Check out the new design

আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু * - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

XML CSV Excel API
Please review the Terms and Policies

অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-ফজৰ   আয়াত:

Al-Fadjir

وَٱلۡفَجۡرِ
(Nalapi) na eleko ya ntongo!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَيَالٍ عَشۡرٖ
(Mpe nalapi) na babutu zomi!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ
(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ
(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٞ لِّذِي حِجۡرٍ
Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ
Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ
Na mboka Irama[1] ndenge etongamaki na bandako ya likolo,
[1] Kombo ya mboka.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ
Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ
Na Falo moto ya mapinga?
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ
Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ
Mpe babebisaki mingi koleka.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ
Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ
Mpo ete Nkolo nayo azali kotala.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ
Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ
Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
كَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ
Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ
Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلٗا لَّمّٗا
Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبّٗا جَمّٗا
Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
كَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكّٗا دَكّٗا
Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفّٗا صَفّٗا
Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٖ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ
Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي
Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٞ
Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٞ
Mpe moto moko te akokangama lokola ye.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ
Oh yo molimo y a kimia!
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةٗ مَّرۡضِيَّةٗ
Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي
Kota elongo na bawumbu ba ngai,
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي
Mpe kota okati ya lola na ngai.
আৰবী তাফছীৰসমূহ:
 
অৰ্থানুবাদ ছুৰা: আল-ফজৰ
ছুৰাৰ তালিকা পৃষ্ঠা নং
 
আল-কোৰআনুল কাৰীমৰ অৰ্থানুবাদ - লিংগালা অনুবাদ- মুহাম্মদ বালিংগুগু - অনুবাদসমূহৰ সূচীপত্ৰ

অনুবাদ যাকাৰিয়্যা মুহাম্মদ বালিংগুগু।

বন্ধ