ការបកប្រែអត្ថន័យគួរអាន - ការបកប្រែជាភាសាលីនហ្គាឡា - ម៉ូហាំម៉ាត់ បាលន្គូហ្គូ

Al-Fadjir

external-link copy
1 : 89

وَٱلۡفَجۡرِ

(Nalapi) na eleko ya ntongo! info
التفاسير:

external-link copy
2 : 89

وَلَيَالٍ عَشۡرٖ

(Mpe nalapi) na babutu zomi! info
التفاسير:

external-link copy
3 : 89

وَٱلشَّفۡعِ وَٱلۡوَتۡرِ

(Mpe nalapi) na motango libale, mpe na motango libale te! info
التفاسير:

external-link copy
4 : 89

وَٱلَّيۡلِ إِذَا يَسۡرِ

(Mpe nalapi) na butu ntango esilaka. info
التفاسير:

external-link copy
5 : 89

هَلۡ فِي ذَٰلِكَ قَسَمٞ لِّذِي حِجۡرٍ

Kolapa oyo ezali te mpo na moto oyo atonda mayele? info
التفاسير:

external-link copy
6 : 89

أَلَمۡ تَرَ كَيۡفَ فَعَلَ رَبُّكَ بِعَادٍ

Omoni te ndenge Nkolo nayo asalaki na bato ya aad, info
التفاسير:

external-link copy
7 : 89

إِرَمَ ذَاتِ ٱلۡعِمَادِ

Na mboka Irama[1] ndenge etongamaki na bandako ya likolo, info

[1] Kombo ya mboka.

التفاسير:

external-link copy
8 : 89

ٱلَّتِي لَمۡ يُخۡلَقۡ مِثۡلُهَا فِي ٱلۡبِلَٰدِ

Mboka eye etongama te lolenge wana na mokili, info
التفاسير:

external-link copy
9 : 89

وَثَمُودَ ٱلَّذِينَ جَابُواْ ٱلصَّخۡرَ بِٱلۡوَادِ

Mpe na bato ya Thamúd baye bazalaki kotobola mabanga okatikati ya bangomba, info
التفاسير:

external-link copy
10 : 89

وَفِرۡعَوۡنَ ذِي ٱلۡأَوۡتَادِ

Na Falo moto ya mapinga? info
التفاسير:

external-link copy
11 : 89

ٱلَّذِينَ طَغَوۡاْ فِي ٱلۡبِلَٰدِ

Bango banso bazalaki babuki mibeko o’kati ya bamboka na bango, info
التفاسير:

external-link copy
12 : 89

فَأَكۡثَرُواْ فِيهَا ٱلۡفَسَادَ

Mpe babebisaki mingi koleka. info
التفاسير:

external-link copy
13 : 89

فَصَبَّ عَلَيۡهِمۡ رَبُّكَ سَوۡطَ عَذَابٍ

Na yango Nkolo nayo akitiselaki bango fimbu ya etumbu. info
التفاسير:

external-link copy
14 : 89

إِنَّ رَبَّكَ لَبِٱلۡمِرۡصَادِ

Mpo ete Nkolo nayo azali kotala. info
التفاسير:

external-link copy
15 : 89

فَأَمَّا ٱلۡإِنسَٰنُ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ رَبُّهُۥ فَأَكۡرَمَهُۥ وَنَعَّمَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَكۡرَمَنِ

Moto azali soki Nkolo naye ameki ye na bokumisi ye mpe na bopesi ye bozwi alobi: Nkolo na ngai akumisi nga. info
التفاسير:

external-link copy
16 : 89

وَأَمَّآ إِذَا مَا ٱبۡتَلَىٰهُ فَقَدَرَ عَلَيۡهِ رِزۡقَهُۥ فَيَقُولُ رَبِّيٓ أَهَٰنَنِ

Kaši soki ameki ye na bokangeli ye bozwi alobi ete: Nkolo na ngai asundoli nga. info
التفاسير:

external-link copy
17 : 89

كَلَّاۖ بَل لَّا تُكۡرِمُونَ ٱلۡيَتِيمَ

Kaši te, bino nde bosalisaka bana bitike te, info
التفاسير:

external-link copy
18 : 89

وَلَا تَحَٰٓضُّونَ عَلَىٰ طَعَامِ ٱلۡمِسۡكِينِ

Mpe bolendisaka bato te pona koleisa babola, info
التفاسير:

external-link copy
19 : 89

وَتَأۡكُلُونَ ٱلتُّرَاثَ أَكۡلٗا لَّمّٗا

Mpe bozalaki kólia bikitano (bozui mowei atiki) na ndenge ya mabe, info
التفاسير:

external-link copy
20 : 89

وَتُحِبُّونَ ٱلۡمَالَ حُبّٗا جَمّٗا

Mpe bolingi bomengo na bolingo ya makasi. info
التفاسير:

external-link copy
21 : 89

كَلَّآۖ إِذَا دُكَّتِ ٱلۡأَرۡضُ دَكّٗا دَكّٗا

Kaši ntango mabele ekobalusama na ndenge ya somo, info
التفاسير:

external-link copy
22 : 89

وَجَآءَ رَبُّكَ وَٱلۡمَلَكُ صَفّٗا صَفّٗا

Ntango Nkolo nayo akoya mpe ba anzelu bakozala milongo milongo, info
التفاسير:

external-link copy
23 : 89

وَجِاْيٓءَ يَوۡمَئِذِۭ بِجَهَنَّمَۚ يَوۡمَئِذٖ يَتَذَكَّرُ ٱلۡإِنسَٰنُ وَأَنَّىٰ لَهُ ٱلذِّكۡرَىٰ

Mpe bakoya na lifelo mokolo yango, mokolo wana moto akokanisa makanisi, kaši makanisi wana ekosalisa ye na eloko te. info
التفاسير:

external-link copy
24 : 89

يَقُولُ يَٰلَيۡتَنِي قَدَّمۡتُ لِحَيَاتِي

Akoloba eh! Ngai mawa na ngai, soki nasalaki bolamu pona bomoyi na ngai! info
التفاسير:

external-link copy
25 : 89

فَيَوۡمَئِذٖ لَّا يُعَذِّبُ عَذَابَهُۥٓ أَحَدٞ

Mokolo wana etumbu naye ekokokana na ya moto moko te, info
التفاسير:

external-link copy
26 : 89

وَلَا يُوثِقُ وَثَاقَهُۥٓ أَحَدٞ

Mpe moto moko te akokangama lokola ye. info
التفاسير:

external-link copy
27 : 89

يَٰٓأَيَّتُهَا ٱلنَّفۡسُ ٱلۡمُطۡمَئِنَّةُ

Oh yo molimo y a kimia! info
التفاسير:

external-link copy
28 : 89

ٱرۡجِعِيٓ إِلَىٰ رَبِّكِ رَاضِيَةٗ مَّرۡضِيَّةٗ

Zonga epai ya Nkolo nayo na bozongi ya esengo. info
التفاسير:

external-link copy
29 : 89

فَٱدۡخُلِي فِي عِبَٰدِي

Kota elongo na bawumbu ba ngai, info
التفاسير:

external-link copy
30 : 89

وَٱدۡخُلِي جَنَّتِي

Mpe kota okati ya lola na ngai. info
التفاسير: