwambe bakomema ngwende (ya Allah) mokolo wana.
عربی تفاسیر:
يَوۡمَئِذٖ تُعۡرَضُونَ لَا تَخۡفَىٰ مِنكُمۡ خَافِيَةٞ
18. Mokolo wana bokozongisaka nyoso epai ya Allah, bokobombaka eloko moko te.
عربی تفاسیر:
فَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِيَمِينِهِۦ فَيَقُولُ هَآؤُمُ ٱقۡرَءُواْ كِتَٰبِيَهۡ
19. Oyó bakopesaka ye buku naye na loboko ya mobali, akolobaka: Bosimba mpe botanga buku na ngai!
عربی تفاسیر:
إِنِّي ظَنَنتُ أَنِّي مُلَٰقٍ حِسَابِيَهۡ
20. Nazalaki kolikia ete nakokutana na mbano mwa ngai.
عربی تفاسیر:
فَهُوَ فِي عِيشَةٖ رَّاضِيَةٖ
21. Мре akozala na bomoyi ya esengo,
عربی تفاسیر:
فِي جَنَّةٍ عَالِيَةٖ
22. (Akozalaka) okati ya Iola ya likolo,
عربی تفاسیر:
قُطُوفُهَا دَانِيَةٞ
23. Bambuma na yango ezali pembeni.
عربی تفاسیر:
كُلُواْ وَٱشۡرَبُواْ هَنِيٓـَٔۢا بِمَآ أَسۡلَفۡتُمۡ فِي ٱلۡأَيَّامِ ٱلۡخَالِيَةِ
24. Bolia mpe bomela na esengo kolandana na mikolo oyo bolekisaki.
عربی تفاسیر:
وَأَمَّا مَنۡ أُوتِيَ كِتَٰبَهُۥ بِشِمَالِهِۦ فَيَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي لَمۡ أُوتَ كِتَٰبِيَهۡ
25. Mpe oyo bakopesa ye buku naye na loboko ya mwasi akolobaka: Eh ngai! Soki bapesaka ngai ata yango te,
عربی تفاسیر:
وَلَمۡ أَدۡرِ مَا حِسَابِيَهۡ
26. Mpe nayebaki ata eloko moko na yango te!
عربی تفاسیر:
يَٰلَيۡتَهَا كَانَتِ ٱلۡقَاضِيَةَ
27. Natikala ata na liwa na ngai.
عربی تفاسیر:
مَآ أَغۡنَىٰ عَنِّي مَالِيَهۡۜ
28. Misolo mia ngai misalisi ngai na eloko te.
عربی تفاسیر:
هَلَكَ عَنِّي سُلۡطَٰنِيَهۡ
29. Bokonzi na ngai esili kobebisama.
عربی تفاسیر:
خُذُوهُ فَغُلُّوهُ
30. Bokanga ye singa na kingo,
عربی تفاسیر:
ثُمَّ ٱلۡجَحِيمَ صَلُّوهُ
31. Sima bobwaka ye na moto!
عربی تفاسیر:
ثُمَّ فِي سِلۡسِلَةٖ ذَرۡعُهَا سَبۡعُونَ ذِرَاعٗا فَٱسۡلُكُوهُ
32. Bokanga ye na minyololo ya ntaka ntuku nsambo.
عربی تفاسیر:
إِنَّهُۥ كَانَ لَا يُؤۡمِنُ بِٱللَّهِ ٱلۡعَظِيمِ
33. Ya soló, azalaki kondima na Allah wa monene te,
عربی تفاسیر:
وَلَا يَحُضُّ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
34. Mpe azalaki na (mawa) ya koleisa babola te.
عربی تفاسیر:
فَلَيۡسَ لَهُ ٱلۡيَوۡمَ هَٰهُنَا حَمِيمٞ
35. Lelo azali na mosungi te,
عربی تفاسیر:
وَلَا طَعَامٌ إِلَّا مِنۡ غِسۡلِينٖ
36. Mpe bilia naye ekozala sé mayi ya moto ya tofina,
عربی تفاسیر:
لَّا يَأۡكُلُهُۥٓ إِلَّا ٱلۡخَٰطِـُٔونَ
37. Baye bakoliaka yango sé ba oyo basalaki mabe.
عربی تفاسیر:
فَلَآ أُقۡسِمُ بِمَا تُبۡصِرُونَ
38. Nalapi na maye bozali kornona,
عربی تفاسیر:
وَمَا لَا تُبۡصِرُونَ
39. Мре na maye bozali kornona te,
عربی تفاسیر:
إِنَّهُۥ لَقَوۡلُ رَسُولٖ كَرِيمٖ
40. Yango, ezali liloba lia motindami ya lokumu.
عربی تفاسیر:
وَمَا هُوَ بِقَوۡلِ شَاعِرٖۚ قَلِيلٗا مَّا تُؤۡمِنُونَ
41. Kasi ezali liloba lia moto mpamba te, kasi bozali moke oyo bozali kondima.
عربی تفاسیر:
وَلَا بِقَوۡلِ كَاهِنٖۚ قَلِيلٗا مَّا تَذَكَّرُونَ
42. Mpe ezali liloba lia nganga te. Ebele bazali kokanisa te.
عربی تفاسیر:
تَنزِيلٞ مِّن رَّبِّ ٱلۡعَٰلَمِينَ
43. Ekitaki kowuta epai ya Nkolo ya molongo.
عربی تفاسیر:
وَلَوۡ تَقَوَّلَ عَلَيۡنَا بَعۡضَ ٱلۡأَقَاوِيلِ
44. Ata alobelaki biso ndambu ya maloba ya lokuta oyo balobaki,
عربی تفاسیر:
لَأَخَذۡنَا مِنۡهُ بِٱلۡيَمِينِ
45. Tolingaki kozua ye na loboko ya mobali,
عربی تفاسیر:
ثُمَّ لَقَطَعۡنَا مِنۡهُ ٱلۡوَتِينَ
46. Sima, tolingaki kokata ye singa ya motema,
عربی تفاسیر:
فَمَا مِنكُم مِّنۡ أَحَدٍ عَنۡهُ حَٰجِزِينَ
47. Moko azali te ya kopekisa biso.
عربی تفاسیر:
وَإِنَّهُۥ لَتَذۡكِرَةٞ لِّلۡمُتَّقِينَ
48. Ya soló, wana ezali sé bokundoli тропа babangi.
عربی تفاسیر:
وَإِنَّا لَنَعۡلَمُ أَنَّ مِنكُم مُّكَذِّبِينَ
49. Mpe toyebi malamu banani bakosi kati na bino.
عربی تفاسیر:
وَإِنَّهُۥ لَحَسۡرَةٌ عَلَى ٱلۡكَٰفِرِينَ
50. Мре ya soló, ye akozangisaka bapengwi te (na etumbu)
عربی تفاسیر:
وَإِنَّهُۥ لَحَقُّ ٱلۡيَقِينِ
51. Mpe ya soló, wana ezali bosembo mpenza ya bondimi.
عربی تفاسیر:
فَسَبِّحۡ بِٱسۡمِ رَبِّكَ ٱلۡعَظِيمِ
52. Kumisa nkombo ya Nkolo nayo ya lokumu.
عربی تفاسیر:
 
معانی کا ترجمہ سورت: سورۂ حاقہ
سورتوں کی لسٹ صفحہ نمبر
 
قرآن کریم کے معانی کا ترجمہ - الترجمة اللينغالا - ترجمے کی لسٹ

ترجمة معاني القرآن الكريم الى اللغة اللينغالا، ترجمها زكريا محمد بالنغوغو.

بند کریں